< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 6 >

1 ᎦᏙᎨᏃ ᏓᏓᏛᏂ? ᏥᎪ ᎠᏏᏉ ᎨᏗᏍᎦᏅᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᎤᏁᏉᎢᏍᏗᏱ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ?
Boye, toloba nini? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka?
2 ᎬᏩᏟᏍᏗ. ᎠᏴ ᏗᎩᏲᎱᏒᎯ ᎠᏍᎦᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᎦᏙ ᏱᏚᎵᏍᏙᏓ ᏰᎵ ᎠᏏ ᎾᎿᎭᏴᏓᎴᏂᏓ?
Soki moke te! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu?
3 ᏝᏍᎪ ᏱᏥᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ ᏂᏗᎥ ᏤᎦᏬᎥᎯ ᎨᏒ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᏓᏓᏲᎯᏎᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏲᎱᏒ ᎤᎬᏩᎵ ᏕᎦᏬᎥᎢ?
Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye?
4 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏤᎦᏬᎥᎯ ᏥᎩ, ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏧᎳᎭ ᏕᎩᏂᏌᏅᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏗᎩᏲᎱᏒᎯ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ; ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏲᎱᏒ ᏥᏓᎦᎴᏔᏁᎢ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎬᏔᏅᎯ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᎢᏓᎴᏂᏙᎲ ᎢᏤ ᏱᏓᎴᏂᏙᎭ.
Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
5 ᎢᏳᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏲᎱᏒ ᏗᏓᏤᎵᏛ ᎢᏰᎬᏁᎸᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᏚᎴᎯᏌᏅ ᏗᏓᏤᎵᏛ ᎢᏰᎬᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye.
6 ᎯᎠᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᏗᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᏪᏥ ᎠᏍᎦᏯ ᏓᏓᎿᎭᏩᏍᏛ ᎠᎦᏛᏅ ᎢᏧᎳᎭ ᎾᏍᎩ [ ᎦᎶᏁᏛ ] ᎠᎦᏛᏅᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏰᎸ ᎡᎲ ᎤᏲᎱᎯᏍᏗᏱ, ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎠᏍᎦᏂ ᏗᎩᎾᏢᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.
7 ᎾᏍᎩᏰᏃ Ꮎ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᎤᏚᏓᎳᎡᎸᎯ ᎨᏐ ᎠᏍᎦᏂ.
Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo: azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu.
8 ᎢᏳᏰᏃ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏧᎳᎭ ᏗᎩᏲᎱᏒᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎢᏙᎯᏳᎲᏍᎦ ᎢᏧᎳᎭ ᏗᏛᏃᏛ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ;
Nzokande, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
9 ᎢᏗᎦᏔᎭᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏲᎱᏒ ᏣᎦᎴᏔᏅᎯ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᏔᎵᏁ ᎤᏲᎱᎯᏍᏗ ᏱᎩ; ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᎤᏓᎵᏁᎯᏕᎯ ᏱᎩ.
Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.
10 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᏥᎩ, ᎠᏍᎦᏂ ᎤᎬᏩᎵ ᏌᏉ ᏄᏲᎱᏒᎩ; ᎠᏍᎩᏂ ᎬᏃᏛ ᏥᎩ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᎤᎬᏩᎵ ᎬᏃᏛ.
Akufaki mpo na lisumu mbala moko mpo na libela; kasi sik’oyo azali na bomoi, mpe azali na bomoi mpo na Nzambe.
11 ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎢᏨᏒ ᎨᏒ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᏗᏥᏲᎱᏒᎯ ᎨᏒ ᎢᏣᏓᏓᏅᏖᏍᎨᏍᏗ ᎠᏍᎦᏂ ᎤᎬᏩᎵ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎤᏤᎵ ᎤᎬᏩᎵ ᏗᏨᏃᏛ ᎨᏒ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ.
Boye bino mpe, bomimona lokola bakufi mpo na lisumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Yesu-Klisto.
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎠᏍᎦᏂ ᏳᎬᏫᏳᏌᏕᎨᏍᏗ ᏗᏲᎩ ᏗᏥᏰᎸᎢ, ᎾᏍᎩ [ ᎠᏍᎦᏂ ] ᎢᏦᎯᏳᏗᏱ ᎾᎿᎭ[ᏗᏥᏰᎸ ] ᎤᏚᎸᏅᎥᏍᎬᎢ.
Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.
13 ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᎠᏍᎦᏂ ᏤᏥᏲᎯᏎᎸᎩ ᏗᏥᏰᎸ ᎤᏚᏓᏕᏫᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏗᏨᏙᏗᏱ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᏗᏥᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎢᏨᏒ ᏤᏣᏓᏲᎯᏏ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗ ᎤᎾᏛᏂᏛᎯ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏗᏥᏰᎸ ᎤᏚᏓᏕᏫᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏕᏥᏲᎯᏎᎸᎩ ᎾᏍᎩ ᏗᏨᏙᏗᏱ ᏚᏳᎪᏛ ᏗᏥᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ,
Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.
14 ᎠᏍᎦᏂᏰᏃ ᎥᏝ ᏱᎨᏣᏓᎵᏁᎯᏕᎮᏍᏗ; ᎥᏝᏰᏃ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗᏱ ᏱᏣᏓᏄᏴᏗ, ᎬᏩᎦᏘᏯᏍᎩᏂ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏣᏓᏄᏴᏗ.
Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.
15 ᎦᏙᏃ? ᎢᏗᏍᎦᏅᎨᏍᏗᏍᎪ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗᏱ ᏂᎦᏓᏄᏴᏛᎾ ᎨᏒᎢ, ᎬᏩᎦᏘᏯᏍᎩᏂ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎦᏓᏄᏴᏛᎢ? ᎬᏩᏟᏍᏗ.
Boye toloba nini? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu? Soki moke te!
16 ᏝᏍᎪ ᏱᏥᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᏱᏕᏣᏓᏲᎯᏎᎸ ᎢᏥᏅᏏᏙᎲ ᎡᏦᎢᏳᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏥᎾᏝᎢ ᎨᏒ ᎡᏦᎢᏳᎲᏍᎩ; ᎾᏍᏉ ᎠᏍᎦᏂ ᏱᎩ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎬᏗᏍᎩ ᏱᎩ, ᎠᎴ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏱᎩ, ᎠᏚᏓᎴᏍᏗ ᎨᏒ ᎬᏗᏍᎩ?
Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo?
17 ᎠᏗᎾ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎵᎮᎵᏤᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎠᏍᎦᏂ ᏗᏥᎾᏝᎢ ᏥᎨᏒᎩ, ᎠᏎᏃ ᏗᏥᎾᏫ ᎬᏗ ᎢᏦᎯᏳᏅ ᎾᏍᎩ ᏄᏍᏛ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏤᏥᏲᎯᏎᎸᎯ ᎨᏒᎢ.
Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino,
18 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏍᎦᏂ ᎨᏒ ᏂᏗᏥᎾᏝᎥᎾ ᏥᏄᎵᏍᏔᏅ, ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ ᏗᏥᎾᏝᎢ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ.
bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.
19 ᏴᏫ ᎢᏳᏂᏪᏍᏗ ᏂᏥᏪᎭ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎢᏥᏇᏓᎸ ᏩᎾᎦᎳᎯᏳ ᎨᏒᎢ; ᏗᏥᏰᎸᏰᏃ ᎢᏣᏚᏓᏕᏫᏒ ᏥᏕᏥᏲᏒᎩ ᎦᏓᎭ ᎠᎴ ᎤᏲ ᎨᏒ ᎤᏂᎾᏝᎢ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎤᏲ ᏗᏥᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ; ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎪᎯ ᎨᏒᎢ, ᏗᏥᏰᎸ ᎢᏣᏚᏓᏕᏫᏒ ᏗᏥᏲᎯ ᎤᏂᎾᏝᎢ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏥᏍᎦᎾ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.
20 ᎾᎯᏳᏰᏃ ᎠᏍᎦᏂ ᏗᏥᎾᏝᎢ ᏥᎨᏒᎩ, ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ ᏂᏗᏥᎾᏝᎥᎾ ᎨᏒᎩ.
Tango bozalaki nanu bawumbu ya lisumu, bozalaki na bonsomi liboso ya bosembo.
21 ᎾᎯᏳᏃ ᏥᎨᏒᎩ ᎦᏙ ᎤᏍᏗ ᎢᏥᏁᏉᏤᎮ ᎾᏍᎩ ᎪᎯ ᏥᏣᏕᎰᏍᎦ? ᎠᏲᎱᎯᏍᏗᏰᏃ ᎨᏒ ᏭᎵᏰᎢᎶᎯᏍᏗ ᎾᏍᎩ.
Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa?
22 ᎪᎯᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᎠᏍᎦᏂ ᏂᏗᏥᎾᏝᎥᎾ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏥᎾᏝᎢ ᏥᏄᎵᏍᏔᏅ, ᎢᏥᏁᏉᎥᎯ ᎢᏥᎭ ᏂᏥᏍᎦᏅᎾ ᎢᏨᏁᎯ, ᏩᎵᏍᏆᏗᎯᎲᏃ ᏭᏍᏗᏥᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎬᏂᏛ. (aiōnios g166)
Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko. (aiōnios g166)
23 ᎠᏍᎦᏂᏰᏃ ᎤᏓᎫᏴᎡᏗ ᎨᏒ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎩ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᎬᏂᏛ ᏭᏍᏗᏥᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵᎦ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ. (aiōnios g166)
Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōnios g166)

< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 6 >