< Ezayi 35 >

1 Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela! Tika ete esobe eyoka esengo mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze!
The wilderness and the Arabah will be glad; and the desert will rejoice and blossom. Like the rose,
2 Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
it will blossom abundantly and rejoice with joy and singing; the glory of Lebanon will be given to it, the splendor of Carmel and Sharon; they will see the glory of Yahweh, the splendor of our God.
3 Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga;
Strengthen the weak hands, and steady the knees that shake.
4 Loba na bato oyo bazali kobanga: « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »
Say to those with a fearful heart, “Be strong, do not fear! Look, your God will come with vengeance, with the recompense of God. He will come and save you.”
5 Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.
Then the eyes of the blind will see, and the ears of the deaf will hear.
6 Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.
Then the lame man will leap like a deer, and the mute tongue will sing, for water breaks out in the Arabah, and streams in the wilderness.
7 Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
The burning sand will become a pool, and the thirsty ground springs of water; in the habitation of jackals, where they once lay, will be grass with reeds and rushes.
8 Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
A highway will be there called The Holy Way. The unclean will not travel it. But it will be for him who walks in it. No fool will go on it.
9 Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.
No lion will be there, no ferocious beast will be on it; they will not be found there, but the redeemed will walk there.
10 Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.
The ransomed of Yahweh will return and come with singing to Zion, and everlasting joy will be on their heads; gladness and joy will overtake them; sorrow and sighing will flee away.

< Ezayi 35 >