< Psalmi 41 >

1 Zborovođi. Psalam. Davidov. Blago onome koji misli na uboga i slaba: u dan nevolje Jahve će ga spasiti!
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Esengo na moto oyo akanisaka mobola! Yawe akokangola ye na tango ya pasi.
2 Jahve će ga štititi i živa sačuvati, sreću mu dati na zemlji i neće ga predati na volju dušmanima.
Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.
3 Jahve će ga ukrijepiti na postelji boli, bolest mu okrenuti u snagu.
Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.
4 Zavapih: “Jahve, smiluj mi se, iscijeli mi dušu jer tebi sagriješih!”
Nalobaki: « Oh Yawe, yokela ngai mawa; bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »
5 Neprijatelji zlo govore o meni: “Kad će umrijeti i kad će mu nestati imena?”
Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai: « Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te? »
6 I dođe li tko da me posjeti, himbeno govori, u srcu pakosti skuplja i vani opada.
Kati na bango, moto nyonso oyo ayaka kotala ngai alobaka kaka lokuta mpo na kobebisa lokumu na ngai, akangisaka kati na ye makambo ya lokuta mpe, soki kaka abimi libanda, apanzaka yango na matongi.
7 Mrzitelji moji svi složno šapuću o meni; zlo mi dosuđuju:
Banguna na ngai basanganaka kaka mpo na kotonga ngai mpe kokanisa mpo na libebi na ngai.
8 “Pogubna se pošast na nj oborila.” Ili: “Tko jednom leže, više ne ustaje.”
Balobaka: « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »
9 Pa i prijatelj moj u koga se uzdah, koji blagovaše kruh moj, petu na me podiže.
Ezala molingami na ngai ya kimia, oyo nazalaki kotiela motema mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai, abalukeli ngai.
10 A ti, Jahve, smiluj se meni i podigni me da im mogu uzvratiti.
Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.
11 Po tome ću znati da sam mio tebi: što se dušmanin moj neće veseliti nada mnom.
Nakoyeba ete osepelaka na ngai soki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.
12 A mene ćeš zdrava uzdržati i pred svoje me lice staviti dovijeka.
Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.
13 Blagoslovljen Jahve, Bog Izraelov, od vijeka do vijeka! Tako neka bude! Amen!
Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama libela na libela!

< Psalmi 41 >