< Zaharija 10 >

1 Tražite od Jahve dažda u vrijeme proljetno! Jahve stvara munje i daje kišu; čovjeku kruh daje, a stoci travu.
Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.
2 Lažno bajaju kumiri, prijevaru vide gatari, obmanu govore snovi, varljivu utjehu daju, zato kao stado blude ljudi, lutaju jer nemaju pastira.
Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta: bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.
3 Moj je gnjev planuo na pastire, i ja ću kaznom pohodit jarce. Da, Jahve nad Vojskama pohodit će stado svoje, dom Judin. I učinit će da budu k'o gizdav konj u boju:
Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.
4 od njega će poteći kamen zaglavni, klin šatorski, od njega ubojit luk, od njega sve vođe.
Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba mpe bakambi nyonso.
5 Bit će zajedno kao junaci što u boju gaze kao po blatu uličnom; vojevat će, jer Jahve je s njima, i osramotit će one koji konje jašu.
Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala na tango ya bitumba. Lokola Yawe azali elongo na bango, bakobunda mpe bakolonga, ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
6 “Ojačat ću dom Judin, spasiti dom Josipov. Opet ću ih naseliti, žao mi ih, i bit će kao da ih nisam odbacio, jer ja sam Jahve, Bog njihov - uslišat ću ih.”
« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
7 Efrajimci bit će kao junaci i radostit će im se srce kao od vina: vidjet će sinove svoje i veseliti se, u Jahvi će klicati srce njihovo.
Bato ya Efrayimi bakokoma lokola bilombe ya bitumba; mitema na bango ekotonda na esengo lokola bato bameli masanga; bana na bango ya mibali bakomona yango mpe bakotonda na esengo, bongo mitema na bango ekosepela kati na Yawe.
8 “Zazviždat ću im i sabrati ih, jer ja sam ih izbavio, bit će opet brojni kao što bjehu.
Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.
9 Rasijao sam ih među narode, ali će se oni u zemljama dalekim spomenuti mene, poučit će svoje sinove, i oni će se vratiti.
Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.
10 Vratit ću ih iz zemlje egipatske, sabrat ću ih iz Asirije i dovest ih u zemlju gileadsku i na Libanon, i neće biti dosta mjesta za njih.”
Nakozongisa bango wuta na Ejipito; nakosangisa bango wuta na Asiri; nakomema bango na Galadi mpe na Libani; kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango.
11 Prijeći će more egipatsko, jer on će udariti valove morske, sve dubine Nila presahnut će. Bit će oboren ponos Asirije, oduzeto žezlo Egiptu.
Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi; bambonge ya ebale monene ekovanda kimia, bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka. Lolendo ya Asiri ekosila mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa.
12 U Jahvi će biti snaga njihova, njegovim će se oni proslavit imenom - riječ je Jahvina.
Nakosala ete balendisama kati na Yawe: bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.

< Zaharija 10 >