< Zaharija 9 >

1 Proroštvo. Riječ Jahvina. Jahve prolazi zemljom Hadraka, Damask mu je počivalište; jer Jahvini su gradovi Arama i sva plemena Izraela.
Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.
2 Hamat također, koji s njim graniči,
Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati, na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi, na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele.
3 i Tir i Sidon, tako mudar. Tir podiže tvrde bedeme, zgrnu srebra kao prašine i zlata kao blata s ulica.
Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, emibombeli palata ebele lokola putulu mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.
4 Al' evo, Gospod će ga osvojiti, survati u more moć njegovu, a njega će progutati oganj.
Kasi Nkolo akobotola yango, akosukisa nguya na yango na ebale monene mpe ekozika na moto.
5 Vidjet će to Aškelon i prestrašiti se, a Gaza sva će uzdrhtati, i Ekron, jer ga nada prevari: nestat će kralja iz Gaze, Aškelon će pust ostati,
Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga; engumba Gaza ekokoma na somo makasi, ndenge moko mpe engumba Ekroni; pamba te elikya na yango ekosila. Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.
6 u Ašdodu stanovat će kopilad! Zatrt ću ponos Filistejaca,
Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.
7 uklonit ću im krv iz usta i gnusobu iz zuba. I oni će pripasti Bogu našem i bit će kao jedna obitelj u Judeji, a Ekron će biti kao Jebusejac.
Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.
8 Uz Dom svoj utaborit ću se kao straža, protiv onih koji odlaze i dolaze; tlačitelj neće više ovud prolaziti, jer njegovu sam uvidio bijedu.
Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
9 Klikni iz sveg grla, Kćeri sionska! Viči od radosti, Kćeri jeruzalemska! Tvoj kralj se evo tebi vraća: pravičan je i pobjedonosan, ponizan jaše na magarcu, na magaretu, mladetu magaričinu.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
10 On će istrijebit' kola iz Efrajima i konje iz Jeruzalema; on će istrijebit' luk ubojni. On će navijestit' mir narodima; vlast će mu se proširit' od mora do mora i od Rijeke do rubova zemlje.
Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
11 A i tebi, zbog krvi tvoga Saveza, vratit ću sužnje tvoje iz jama bezvodnih.
Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.
12 Vratite se u Tvrđavu, izgnanici puni nade, još danas - ja navješćujem - dvostruko ću ti uzvratiti.
Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, bino bakangami oyo botondi na elikya, pamba te nazali koloba na bino sik’oyo: « Nakozongisela bino mbala mibale biloko oyo bobungisaki. »
13 Jer, Judu sam kao luk napeo, a Efrajimom luk naoružao: tvoje ću, o Sione, zavitlat' sinove - protiv sinova tvojih, o Javane - i učinit ću te kao mač junaka.
Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.
14 Nad njima tad će se pojaviti Jahve i kao munja letjet će mu strijela. Jahve Gospod u rog će zatrubit', hodit će na južnim vihorima.
Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.
15 Jahve nad Vojskama zakrilit će ih i oni će gaziti nogama kamenje praćaka, pit će krv kao da je vino, napojit' se kao škropilo, kao uglovi na žrtveniku.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, bakotonda lokola kopo ya makila oyo basopaka na basonge ya etumbelo.
16 Jahve Bog njihov spasit će ih u dan onaj; kao stado on će pasti narod svoj; kao drago kamenje krune oni će blistat' u zemlji njegovoj.
Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, akobikisa bango ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. Bakongenga makasi kati na mabele na Ye lokola mabanga ya talo.
17 Ah, kako li će sretan, kako lijep biti! Od žita će rasti mladići, a od slatkog vina djevice.
Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.

< Zaharija 9 >