< 1 Bakolinto 6 >

1 Soki ndeko moko kati na bino azwi ndeko mosusu likambo, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya Bapagano, na esika ete akende kofunda epai ya basantu?
あなたがたの中には、仲間の者と争いを起こしたとき、それを聖徒たちに訴えないで、あえて、正しくない人たちに訴え出るような人がいるのでしょうか。
2 Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike?
あなたがたは、聖徒が世界をさばくようになることを知らないのですか。世界があなたがたによってさばかれるはずなのに、あなたがたは、ごく小さな事件さえもさばく力がないのですか。
3 Boyebi te ete tokosambisa ba-anjelu? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo?
私たちは御使いをもさばくべき者だ、ということを、知らないのですか。それならこの世のことは、言うまでもないではありませんか。
4 Tango bobendanaka na tina na makambo ya bomoi oyo, bozwaka lokola basambisi, bato oyo bazali na tina te na miso ya Lingomba!
それなのに、この世のことで争いが起こると、教会のうちでは無視される人たちを裁判官に選ぶのですか。
5 Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye?
私はあなたがたをはずかしめるためにこう言っているのです。いったい、あなたがたの中には、兄弟の間の争いを仲裁することのできるような賢い者が、ひとりもいないのですか。
6 Kasi mpo na nini ndeko moko akende kofunda ndeko mosusu, mpe asala yango liboso ya Bapagano?
それで、兄弟は兄弟を告訴し、しかもそれを不信者の前でするのですか。
7 Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino?
そもそも、互いに訴え合うことが、すでにあなたがたの敗北です。なぜ、むしろ不正をも甘んじて受けないのですか。なぜ、むしろだまされていないのですか。
8 Nzokande, bino, bokosaka mpe bosalaka mabe; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino.
ところが、それどころか、あなたがたは、不正を行なう、だまし取る、しかもそのようなことを兄弟に対してしているのです。
9 Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,
あなたがたは、正しくない者は神の国を相続できないことを、知らないのですか。だまされてはいけません。不品行な者、偶像を礼拝する者、姦淫をする者、男娼となる者、男色をする者、
10 miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
盗む者、貪欲な者、酒に酔う者、そしる者、略奪する者はみな、神の国を相続することができません。
11 Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.
あなたがたの中のある人たちは以前はそのような者でした。しかし、主イエス・キリストの御名と私たちの神の御霊によって、あなたがたは洗われ、きよい者とされ、義と認められたのです。
12 Bolobaka: « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nyonso ezali na litomba te; « nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nakomitika te na se ya bokonzi ya eloko songolo;
すべてのことが私には許されたことです。しかし、すべてが益になるわけではありません。私にはすべてのことが許されています。しかし、私はどんなことにも支配されはしません。
13 « bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.
食物は腹のためにあり、腹は食物のためにあります。ところが神は、そのどちらをも滅ぼされます。からだは不品行のためにあるのではなく、主のためであり、主はからだのためです。
14 Solo, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa mpe biso, na nguya na Ye.
神は主をよみがえらせましたが、その御力によって私たちをもよみがえらせてくださいます。
15 Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te!
あなたがたのからだはキリストのからだの一部であることを、知らないのですか。キリストのからだを取って遊女のからだとするのですか。そんなことは絶対に許されません。
16 Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi elongo na ye nzoto moko? Pamba te elobama: « Bango mibale bakokoma nzoto moko. »
遊女と交われば、一つからだになることを知らないのですか。「ふたりの者は一心同体となる。」と言われているからです。
17 Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.
しかし、主と交われば、一つ霊となるのです。
18 Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
不品行を避けなさい。人が犯す罪はすべて、からだの外のものです。しかし、不品行を行なう者は、自分のからだに対して罪を犯すのです。
19 Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te?
あなたがたのからだは、あなたがたのうちに住まれる、神から受けた聖霊の宮であり、あなたがたは、もはや自分自身のものではないことを、知らないのですか。
20 Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.
あなたがたは、代価を払って買い取られたのです。ですから自分のからだをもって、神の栄光を現わしなさい。

< 1 Bakolinto 6 >