< Psalmi 104 >

1 Blagoslivljaj Jahvu, dušo moja, Jahve, Bože moj, silno si velik! Odjeven veličanstvom i ljepotom,
Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,
2 svjetlošću ogrnut kao plaštem! Nebo si razapeo kao šator,
omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.
3 na vodama sagradio dvorove svoje. Od oblaka praviš kola svoja, na krilima vjetrova putuješ.
Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.
4 Vjetrove uzimaš za glasnike, a žarki oganj za slugu svojega.
Okomisaka bantoma na Yo mipepe, mpe basali na Yo, ndemo ya moto.
5 Zemlju si stavio na stupove njene: neće se poljuljati u vijeke vjekova,
Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.
6 pokrio si je vodama bezdanim k'o haljinom, iznad bregova stajahu vode;
Ozipa yango na mayi monene lokola elamba; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.
7 na tvoju se prijetnju povukoše, od tvoje grmljavine zadrhtaše.
Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,
8 Bregovi se digoše, doline spustiše na mjesto koje si im odredio.
emataki na likolo ya bangomba, ekitaki na mabwaku, na bisika oyo obongisaki mpo na yango.
9 Odredio si granicu koju ne smiju prijeći, da opet ne pokriju zemlju.
Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te; ekozonga lisusu te kozipa mokili.
10 Izvore svraćaš u potoke što žubore među brdima.
Obimisaka mayi ya bitima mpo na kosopa yango na mayi minene oyo elekaka na kati-kati ya bangomba;
11 Oni poje sve živine poljske, divlji magarci žeđ gase u njima.
ekomaka mayi ya komela mpo na banyama nyonso ya bilanga mpe mpo na ba-ane ya zamba.
12 Uz njih se gnijezde ptice nebeske i pjevaju među granama.
Bandeke ya likolo evandaka pembeni ya mayi yango mpe eyembaka kati na makasa.
13 Ti natapaš bregove iz dvorova svojih, zemlja se nasićuje plodom tvojih ruku.
Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.
14 Ti daješ te niče trava za stoku i bilje na korist čovjeku da izvede kruh iz zemlje
Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,
15 i vino što razvedruje srce čovječje; da uljem lice osvježi i da kruh okrijepi srce čovjeku.
vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.
16 Stabla se Jahvina napajaju hranom, cedri libanonski koje on zasadi.
Banzete ya Yawe etondi na mayi; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.
17 Ondje se ptice gnijezde, u čempresu dom je rodin.
Bandeke esalaka bazala na yango kuna, mpe nkoko evandaka na banzete ya sipele.
18 Visoki bregovi daju kozorogu a pećine jazavcu sklonište.
Bangomba milayi ezali ekimelo mpo na bantaba ya zamba, mpe madusu ya mabanga ezali bibombamelo mpo na bampanya ya zamba.
19 Ti si stvorio mjesec da označuje vremena i sunce znade kada ima zaći.
Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.
20 Kad razastreš tmine i noć se spusti, tad se šuljaju u njoj životinje šumske.
Otindaka molili, mpe butu ekomaka. Bongo banyama nyonso ya zamba ekomaka kotambola-tambola.
21 Lavići riču za plijenom i od Boga hranu traže.
Bana ya nkosi egangaka sima na nyama mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.
22 Kad sunce ograne, nestaju i liježu na ležaje.
Soki moyi ebimi, nkosi elongwaka, ezongaka mpo na kolala na bisika na yango;
23 Tad čovjek izlazi na dnevni posao i na rad do večeri.
kasi moto abimaka mpo na kokende na mosala na ye mpe asalaka kino na pokwa.
24 Kako su brojna tvoja djela, o Jahve! Sve si to mudro učinio: puna je zemlja stvorenja tvojih.
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele! Osalaki nyonso na bwanya; mokili etondi na biloko oyo okela.
25 Eno mora, velika i široka, u njemu vrve gmazovi bez broja, životinje male i velike.
Tala ndenge ebale monene ezali molayi mpe epanzana, etonda na banyama oyo tokoki kotanga te, kobanda na oyo eleki mike kino na oyo eleki minene.
26 Onud prolaze nemani, Levijatan kojeg stvori da se igra u njemu.
Kuna, bamasuwa ekendeke mpe ezongaka; bongo Leviatani oyo osala mpo ete esakanaka kuna.
27 I sva ova bića željno čekaju da ih nahraniš na vrijeme.
Nyonso etalelaka Yo mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.
28 Daješ li im, tada sabiru: otvaraš li ruku, nasite se dobrima.
Opesaka bilei, mpe ezwaka yango; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.
29 Sakriješ li lice svoje, tad se rastuže; ako dah im oduzmeš, ugibaju i opet se u prah vraćaju.
Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu;
30 Pošalješ li dah svoj, opet nastaju, i tako obnavljaš lice zemlje.
tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi; mpe okomisaka mokili sika.
31 Neka dovijeka traje slava Jahvina: nek' se raduje Jahve u djelima svojim!
Tika ete nkembo ya Yawe ewumela libela na libela! Tika ete Yawe asepela na misala na Ye!
32 On pogleda zemlju i ona se potrese, dotakne bregove, oni se zadime.
Soki atali mokili, mokili elengaka; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.
33 Pjevat ću Jahvi dokle god živim, svirat ću Bogu svome dokle god me bude.
Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
34 Bilo mu milo pjevanje moje! Ja ću se radovati u Jahvi.
Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye! Tika ete Yawe azala esengo na ngai!
35 Nek' zločinci sa zemlje nestanu i bezbožnika nek' više ne bude! Blagoslivljaj Jahvu, dušo moja! Aleluja!
Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te! Oh molimo na ngai, pambola Yawe! Aleluya, bokumisa Yawe!

< Psalmi 104 >