< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 16 >

1 ᎬᏂᎨᏒ ᏂᏨᏴᏁᎭ ᎣᎩᏙ ᏈᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᏯᏙᎯᎯ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᎡᏟᏯ;
Natindeli bino Foebe, ndeko na biso ya mwasi, oyo azali mosali ya Lingomba ya Sankresi.
2 ᎾᏍᎩ ᏤᏣᏓᏂᎸᎢᏍᏗᏱ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᏅᏓᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩᏯ ᏥᏚᏳᎪᏗ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗᏱ ᎤᎾᏓᏅᏘ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎡᏥᏍᏕᎸᏗᏱ ᏂᎦᎥᏉ ᎪᎱᏍᏗ ᎡᏥᏍᏕᎸᏗᏱ ᎤᏚᎵᏍᎬᎢ; ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎤᏂᏣᏘ ᏧᏍᏕᎸᏛ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎾᏍᏉ ᎠᎩᏍᏕᎸᏛ.
Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.
3 ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ ᏈᏏᎳ ᎠᎴ ᎡᏈᎳ, ᎢᏧᎳᎭ ᏦᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto.
4 ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎬᏅ ᎠᏂᏍᏕᎵᏍᎬᎢ, ᎤᏅᏒ ᏗᏂᏴᏤᏂ ᎡᎳᏗ ᏚᏂᏅᏅ; ᎾᏍᎩ, ᎥᏝ ᎠᏋᏒᏉ ᏱᎦᏥᏯᎵᎡᎵᏤᎭ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᏂᎦᏛ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᏚᎾᏓᏡᏩᏗᏒ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᏓᏁᏩᏗᏒᎢ;
Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano.
5 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᎾᎿᎭᎠᏂᏁᎸᎢ. ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ ᎤᏣᏘ ᏥᎨᏳᎢ ᎢᏈᏂᏓ, ᎾᏍᎩ ᎢᎬᏱᏱ ᎤᎦᏛᎾᏨᎯ ᏥᏂᎦᎵᏍᏗᎭ ᎡᎦᏯ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎵᏍᎪᎸᏓᏁᏗ.
Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia.
6 ᎺᎵ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ, ᎤᏣᏘ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎠᏴ ᎣᎩᏍᏕᎵᏍᎬᎢ.
Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.
7 ᎥᏠᏂᎦ ᎠᎴ ᏧᏂᏯ ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ, ᎾᏍᎩ ᎪᎱᏍᏗ ᏗᏋᏅ, ᎠᎴ ᎢᏧᎳᎭ ᏦᎩᏴᎩᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎨᏥᎸᏉᏗ ᏥᎩ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎠᏁᎲᎢ; ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎢᎬᏱ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎢᏳᎾᎵᏍᏔᏅᎯ ᎠᏴ ᎣᏂ.
Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.
8 ᎠᎻᏟᏯ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ, ᎾᏍᎩ ᏥᎨᏳᎢ ᎢᏧᎳᎭ ᎣᏍᏙᎯᏳᎲᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ.
Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo.
9 ᎠᏇᏂ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ ᎢᏧᎳᎭ ᏦᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᏍᏕᎩ ᏥᎨᏳᎢ.
Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai.
10 ᎠᏇᎵ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ, ᏣᎦᏓᏂᎸᏨᎯ ᎦᎶᏁᏛ ᎪᎯᏳᎲᏍᎩ ᎨᏒᎢ. ᎡᎵᏍᏓᏊᎳ ᏚᏓᏘᎾᎥ ᎠᏁᎳ ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ.
Bopesa mbote na Apelesi oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto. Bopesa mbote mpe na bavandi ya ndako ya Arisitobile.
11 ᎡᎶᏓᏂ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏋᏅ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ. ᎾᏏᏌ ᏚᏓᏘᎾᎥ ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᏃᎯᏳᎲᏍᎩ ᎨᏒ ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ.
Bopesa mbote na Erodioni, ndeko na ngai. Bopesa mbote na bavandi ya ndako ya Narisise, oyo bazali kati na Nkolo.
12 ᏜᏓᏈᎾ ᎠᎴ ᏜᏓᏉᏏ ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᏥᎩ. ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ ᎠᏥᎨᏳᎢ ᏆᏏ, ᎤᏣᏘ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
13 ᎷᏆ ᎡᏥᏲᎵᎸᎭ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏑᏰᏛ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎪᎯᏳᎲᏍᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎣᎩᏂᏥ.
Bopesa mbote na Rifisi, moponami kati na Nkolo. Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai.
14 ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ ᎠᏏᏂᏟᏓ, ᏈᎵᎦᏂ, ᎭᎹᏏ, ᏆᏠᏆᏏ, ᎭᎻᏏ, ᎠᎴ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᎾᏍᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᏣᏁᎭ.
Bopesa mbote na Asenkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi, mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo.
15 ᏕᏥᏲᎵᎸᎭ ᏆᎶᎳᎦ, ᎠᎴ ᏧᎵᎠ, ᏂᎵᎠ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏙ, ᎠᎴ ᎣᎵᎻᏆ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥᏉ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎾᏍᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᏣᏁᎭ.
Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na Olipasi, ndeko na ye ya mwasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo.
16 ᎢᏨᏒ ᎨᏒ ᏕᏣᏓᏲᎵᎮᏍᏗ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᏓᏙᏪᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ. ᏧᎾᏁᎶᏗ ᏚᎾᏓᏡᏩᏗᏒ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏤᎵᎦ ᏫᎨᏥᏲᎵᎭ.
Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.
17 ᎠᎴᏬ ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎢᏨᏍᏗᏰᏗᎭ ᏗᏣᎦᏌᏯᏍᏙᏗᏱ ᏗᎦᎴᏅᏗᏱ ᎠᎴ ᎤᏓᎿᎭᏍᏆᎶᏍᏗᏱ ᎢᏯᏅᏁᎯ, ᏗᎦᏘᎸᏍᏗᏱ ᏗᏕᏲᏅᎯ ᎨᏒ ᏄᏍᏛ ᎢᏣᏕᎶᏆᎥᎢ; ᎠᎴ ᏕᏣᏓᏅᎡᎮᏍᏗ.
Bandeko, nabondeli bino: bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.
18 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎢᏳᎾᏍᏗ ᎥᏝ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎪᎱᏍᏗ ᏯᎾᏛᏁᎭ, ᎤᏅᏒᏉᏍᎩᏂ ᎤᏂᏍᏉᎵᏱ; ᎠᎴ ᎤᏬᏚᎯ ᎠᎴ ᎣᏍᏛ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏅᏗᏍᎬᎢ ᏓᏂᎶᏄᎮᏍᎪ ᏧᏂᎾᏫ ᎾᏁᏯᏔᎲᎾ.
Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.
19 ᎢᏦᎯᏳᏒᏰᏃ ᏚᏃᏣᎶᏨ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᎠᏁᎲᎢ. ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎦᎵᎮᎵᎦ ᏂᎯ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ; ᎠᏎᏍᎩᏂᏃᏅ ᎠᏆᏚᎵᎭ ᎢᏥᎦᏔᎾᎢ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᎠᏃ ᎤᏲ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ ᏂᏥᎦᏔᎾᎥᎾ.
Pamba te bato nyonso bayebi botosi na bino, mpe motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala bolamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali mabe.
20 ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᏓᏁᎯ ᏂᎪᎯᎸᎾᏉ ᏎᏓᏂ ᎤᏪᏓᏫᏙᏗ ᏅᏓᎦᎵᏍᏓᏂ ᏗᏣᎳᏏᏕᏂ ᎭᏫᏂᏗᏢ. ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏤᎳᏗᏙᎮᏍᏗ. ᎡᎺᏅ.
Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino!
21 ᏗᎹᏗ ᎢᏧᎳᎭ ᏦᎩᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ, ᎠᎴ ᎷᏏᏯ, ᎠᎴ ᏤᏌᏂ, ᎠᎴ ᏐᏏᏇᏓ ᎪᎱᏍᏗ ᏗᏋᏅ, ᏫᎨᏥᏲᎵᎦ.
Timote, moninga na ngai ya mosala, elongo na Lusiusi, Jazoni mpe Sosipatere, oyo bazali bandeko na ngai, batindeli bino mbote.
22 ᎠᏴ ᏓᏏᏯ, ᎯᎠ ᎪᏪᎵ ᎠᏆᏪᎳᏅᎯ ᏫᏨᏲᎵᎦ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ.
Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo.
23 ᎦᏯ ᎠᎩᏍᏆᏂᎪᏗᏍᎩ ᎠᎴ ᎾᏂᎥᏉ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᏗᏍᏆᏂᎪᏗᏍᎩ, ᏫᏥᏲᎵᎦ. ᎢᎳᏍᏓ, ᎠᏰᎵ ᎡᎯ ᎦᏚᎲ ᎠᎲ ᎠᎦᏘᏯ, ᏫᏥᏲᎵᎦ, ᎠᎴ ᏉᏓ, ᎢᏓᎵᏅᏟ.
Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [
24 ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏤᎳᏗᏙᎮᏍᏗ ᏂᏥᎥᎢ. ᎡᎺᏅ.
Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso! Amen.]
25 ᎾᏍᎩᏃ ᏰᎵᏉ ᏗᏣᎵᏂᎪᎯᏍᏙᏗ ᏥᎩ ᎾᏍᎩᏯ ᏂᎦᏪᏍᎬ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎠᏆᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩᏯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎦᎵᏥᏙᏅᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᎸᎯ ᎨᏒ ᎤᏕᎵᏛ, ᎾᏍᎩ ᎡᎶᎯ ᏧᏓᎴᏅᎲ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᎠᏕᎵᏍᏔᏅᎯ ᏥᎨᏎᎢ, (aiōnios g166)
Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala, (aiōnios g166)
26 ᎪᎯᏍᎩᏂ ᎿᎭᏉ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᎸᎯ, ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᏧᏃᏪᎳᏅᎯ ᏗᎬᏔᏅᎯ ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏓᏅᏖᏍᎬ ᎠᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎡᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎨᎬᎸᎯ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎤᏃᎯᏳᏗᏱ ᎤᎬᏩᎵ — (aiōnios g166)
kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye, (aiōnios g166)
27 ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏩᏒᎯᏳ ᎠᎦᏔᎾᎢ ᏥᎩ, ᎦᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏂᎪᎯᎸᎢ. ᎡᎺᏅ. (aiōn g165)
na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto! Amen! (aiōn g165)

< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 16 >