< 詩篇 7 >

1 わが神ヱホバよわれ汝によりたのむ 願くはすべての逐せまるものより我をすくひ我をたすけたまへ
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame. Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.
2 おそらくはかれ獅の如くわが霊魂をかきやぶり援るものなき間にさきてずたずたに爲ん
Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi mpe bakokata ngai na biteni, mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.
3 わが神ヱホバよ もしわれ此事をなししならんには わが手によこしまの纏りをらんには
Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
4 故なく仇ずるものをさへ助けしに禍害をもてわが友にむくいしならんには
soki nasalaki moninga na ngai mabe, soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba, biloko ya moyini na ngai;
5 よし仇人わがたましひを逐とらへ わが生命をつちにふみにじりわが榮を塵におくとも その作にまかせよ (セラ)
wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.
6 ヱホバよなんぢの怒をもて起わが仇のいきどほりにむかひて立たまへ わがために目をさましたまへ なんぢは審判をおほせ出したまへり
Yawe, telema na kanda na Yo, telemela kotomboka ya banguna na ngai. Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
7 もろもろの國人の會がなんぢのまはりに集はしめ 其上なる高座にかへりたまへ
Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
8 ヱホバはもろもろの民にさばきを行ひたまふ ヱホバよわが正義とわが衷なる完全とにしたがひて我をさばきたまへ
Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
9 ねがはくは惡きものの曲事をたちて義しきものを堅くしたまへ ただしき神は人のこころと腎とをさぐり知たまふ
Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka mozindo ya mayele mpe ya mitema, sukisa kanza ya bato mabe mpe yikisa moto ya sembo mpiko.
10 わが盾をとるものは心のなほきものをすくふ神なり
Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.
11 神はただしき審士ひごとに忿恚をおこしたまふ神なり
Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.
12 人もしかへらずば神はその劍をとぎ その弓をはりてかまへ
Soki alembisi kanda na Ye te, akopelisa minu ya mopanga na Ye, akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
13 これに死の器をそなへ その矢に火をそへたまはん
Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
14 視よその人はよこしまを產んとしてくるしむ 殘害をはらみ虚偽をうむなり
Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi mpe abebisaka boyokani;
15 また坑をほりてふかくし己がつくれるその溝におちいれり
atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
16 その殘害はおのが首にかへり その強暴はおのが頭上にくだらん
Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
17 われその義によりてヱホバに感謝し いとたかきヱホバの名をほめうたはん
Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye, mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.

< 詩篇 7 >