< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >

1 ᎿᎭᏉᏃ ᎠᏓᏅᏙ ᎢᎾᎨ ᏭᏘᏅᏍᏔᏁ ᏥᏌ, ᎠᏍᎩᎾ ᎤᎪᎵᏰᏗᏱ ᎠᏰᎸᏎᎢ.
Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye.
2 ᏅᎦᏍᎪᎯᏃ ᏧᏙᏓᏆᏛ ᎠᎴ ᏅᎦᏍᎪᎯ ᏧᏒᎯᏛ ᎠᎹᏟ ᎤᏩᏅ ᎩᎳ ᎤᏲᏏᏌᏁᎢ
Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala.
3 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎪᎵᏰᏍᎩ ᎤᎷᏤᎸ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎢᏳᏃ ᏂᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏪᏥ ᎨᏎᏍᏗ, ᎯᎠ ᏅᏯ ᎦᏚ ᎤᎾᏙᏢᏗᏱ ᎯᏁᎩ.
Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye: — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.
4 ᎠᏎᏃ ᎤᏁᏨ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎯᎠ ᏂᎬᏅ ᎪᏪᎳ, ᏴᏫ ᎥᏝ ᎦᏚᏉ ᎤᏩᏒ ᏱᎬᎿᎭᏗᏍᏗ, ᏂᎦᎥᏍᎩᏂ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎰᎵ ᏅᏓᏳᎾᏄᎪᏨᎯ.
Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
5 ᎿᎭᏉᏃ ᎠᏍᎩᎾ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᎦᏚᎲ ᏭᏘᏅᏍᏔᏁᎢ, ᎠᎴ ᏭᎩᎸᏔᏁ ᎤᏍᎪᎵ ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ;
Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo
6 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎢᏳᏃ ᏂᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏪᏥ ᎨᏎᏍᏗ, ᎭᏓᎶᎥᏓ ᏨᏒ; ᎯᎠᏰᏃ ᏂᎬᏅ ᎢᎪᏪᎳ; ᎠᏎ ᏙᏓᎧᏁᏤᎵ ᎫᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏂᏌ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᎠᎴ ᏧᏃᏰᏂ ᎨᏣᏌᎳᏙᏕᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᎸᎯᏳ ᏅᏲᎯ ᏣᎾᏍᏆᎶᏍᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
mpe alobaki na Ye: — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se; pamba te ekomama: « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »
7 ᏥᏌ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎯᎠ ᎾᏍᏉ ᏂᎬᏅ ᎢᎪᏪᎳ; ᏞᏍᏗ ᎯᎪᎵᏰᎥᎩ ᏱᎰᏩ ᏣᏁᎳᏅᎯ.
Yesu azongiselaki ye: — Ekomama mpe: « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
8 ᎿᎭᏆᎴ ᎠᏍᎩᎾ ᎤᏣᏘ ᎢᏅ-ᎢᎦᏘ ᎣᏓᎸ ᏫᎤᏘᏅᏍᏔᏁᎢ, ᎠᎴ ᏚᏎᎮᎴ ᏂᎦᎥ ᎠᏰᎵ ᏕᎪᏢᏩᏗᏒ ᎡᎳᏂᎬᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏂᏚᏬᏚᏒᎢ;
Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango;
9 ᎠᎴ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᏱᏕᎬᏲᎯᏏ, ᎢᏳᏃ ᏱᏣᏓᏅᏅ, ᎠᎴ ᏱᏍᏆᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎸ.
alobaki na Ye: — Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.
10 ᎿᎭᏉᏃ ᏥᏌ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎤᏟ ᏫᎶᎯ, ᏎᏓᏂ, ᎯᎠᏰᏃ ᏂᎬᏅ ᎢᎪᏪᎳ; ᎠᏎ ᎯᏯᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎮᏍᏗ ᏱᎰᏩ ᏣᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩᏉ ᎤᏩᏒᎯᏳ ᏕᎯᏯᏁᎶᏕᏍᏗ.
Yesu alobaki na ye: — Mosika na ngai, Satana! Pamba te ekomama: « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
11 ᎩᎳᏃ ᎠᏍᎩᎾ ᎤᏓᏅᎡᎴᎢ, ᎬᏂᏳᏉᏃ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏂᎷᏤᎢ, ᎠᎴ ᎬᏩᏍᏕᎸᎯᏙᎴᎢ.
Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
12 ᏥᏌᏃ ᎤᏛᎦᏅ ᏣᏂ ᎠᏥᏍᏚᎲᎢ, ᎨᎵᎵ ᏭᎶᏎᎢ.
Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile.
13 ᎾᏎᎵᏗᏃ ᎤᏓᏅᏒ ᎨᏆᏂ ᎨᎷᏤ ᎾᎿᎭᏭᏕᏁᎢ, ᎾᏍᎩ ᎥᏓᎵ ᎠᎹᏳᎶᏗ ᏥᎦᏚᎭ, ᏤᏆᎳᏂ ᎠᎴ ᏁᏩᏔᎵ ᎤᎾᏤᎵᎪᎯ,
Kasi avandaki na Nazareti te; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,
14 ᎤᏙᎯᏳᏗᏱ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᎢᏌᏯ ᏧᏁᏤᎢ, ᎯᎠ ᏥᏄᏪᏎᎢ;
mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki:
15 ᏤᏆᎳᏂ ᎤᎾᏤᎵᎪᎯ, ᎠᎴ ᏁᏩᏔᎵ ᎤᎾᏤᎵᎪᎯ, ᎢᏓᎵ ᎢᏗᏢ, ᏦᏓᏂ ᎤᏗᏗᏢ, ᎨᎵᎵ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᏓᏂᏁᎸᎢ,
« Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali, nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani, Galile ya bapagano,
16 ᏴᏫ ᎤᎵᏏᎬ ᏣᏂᏅᎩ ᎤᏣᏘ ᎢᎦᎦᏘ ᎤᏂᎪᎲ, ᎾᏃ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗᏱ ᎨᏒ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎠᎴ ᎤᏓᏩᏗᏍᎬ ᏣᏂᏅᎩ, ᎢᎦᎦᏘ ᎤᏂᎾᏄᎪᏤᎸ.
bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »
17 ᎾᎯᏳ ᏥᏌ ᎤᎴᏅᎮ ᎠᎵᏥᏙᎲᏍᎨᎢ, ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏍᎨᎢ; ᏗᏥᏁᏟᏴᎾ ᏕᏣᏓᏅᏛᎢ, ᎿᎭᏉᏰᏃ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎡᏍᎦᏂᏳ ᏓᏯᎢ.
Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya: « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene! »
18 ᏥᏌᏃ ᎠᎢᏒ ᎨᎵᎵ ᎥᏓᎷᎶᏗ ᏚᎪᎮ ᎠᏂᏔᎵ ᎠᎾᎵᏅᏟ, ᏌᏩᏂ ᏈᏓ ᏣᏃᏎᎰᎢ ᎤᏅᏟᏃ ᎡᏂᏗ, ᎥᏓᎵ ᎠᏂᎦᏯᎷᎥᏍᎨᎢ-ᎠᏂᎦᏯᎷᎥᏍᎩᏰᏃ ᎨᏎᎢ.
Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale: Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
19 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ; ᏍᎩᏂᏍᏓᏩᏚᎦ, ᏴᏫᏃ ᎢᏍᏗᎦᏯᎷᎥᏍᎩ ᏅᏓᏍᏛᏴᏁᎵ.
Yesu alobaki na bango: « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
20 ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏚᏂᏲᏎ ᏗᎦᏯᎷᏗ ᎠᎴ ᎬᏩᏍᏓᏩᏛᏎᎢ.
Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
21 ᎾᎿᎭᏃ ᏫᎤᏪᏅ, ᎠᏂᏔᎵ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᏚᎪᎮᎢ, ᏥᎻ ᏤᏈᏗ ᎤᏪᏥ ᎤᏅᏟᏃ ᏣᏂ, ᏤᏈᏗ ᎤᏂᏙᏓ ᏥᏳᎯ ᎤᎾᏣᎡᎢ, ᏓᏃᏢᎯᏏᏍᎨ ᏧᏂᎦᏯᎷᏗ; ᏫᏚᏯᏅᎮᏃ.
Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale: Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango;
22 ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏚᏂᏲᏎ ᏥᏳ ᎠᎴ ᎤᏂᏙᏓ, ᎠᎴ ᎬᏩᏍᏓᏩᏛᏎᎢ.
mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu.
23 ᏥᏌᏃ ᏂᎬᎾᏛ ᎨᎵᎵ ᎡᏙᎮᎢ ᏓᏕᏲᎲᏍᎨ ᏧᏂᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎠᎵᏥᏙᎲᏍᎨ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎧᏃᎮᏍᎨᎢ, ᎠᎴ ᏕᎧᏅᏫᏍᎨ ᏧᎵᎴᏅᏛ ᏚᏂᏢᎬᎢ, ᎠᎴ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎥᏳᎩ ᏴᏫ ᎤᏁᎲᎢ.
Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.
24 ᏕᎦᏃᏣᎸᏃ ᏂᎬᎾᏛ ᏏᎵᏱ ᎤᏰᎵᏎᎢ; ᏕᎬᏩᏘᏃᎮᎴᏃ ᏂᎦᏛ ᏧᏂᏢᎩ, ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎥᏳᎩ ᎠᎴ ᎡᎯᏍᏗ ᎤᏂᏱᎵᏙᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎠᏂᏍᎩᎾ ᏗᎬᏩᏂᏯᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏧᏂᎸᏃᏘᏍᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏧᏂᎾᏫᏍᎩ; ᏚᏅᏩᏁᏃ.
Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi: bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa; mpe azalaki kobikisa bango.
25 ᎤᏂᏣᏘᏃ ᏴᏫ ᎬᏩᏍᏓᏩᏛᏎᎢ ᏅᏓᏳᏂᎶᏒᎯ ᎨᎵᎵ, ᎠᏍᎪᎯᏃ-ᎦᏚᎩᏱ, ᎠᎴ ᏥᎷᏏᎵᎻ, ᎠᎴ ᏧᏗᏱ, ᎠᎴ ᏦᏓᏂ ᏍᎪᏂᏗᏢ.
Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 4 >