< Psalms 147 >

1 Praise Yah, for it is good to sing praises to our God; for it is pleasant and fitting to praise him.
Bokumisa Yawe! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye!
2 Yahweh builds up Jerusalem. He gathers together the outcasts of Israel.
Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.
3 He heals the broken in heart, and binds up their wounds.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
4 He counts the number of the stars. He calls them all by their names.
Ayebi motango ya minzoto mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.
5 Great is our Lord, and mighty in power. His understanding is infinite.
Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya; mayele na Ye ezali na mondelo te.
6 Yahweh upholds the humble. He brings the wicked down to the ground.
Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
7 Sing to Yahweh with thanksgiving. Sing praises on the harp to our God,
Boyembela Yawe nzembo ya matondi! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye!
8 who covers the sky with clouds, who prepares rain for the earth, who makes grass grow on the mountains.
Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.
9 He provides food for the livestock, and for the young ravens when they call.
Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
10 He doesn’t delight in the strength of the horse. He takes no pleasure in the legs of a man.
Asepelaka na makasi ya mpunda te mpe alingaka te nguya ya moto;
11 Yahweh takes pleasure in those who fear him, in those who hope in his loving kindness.
kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.
12 Praise Yahweh, Jerusalem! Praise your God, Zion!
Yelusalemi, pesa nkembo na Yawe! Siona, kumisa Nzambe na yo!
13 For he has strengthened the bars of your gates. He has blessed your children within you.
Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.
14 He makes peace in your borders. He fills you with the finest of the wheat.
Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.
15 He sends out his commandment to the earth. His word runs very swiftly.
Atindaka mitindo na Ye na mokili, mpe maloba na Ye epanzanaka mbala moko!
16 He gives snow like wool, and scatters frost like ashes.
Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu;
17 He hurls down his hail like pebbles. Who can stand before his cold?
akweyisaka mabanga ya mvula yango lokola mabanga ya mike-mike; nani akoki kotelema na malili na yango?
18 He sends out his word, and melts them. He causes his wind to blow, and the waters flow.
Soki kaka atindi liloba, malili ekomaka kosila moke-moke; mpe soki atindi mopepe, mayi ekomaka kotiola.
19 He shows his word to Jacob, his statutes and his ordinances to Israel.
Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.
20 He has not done this for just any nation. They don’t know his ordinances. Praise Yah!
Asalaki bongo na ekolo ata moko te; boye eyebaka mpe mibeko na Ye te. Bokumisa Yawe!

< Psalms 147 >