< Masese 6 >

1 Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
我兒,你若為朋友作保, 替外人擊掌,
2 omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
你就被口中的話語纏住, 被嘴裏的言語捉住。
3 Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
我兒,你既落在朋友手中, 就當這樣行才可救自己: 你要自卑,去懇求你的朋友。
4 kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba;
不要容你的眼睛睡覺; 不要容你的眼皮打盹。
5 mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.
要救自己,如鹿脫離獵戶的手, 如鳥脫離捕鳥人的手。
6 Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya!
懶惰人哪, 你去察看螞蟻的動作就可得智慧。
7 Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te;
螞蟻沒有元帥, 沒有官長,沒有君王,
8 ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.
尚且在夏天預備食物, 在收割時聚斂糧食。
9 Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo?
懶惰人哪,你要睡到幾時呢? 你何時睡醒呢?
10 Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala
再睡片時,打盹片時, 抱着手躺臥片時,
11 mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
你的貧窮就必如強盜速來, 你的缺乏彷彿拿兵器的人來到。
12 Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe:
無賴的惡徒, 行動就用乖僻的口,
13 Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi;
用眼傳神, 用腳示意, 用指點劃,
14 azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
心中乖僻, 常設惡謀, 布散紛爭。
15 Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
所以,災難必忽然臨到他身; 他必頃刻敗壞,無法可治。
16 Yawe ayinaka makambo wana motoba; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye:
耶和華所恨惡的有六樣, 連他心所憎惡的共有七樣:
17 Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,
就是高傲的眼, 撒謊的舌, 流無辜人血的手,
18 motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
圖謀惡計的心, 飛跑行惡的腳,
19 motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
吐謊言的假見證, 並弟兄中布散紛爭的人。
20 Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
我兒,要謹守你父親的誡命; 不可離棄你母親的法則,
21 Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.
要常繫在你心上, 掛在你項上。
22 Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
你行走,它必引導你; 你躺臥,它必保守你; 你睡醒,它必與你談論。
23 Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
因為誡命是燈,法則是光, 訓誨的責備是生命的道,
24 mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.
能保你遠離惡婦, 遠離外女諂媚的舌頭。
25 Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.
你心中不要戀慕她的美色, 也不要被她眼皮勾引。
26 Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.
因為,妓女能使人只剩一塊餅; 淫婦獵取人寶貴的生命。
27 Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te?
人若懷裏搋火, 衣服豈能不燒呢?
28 Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te?
人若在火炭上走, 腳豈能不燙呢?
29 Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.
親近鄰舍之妻的,也是如此; 凡挨近她的,不免受罰。
30 Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.
賊因飢餓偷竊充飢, 人不藐視他,
31 Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
若被找着,他必賠還七倍, 必將家中所有的盡都償還。
32 Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma;
與婦人行淫的,便是無知; 行這事的,必喪掉生命。
33 akobuka lokola mbuma: minyoko mpe kosambwa; bongo soni na ye ekosila te.
他必受傷損,必被凌辱; 他的羞恥不得塗抹。
34 Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe;
因為人的嫉恨成了烈怒, 報仇的時候決不留情。
35 akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.
甚麼贖價,他都不顧; 你雖送許多禮物,他也不肯干休。

< Masese 6 >