< Ezayi 36 >

1 Tango Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango.
In the fourteenth year of King Hezekiah, Sennacherib, king of Assyria, attacked all the fortified cities of Judah and captured them.
2 Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,
Then the king of Assyria sent the chief commander from Lachish to Jerusalem to King Hezekiah with a great army. He approached the conduit of the upper pool, on the highway to the launderers' field, and stood by it.
3 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye.
The Israelite officials who went out of the city to talk with them were Hilkiah's son Eliakim, the palace administrator, Shebna the king's secretary, and Asaph's son Joah, who wrote down the government decisions.
4 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango: « Boloba na Ezekiasi: ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: Otie elikya na yo na nini?
The chief commander said to them, “Tell Hezekiah that the great king, the king of Assyria, says, 'What is the source of your confidence?
5 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai?
You speak only useless words, saying there is counsel and strength for war. Now in whom are you trusting? Who has given you courage to rebel against me?
6 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema.
Look, you are trusting in Egypt, that splintered reed that you use as a walking staff, but if a man leans on it, it will stick into his hand and pierce it. That is what Pharaoh king of Egypt is to anyone who trusts in him.
7 Mpe soki olobi na ngai: ‘Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso.’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi: ‘Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo?’
But if you say to me, “We are trusting in Yahweh our God,” is not he the one whose high places and altars Hezekiah has taken away, and has said to Judah and to Jerusalem, “You must worship before this altar in Jerusalem”?
8 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri: nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango!
Now therefore, I want to make you a good offer from my master the king of Assyria. I will give you two thousand horses, if you are able to find riders for them.
9 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango?
How could you resist even one captain of the least of my master's servants? You have put your trust in Egypt for chariots and horsemen!
10 Okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa mokili oyo na ndingisa ya Yawe te? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. › »
Now then, have I traveled up here without Yahweh to fight against this land and destroy it? Yahweh said to me, “Attack this land and destroy it.”'”
11 Eliakimi, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi: — Tobondeli yo, loba na biso, basali na yo, na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.
Then Eliakim son of Hilkiah, and Shebnah, and Joah said to the chief commander, “Please speak to your servants in the Aramean language, Aramaic, for we understand it. Do not speak with us in the language of Judah in the ears of the people who are on the wall.”
12 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki: — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino? Te! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino?
But the chief commander said, “Has my master sent me to your master and to you to speak these words? Has he not sent me to the men who sit on the wall, who will have to eat their own dung and drink their own urine with you?”
13 Boye, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre: « Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri!
Then the chief commander stood and shouted in a loud voice in the Jews' language, saying, “Listen to the words of the great king, the king of Assyria.
14 Tala makambo oyo mokonzi alobi: Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino!
The king says, 'Do not let Hezekiah deceive you, for he will not be able to rescue you.
15 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba: ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›
Do not let Hezekiah make you trust in Yahweh, saying, “Yahweh will surely rescue us; this city will not be given into the hand of the king of Assyria.”'
16 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi: Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye
Do not listen to Hezekiah, for this is what the king of Assyria says: 'Make peace with me and come out to me. Then every one of you will eat from his own vine and from his own fig tree, and drink from the water in his own cistern.
17 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika; mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino.
You will do this until I come and take you away to a land like your own land, a land of grain and new wine, a land of bread and vineyards.'
18 Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba: ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri?
Do not let Hezekiah mislead you, saying, 'Yahweh will rescue us.' Has any of the gods of the peoples rescued them from the hand of the king of Assyria?
19 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi? Wapi banzambe ya Sefarivayimi? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai?
Where are the gods of Hamath and Arpad? Where are the gods of Sepharvaim? Have they rescued Samaria from my power?
20 Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai? »
Among all the gods of these lands, is there any god who has rescued his land from my power, as if Yahweh could save Jerusalem from my power?”
21 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo: « Bopesa ye eyano te! »
But the people remained silent and did not respond, for the king's order was, “Do not answer him.”
22 Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.
Then Eliakim son of Hilkiah, who was over the household, Shebna the scribe, and Joah son of Asaph, the recorder, came to Hezekiah with their clothes torn, and reported to him the words of the chief commander.

< Ezayi 36 >