< Psalmi 90 >

1 Molitva. Mojsija, sluge Božjega. Jahve, ti nam bijaše okrilje od koljena do koljena.
Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.
2 Prije nego se rodiše bregovi, prije nego postade kopno i krug zemaljski, od vijeka do vijeka, Bože, ti jesi!
Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.
3 Smrtnike u prah vraćaš i veliš: “Vratite se, sinovi ljudski!”
Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba: « Bino bato, bozonga na putulu! »
4 Jer je tisuću godina u očima tvojim k'o jučerašnji dan koji je minuo i kao straža noćna.
Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.
5 Razgoniš ih k'o jutarnji san, kao trava su što se zeleni:
Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.
6 jutrom cvate i sva se zeleni, a uvečer - već se suši i vene.
Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.
7 Zaista, izjeda nas tvoja srdžba i zbunjuje ljutina tvoja.
Kanda na Yo elembisaka biso nzoto, mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.
8 Naše si grijehe stavio pred svoje oči, naše potajne grijehe na svjetlost lica svojega.
Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.
9 Jer svi naši dani prođoše u gnjevu tvojemu, kao uzdah dovršismo godine svoje.
Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka mpo na kanda na Yo, mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.
10 Zbroj naše dobi sedamdeset je godina, ako smo snažni, i osamdeset; a većina od njih muka je i ništavost: jer prolaze brzo i mi letimo odavle.
Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
11 Tko će mjeriti žestinu gnjeva tvojega, tko proniknuti srdžbu tvoju?
Nani ayebi makasi ya kanda na Yo? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.
12 Nauči nas dane naše brojiti, da steknemo mudro srce.
Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
13 Vrati se k nama, Jahve! TÓa dokle ćeš? Milostiv budi slugama svojim!
Yawe, lembisa moke! Kino tango nini ekowumela? Yokela basali na Yo mawa!
14 Jutrom nas nasiti smilovanjem svojim, da kličemo i da se veselimo u sve dane!
Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.
15 Obraduj nas za dane kad si nas šibao, za ljeta kad smo stradali!
Zongisela biso na mikolo ya esengo, mikolo oyo onyokolaki biso; zongisela biso na mibu ya esengo, mibu oyo tomonaki pasi.
16 Neka se na slugama tvojim pokaže djelo tvoje i tvoja slava na djeci njihovoj!
Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo; mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi ya nkembo na Yo!
17 Dobrota Jahve, Boga našega, nek' bude nad nama daj da nam uspije djelo naših ruku, djelo ruku naših nek' uspije.
Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso!

< Psalmi 90 >