< 1 Bakolinto 6 >

1 Soki ndeko moko kati na bino azwi ndeko mosusu likambo, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya Bapagano, na esika ete akende kofunda epai ya basantu? 2 Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike? 3 Boyebi te ete tokosambisa ba-anjelu? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo? 4 Tango bobendanaka na tina na makambo ya bomoi oyo, bozwaka lokola basambisi, bato oyo bazali na tina te na miso ya Lingomba! 5 Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye? 6 Kasi mpo na nini ndeko moko akende kofunda ndeko mosusu, mpe asala yango liboso ya Bapagano? 7 Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino? 8 Nzokande, bino, bokosaka mpe bosalaka mabe; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino. 9 Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, 10 miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. 11 Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso. 12 Bolobaka: « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nyonso ezali na litomba te; « nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nakomitika te na se ya bokonzi ya eloko songolo; 13 « bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto. 14 Solo, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa mpe biso, na nguya na Ye. 15 Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te! 16 Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi elongo na ye nzoto moko? Pamba te elobama: « Bango mibale bakokoma nzoto moko. » 17 Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo. 18 Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko. 19 Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te? 20 Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.

< 1 Bakolinto 6 >