< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 4 >

1 ᎣᏂᏃ ᏓᏆᎧᎿᎭᏅᎩ, ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᎤᎵᏍᏚᎢᏛ ᎨᏒᎩ ᎦᎸᎳᏗ; ᎢᎬᏱᏱᏃ ᎧᏁᎬ ᎠᏆᏛᎦᏅᎯ ᎠᏤᎷᎩ ᏣᏆᎵᏃᎮᏗᏍᎪ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ; ᎯᎠ ᏥᎾᎩᏪᏎᎰᎢ, ᎡᎭᎩᎳᏩ, ᏓᎬᎾᏄᎪᏫᏎᎵᏃ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎾᏍᎩ ᎣᏂ ᎢᏳᎵᏍᏔᏂᏓᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu: « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »
2 ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᎠᏓᏅᏙ ᎠᏆᏘᏂᏙᎲᎩ; ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎦᏍᎩᎶ ᎦᎸᎶᎢ ᎤᏂᏍᎩᎳᏛᎩ, ᎩᎶᏃ ᎾᎿᎭᎦᏍᎩᎸ ᎤᏪᏅᎩ.
Mbala moko, Molimo asimbaki ngai mpe namonaki kati na Lola Kiti moko ya Bokonzi oyo moto moko avandelaki.
3 ᎤᏬᎵᏃ ᏣᎦᎦᏃᏗᏱ ᏣᏍᏆ ᏅᏯ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᎠᎴ ᏌᏗᏂ ᏅᏯ; ᎤᏅᎪᏔᏛᎩᏃ ᎬᏩᏚᏫᏛ ᎦᏍᎩᎸᎢ, ᏗᎧᏃᏗᏱ ᎡᎻᎳ ᏅᏯ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ.
Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode.
4 ᎠᎴ ᎬᏩᏚᏫᏛ ᎾᎿᎭᎦᏍᎩᎸ ᏅᎩᏦᏁ ᏕᎦᎧᎲ ᏗᏍᎩᎳᏗᏍᏗ; ᏗᏍᎩᎳᏗᏍᏗᏱᏃ ᎥᎦᏥᎪᎥᎩ ᏅᎩᏦᏁ ᎢᏯᏂᏛ ᏧᎾᏛᏐᏅᎯ ᎠᏂᏅᎩ ᏧᏁᎬ ᏚᎾᏄᏩᎥᎩ; ᏚᎾᎵᏍᏚᎸᏃ ᏗᎵᏍᏚᎶ ᎠᏕᎸ ᏓᎶᏂᎨ ᏗᎪᏢᏔᏅᎯ.
Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.
5 ᎦᏍᎩᎸᏃ ᏓᏓᎴᎲᏍᎬᎩ ᎠᎾᎦᎵᏍᎩ, ᎠᎴ ᎠᏴᏓᏆᎶᏍᎩ ᎠᎴ ᎤᏃᏴᎬᎢ; ᎠᎴ ᎦᎵᏉᎩ ᏗᏨᏍᏙᏗ ᏧᏥᏍᏟ ᏓᏓᏪᎵᎩᏍᎬᎩ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᎦᏍᎩᎸᎢ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎦᎵᏉᎩ ᏗᏓᏅᏙ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ.
Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela: ezali milimo sambo ya Nzambe.
6 ᎦᏍᎩᎸᏃ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᎥᏓᎸᎩ ᎠᏓᎰᏗ ᎢᏗᎬᏤᎵᏛ, ᏅᏯ ᏗᎬᏩᎸᏌᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ; ᎦᏍᎩᎸᏃ ᎠᏰᎵ, ᎠᎴ ᎬᏩᏚᏫᏛ ᎾᎿᎭᎦᏍᎩᎸ ᏅᎩ ᎢᏯᏂᏛ ᏗᏅᏃᏛ ᎥᎦᏥᎪᎥᎩ, ᎠᎧᎵᏬᎯ ᏓᏂᎧᏅᎩ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᎠᎴ ᎣᏂᏗᏢ.
Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.
7 ᎢᎬᏱᏱ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎬᏃᏛ ᏢᏓᏥ ᎤᏃᏕᎾ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᏔᎵᏁᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎬᏃᏛ ᏩᎦ ᎠᎩᎾ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᏦᎢᏁᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎬᏃᏛ ᏴᏫ ᎤᎧᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᎤᎧᏛᎩ, ᎤᎩᏁᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎬᏃᏛ ᎦᏃᎯᎵᏙᎯ ᎠᏬᎭᎵ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ.
Ekelamu ya liboso azalaki lokola nkosi; ya mibale, lokola mwana ngombe ya mobali; ya misato azalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei azalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa.
8 ᎾᏍᎩᏃ ᏅᎩ ᎢᏯᏂᏛ ᏗᏅᏃᏛ ᎠᏂᏏᏴᏫᎭ ᏑᏓᎵ ᏓᏃᏯᏛᎩ; ᎬᏩᏚᏫᏛᏃ ᎠᎴ ᎭᏫᏂ ᎧᎵᏬᎯ ᎨᏒ ᏗᏂᎧᏅᎢ; ᎠᎴ ᎾᎾᏣᏪᏐᎸᏍᏗᏍᎬᎾ ᎨᏐ ᎢᎦ ᎠᎴ ᏒᏃᏱ ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎢ; ᎦᎸᏉᏗᏳ, ᎦᎸᏉᏗᏳ, ᎦᎸᏉᏗᏳ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎤᎵᏂᎩᏛ, ᎾᏍᎩ ᏤᎲᎩ, ᎠᎴ ᏤᎭ, ᎠᎴ ᏤᎮᏍᏗ.
Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba:
9 ᎾᏍᎩᏃ ᏗᏅᏃᏛ ᎠᏂᎸᏉᏓ ᎠᎴ ᎠᎾᎵᎮᎵᏥ ᎾᏍᎩ ᎦᏍᎩᎸ ᎤᏬᎵ, ᎾᏍᎩ ᏂᎪᎯᎸ ᎾᎵᏍᏆᏗᏍᎬᎾ ᏤᎭ, (aiōn g165)
Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko, (aiōn g165)
10 ᎿᎭᏉ ᏅᎩᏦᏁ ᎢᏯᏂᏛ ᏧᎾᏛᏐᏅᎯ ᎡᎳᏗ ᏓᎾᏓᏅᎥᏍᎪ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᎤᏬᎸ ᎾᏍᎩ ᎦᏍᎩᎸ ᎤᏬᎵ, ᎠᎴ ᎠᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎰ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏂᎪᎯᎸ ᎾᎵᏍᏆᏗᏍᎬᎾ ᏤᎭ, ᎠᎴ ᏧᎾᎵᏍᏚᎶ ᎦᏍᎩᎸ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᏚᎾᏓᎡᎯ, ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎪᎢ; (aiōn g165)
bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba: (aiōn g165)
11 ᏰᎵᏉ ᏂᎯ ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎦᏰᏣᏁᎢᏍᏓᏁᏗ ᎡᏣᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎡᏣᎸᏉᏙᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏣᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏒᎢ; ᏂᎦᏗᏳᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏦᏢᏅᎯ, ᎠᎴ ᎭᏓᏅᏖᏍᎬ ᎢᏨᏁᎵᏓᏍᏗᏱ ᎡᎭ, ᎠᎴ ᎪᏢᏅᎯ.
« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso: ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »

< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 4 >