< 詩篇 2 >

1 何なればもろもろの國人はさわぎたち諸民はむなしきことを謀るや
Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba?
2 地のもろもろの王はたちかまへ群伯はともに議り ヱホバとその受膏者とにさからひていふ
Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.
3 われらその械をこぼち その繩をすてんと
Bazali koganga elongo: « Tokata minyololo na bango mpe tomikangola na bokonzi na bango! »
4 天に坐するもの笑ひたまはん 主かれらを嘲りたまふべし
Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
5 かくて主は忿恚をもてものいひ大なる怒をもてかれらを怖まどはしめて宣給ふ
Agangeli bango na kanda, apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi:
6 しかれども我わが王をわがきよきシオンの山にたてたりと
« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »
7 われ詔命をのべんヱホバわれに宣まへり なんぢはわが子なり今日われなんぢを生り
Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai: « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.
8 われに求めよ さらば汝にもろもろの國を嗣業としてあたへ地の極をなんぢの有としてあたへん
Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.
9 汝くろがねの杖をもて彼等をうちやぶり陶工のうつはもののごとくに打碎かんと
Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »
10 されば汝等もろもろの王よ さとかれ地の審士輩をしへをうけよ
Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.
11 畏をもてヱホバにつかへ戰慄をもてよろこべ
Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.
12 子にくちつけせよ おそらくはかれ怒をはなちなんぢら途にほろびんその忿恚はすみやかに燃べければなり すべてかれに依賴むものは福ひなり
Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.

< 詩篇 2 >