< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 10 >

1 ᎠᎴ ᏅᏩᏓᎴ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎥᏥᎪᎥᎩ ᎦᎸᎳᏗ ᏓᏳᏠᎠᏒᎩ, ᎤᎶᎩᎸ ᎤᏄᏬᏍᏛᎩ; ᎠᎴ ᎠᏍᎪᎵ ᎤᏅᎪᎳᏛᎩ, ᎠᎴ ᎤᎧᏛ ᏅᏙ ᎢᎦ ᎡᎯ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᏧᎳᏏᏕᏂᏃ ᏗᎦᎫᏍᏛᏗ ᎠᏥᎸ ᏗᎪᏢᏔᏅᎯ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ.
Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.
2 ᎪᏪᎵᏃ ᎤᏍᏗ ᎤᏒᎦᎸᎩ ᎠᏍᏚᎢᏛ; ᎠᎦᏘᏏᏃ ᎤᎳᏏᏕᏂ ᎠᎺᏉᎯ ᎤᎳᏏᏅᎩ, ᎠᎦᏍᎦᏂᏃ [ ᎤᎳᏏᏕᏂ ] ᎦᏙᎯ ᎤᎳᏏᏅᎩ,
Na loboko na ye, asimbaki buku ya moke oyo ezalaki ya kofungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi, na mokili;
3 ᎠᎴ ᎠᏍᏓᏯ ᎤᏪᎷᏅᎩ, ᏢᏓᏥ ᎤᏃᏕᏅ ᏣᏴᎪ ᎾᏍᎩᏯᎢ; ᎾᏍᎩᏃ ᎤᏪᎷᏅ, ᎦᎵᏉᎩ ᎠᏂᏴᏓᏆᎶᏍᎩ ᎤᏂᏴᏓᏆᎶᎥᎩ.
bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki.
4 ᎠᎴ ᎦᎵᏉᎩ ᎠᏂᏴᏓᏆᎶᏍᎩ ᎤᏂᏴᏓᏆᎶᎥ, ᏓᎪᏪᎳᏂᏒᎩ; ᎠᏆᏛᎦᏅᎩᏃ ᎧᏁᎬ ᎦᎸᎳᏗ ᏓᏳᎶᏒᎩ ᎯᎠ ᏅᏛᎩᏪᏎᎲᎩ, ᏘᏍᏚᎲᎦᏉ ᎾᏍᎩ ᎦᎵᏉᎩ ᎠᏂᏴᏓᏆᏍᎩ ᏄᏂᏪᏒᎢ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏦᏪᎳᏅᎩ.
Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola: « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. »
5 ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯᏃ ᏥᎪᎥᎯ ᎠᎺᏉᎯ ᎠᎴ ᎦᏙᎯ ᏧᏔᏏᏅᎯ, ᎦᎸᎳᏗ ᎢᏗᏢ ᎤᏌᎳᏓᏅᎩ ᎤᏬᏰᏂ,
Bongo anjelu oyo namonaki atelemi na ebale monene mpe na mokili atombolaki loboko ya mobali na ngambo ya Lola
6 ᎠᎴ ᎤᏁᎢᏍᏔᏅᎩ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏂᎪᎯᎸ ᎠᎴ ᏂᎪᎯᎸ ᏤᎭ, ᎾᏍᎩ ᎦᎸᎶᎢ ᎤᏬᏢᏅᎯ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᏤᎿᎭᎠ, ᎠᎴ ᎡᎶᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᏤᎿᎭᎠ, ᎠᎴ ᎠᎺᏉᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᏤᎿᎭᎠ, ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᎤᏟ ᎢᎪᎯᏛ ᏱᎪᎯᏗᏏᏎᏍᏗ ᎤᏛᏅᎩ. (aiōn g165)
mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango: « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te! (aiōn g165)
7 ᎦᎵᏉᎩᏁᏍᎩᏂ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎧᏁᏨᎭ ᎢᏳᎢ, ᎿᎭᏉ ᎠᎴᏅᎲᎭ ᎠᏤᎷᎯᏒᎭ, ᎤᏕᎵᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᎵᏰᎢᎶᎯᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᎬᏂᎨᏒ ᏂᏚᏩᏁᎸ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ.
Kasi na mokolo oyo anjelu ya sambo akobeta kelelo na ye, mabombami ya Nzambe ekokokisama ndenge kaka asakolaki yango na basali na Ye, basakoli. »
8 ᎧᏁᎬᏃ ᎠᏆᏛᎦᏅᎯ ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᎠᎩᏁᏤᎸᎩ, ᎠᎴ ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ, ᎮᎾ, ᎠᎴ ᏫᎾᎩ ᎤᏍᏗ ᎪᏪᎵ ᎠᏍᏚᎢᏛ ᏧᏒᎦᎸ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏥᎦᏙᎦ ᏥᏚᎳᏍᎦ ᎠᎺᏉᎯ ᎠᎴ ᎦᏙᎯ.
Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu: « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »
9 ᎠᏇᏅᏒᎩᏃ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏗᎦᏙᎬᎢ, ᎠᎴ ᎯᎠ ᏅᏥᏪᏎᎸᎩ, ᏍᎩᏅᎥᏏ Ꮎ ᎤᏍᏗ ᎪᏪᎵ. ᎯᎠᏃ ᎾᎩᏪᏎᎸᎩ, ᎯᎾᎩ ᎠᎴ ᎯᏯᎣᎾ; ᏣᏍᏉᎵᏱᏃ ᏩᏚᎵᏏ ᏥᏄᎦᎾᎯ ᎢᏳᎦᎾᏍᏛ ᏅᏓᏨᏁᎵ.
Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai: « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. »
10 ᎪᏪᎵᏃ ᎤᏍᏗ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏒᎦᎸ ᏩᎩᏁᏒᎩ, ᎠᎴ ᎠᎩᏯᎣᏅᎩ; ᏥᎰᎵᏃ ᎠᏆᏅᏍᎦᎸ ᏩᏚᎵᏏ ᏥᏄᎦᎾᎯ ᏄᎦᎾᏒᎩ; ᎠᎩᏯᎥᏃ ᎠᎩᏍᏉᎵᏱ ᎡᎯᏍᏗᏳ ᏄᏩᏁᎸᎩ.
Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.
11 ᎯᎠᏃ ᎾᎩᏪᏎᎸᎩ, ᏔᎵᏁ ᏛᎭᏙᎴᎰᏏ ᎤᏂᏣᏘ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ, ᎠᎴ ᏑᎾᏓᎴᎩ ᎠᏁᎲ ᏴᏫ, ᎠᎴ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏗᏂᏬᏂᏍᎩ ᎨᏒ ᏴᏫ, ᎠᎴ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᎤᏂᎬᏫᏳᎯ.
Bongo balobaki na ngai: « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »

< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 10 >