< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 14 >

1 ᎩᎶ ᏩᎾᎦᎳ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏬᎯᏳᏒᎢ ᏕᏣᏓᏂᎸᎨᏍᏗ, ᎥᏝ ᎠᏗᎾ ᏗᏧᎪᏙᏗᏱᏉ ᏄᏍᏛ ᎠᏓᏅᏕᏍᎬᎢ.
Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.
2 ᎠᏏᏴᏫ ᏂᎦᎥᏉ ᎪᎱᏍᏗ ᎬᏩᎵᏍᏓᏴᏙᏗ ᎨᏒ ᎤᏬᎯᏳᏐᎢ; ᎩᎶᏃ ᎠᏩᎾᎦᎳ ᎠᏛᏒᎥᏍᎩᏉ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗᏍᎪᎢ.
Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.
3 ᏞᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎩ ᏅᎵᏌᎵᏉ ᏳᏰᎸᏁᏍᏗ Ꮎ ᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎾ; ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎾ ᏱᏚᏭᎪᏓᏁᎴᏍᏗ Ꮎ ᎠᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎩ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᏚᏓᏂᎸᏨ.
Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye.
4 ᎦᎪ ᏂᎯ ᏥᏕᎯᏳᎪᏓᏁ ᏅᏩᏓᎴ ᎤᏅᏏᏓᏍᏗ? ᎤᏩᏒᏉ ᎤᏅᏏᏙᎯ ᎤᎵᏍᎦᏍᏙᏗ ᎦᏙᎬ ᎠᎴ ᎦᏅᎬᎢ. ᎥᎥ, ᎠᏥᏲᏍᏙᏓᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏅᎢᏍᏗᏱ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᏰᎵᏉ ᎤᎴᏗᏱ ᎢᎬᏩᏁᏗ.
Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.
5 ᎩᎶ ᎤᏟ ᏄᎸᏉᏙ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏍᏗ ᎢᎦ ᎡᏍᎦᏉ ᏅᏩᏓᎴ ᎢᎦ; ᎩᎶᏃ ᏂᎦᎥᏉ ᎢᎦ ᏚᎸᏉᏙᎢ. ᎾᏂᎥ ᎩᎶ ᎠᎧᎵᎢ ᎤᏃᎯᏳᏎᏍᏗ ᎤᏅᏒ ᏙᏧᎾᏓᏅᏛᎢ.
Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko: tika ete moto na moto kati na bango andimisama makasi na makanisi na ye.
6 ᎩᎶ ᏧᎸᏉᏙ ᎢᎦ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᎸᏉᏓᏁᎰᎢ; ᎩᎶᏃ ᏄᎸᏉᏛᎾ ᏥᎨᏐ ᎢᎦ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᎸᏉᏗᏍᎪ ᏄᎸᏉᏛᎾ ᎨᏒᎢ. ᎩᎶ ᏣᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎪᎢ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎵᏍᏓᏴᎾᏁᎰᎢ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎠᎵᎮᎵᏤᎰᎢ; ᎠᎴ ᎩᎶ ᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎾ ᏥᎨᏐᎢ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎦᎸᏉᏙᏗᏍᎪ ᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎵᎮᎵᏤᎰᎢ.
Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe.
7 ᎥᏝᏰᏃ ᎩᎶ ᎢᎦᏁᎳᎩᏯ ᏱᎩ ᎢᏕᎲᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎩᎶ ᎤᏁᎳᎩᏯ ᏱᎩ ᎠᏲᎱᏍᎬᎢ.
Moko te kati na biso abikaka bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akufaka mpo na ye moko.
8 ᎢᏳᏰᏃ ᏱᏓᎴᏂᏙᎭ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎡᏓᎴᏂᏕᎭ; ᎠᎴ ᎢᏳ ᏱᏗᏗᏲᎱᏍᎦ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎡᏗᏲᎱᎯᏎᎭ; ᎾᏍᎩᏃ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏳᏃ ᏱᏓᎴᏂᏙᎭ, ᎠᎴ ᏱᏗᏗᏲᎱᏍᎦ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎡᏓᏤᎵᎦ.
Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.
9 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎯᎠ ᎤᎬᏩᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏲᎱᏎᎢ, ᎠᎴ ᏥᏚᎴᎯᏌᏁᎢ, ᎠᎴ ᏧᏩᏃᏎᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏗᏅᏃᏛ ᎤᎾᏤᎵᎦ.
Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.
10 ᎠᎴ ᏂᎯ, ᎦᏙᏃ ᏙᎯᏳᎪᏓᏁᎭ ᎢᏍᏓᎵᏅᏟ? ᎠᎴ ᏂᎯ ᎾᏍᏉ, ᎦᏙᏃ ᏅᎵᏌᎵᏉ ᎢᎯᏰᎸᏍᎦ ᎢᏍᏓᎵᏅᏟ? ᏂᎦᏗᏳᏰᏃ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᏫᎦᎴᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏭᎪᏙᏗᏱ ᎤᏪᏍᎩᎸᎢ.
Bongo yo, mpo na nini ozali kosambisa to kotiola ndeko na yo? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba.
11 ᎯᎠᏰᏃ ᏂᎬᏅ ᎪᏪᎳ, ᎨᎥ ᏄᏙᎯᏳᏒᎢ, ᎠᏗᎭ ᏱᎰᏩ, ᏂᎦᏗᏳ ᏙᏓᎬᏆᎵᏂᏆᏅᏁᎵ ᎠᏴ, ᎠᎴ ᏂᎦᏗᏳ ᎬᏂᎨᏒ ᏅᏓᎬᏩᏁᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ.
Pamba te ekomama: « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »
12 ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏄᏍᏗ ᏂᏗᎥ ᎢᏗᏏᏴᏫᎭ ᎨᏒ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏰᏛᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᎦᏛᏁᎵᏙᎸᎢ.
Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.
13 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᏱᏗᏓᏓᏚᎪᏓᏁᎮᏍᏗ; ᎯᎠᏍᎩᏂ ᎤᎬᏫᏳᏎᏍᏗ ᏕᏧᎪᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎠᏓᏙᏕᏍᏗᏍᎩ ᎠᎴ ᎤᏍᏢᏂᏍᏗᏍᎩ ᎢᏥᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏣᎵᏅᏟ ᎤᎶᎯᏍᏗᏱ.
Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye.
14 ᏥᎦᏔᎭ, ᎠᎴ ᎠᏉᎯᏳᏗ ᎾᏋᏁᎸ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ, ᎾᏍᎩ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏩᏒᏉ ᎨᏒ ᎦᏓᎭ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ; ᎩᎶᏍᎩᏂ ᎪᎱᏍᏗ ᎦᏓᎭ ᎠᏰᎸᏍᎩ, ᎾᏍᎩ ᎦᏓᎭ ᏄᎵᏍᏓᏁᎰᎢ.
Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.
15 ᎢᏳᏍᎩᏂ ᏗᏍᏓᏓᏅᏟ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗ ᏱᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎡᎯᏍᏗ ᏱᏯᏓᏅᏓᏗᏍᏔᏅ, ᎿᎭᏉ ᎥᏝ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏴᏗᎭ ᎾᏍᎩ ᎿᎭᏛᏁᎲᎢ. ᏞᏍᏗ ᎭᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬ ᎯᏛᏙᏔᏅᎩ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏲᎱᎯᏎᎸᎯ.
Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki.
16 ᎾᏍᎩᏃ ᏞᏍᏗ ᎣᏏᏳ ᏂᏣᏛᏁᎲ ᎤᏐᏅ ᏳᏂᏃᎮᎴᏍᏗ.
Yango wana, tika ete bolamu na bino etiolama te.
17 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎥᏝ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗᏉ ᎠᎴ ᎠᏗᏔᏍᏗᏉ ᎨᏒ ᏱᎩ; ᏚᏳᎪᏛᏍᎩᏂ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᎵᎮᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ.
Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.
18 ᎩᎶᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎤᏮᏗᏕᎬ ᎦᎶᏁᏛ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏛᏁᎮᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᎬᏩᏓᏂᎸᎢᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎴ ᎣᏏᏳ ᎦᎬᏩᏰᎸᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏴᏫ.
Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.
19 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏗᏍᏓᏩᏗᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏙᎯ ᎢᎬᏁᎯ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏗᎨᎦᏓᎵᏂᎪᎯᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ.
Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.
20 ᏞᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᏱᏣᏲᏍᏔᏁᏍᏗ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗᏉ ᏱᏅᏧᎵᏍᏙᏔᏁᏍᏗ. ᏄᏓᎴᏒᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎦᏓᎭ ᏂᎨᏒᎾ; ᎤᏲᏍᎩᏂ ᎾᏛᏁᎰ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏴᏫ ᎠᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬ ᎩᎶ ᏱᏗᎪᏕᏍᏗᎭ.
Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.
21 ᎤᏟ ᎤᏏᏳ ᎭᏫᏯ ᎠᎩᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎩᎦᎨ-ᎠᏗᏔᏍᏗ ᎠᏗᏔᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏛᏁᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ, ᎾᏍᎩ ᏗᏍᏓᏓᏅᏟ ᏧᏬᏕᏍᏗᏍᎩ, ᎠᎴ ᎤᏍᏢᏂᏍᏗᏍᎩ, ᎠᎴ ᎠᏩᎾᎦᎳ ᎢᏳᏩᏁᎯ.
Likambo oyo eleki malamu ezali: koboya kolia misuni, koboya komela vino, koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku.
22 ᎪᎯᏳᏗᏍᎪ ᎨᏒ ᏤᎭ? ᏣᏤᎵᏛ ᏦᎯᏳᏎᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ. ᏅᏩᏙᎯᏍᏛ ᎤᏓᏅᏖᏍᏗ ᎩᎶ ᏄᏍᏛ ᎣᏏᏳ ᎤᏰᎸᏒ ᎬᏗᏍᎬ ᎤᏩᏒ ᏂᏓᏓᏚᎪᏓᏁᎲᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ.
Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka!
23 ᎩᎶᏍᎩᏂ ᏧᏢᏫᏎᎯ ᏕᎫᎪᏗᏍᎪ ᎤᏍᎦᏅᏨ ᎢᏳᏃ ᏳᎵᏍᏓᏴᏅ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎪ ᏄᏬᎯᏳᏒᎾ ᎨᏒ ᎠᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎢ; ᏂᎦᎥᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏅᏗᏓᎴᎲᏍᎬᎾ ᏱᎩ ᎠᏍᎦᏂ ᎨᏐᎢ.
Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.

< ᏉᎳ ᎶᎻ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 14 >