< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 3 >

1 ᎾᎯᏳ ᎤᎷᏤ ᏣᏂ ᏗᏓᏬᏍᎩ ᎠᎵᏥᏙᎲᏍᎨ ᎢᎾᎨ ᏧᏗᏱ,
Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda:
2 ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏍᎨᎢ; ᏗᏥᏁᏟᏴᎾ ᏕᏣᏓᏅᏛᎢ, ᎿᎭᏉᏰᏃ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎡᏍᎦᏂᏳ ᏓᏯᎢ.
« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene! »
3 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ Ꮎ ᏥᎧᏁᎢᏍᏗᏍᎨ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᎢᏌᏯ, ᎯᎠ ᏥᏂᎦᏪᏍᎨᎢ; ᎤᏪᎷᎦ ᎩᎶ ᎢᎾᎨᎢ, ᎯᎠ ᏂᎦᏪᎭ; ᎣᏍᏛ ᏂᏨᎦ ᏱᎰᏩ ᎤᎶᎯᏍᏗᏱ, ᏚᏅᏅ ᏗᏥᏥᏃᎯᏍᏓ.
Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki: « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe: ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike! › »
4 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏣᏂ ᎤᏄᏪ ᎨᎻᎵ ᎤᏍᏘᏰᏅᎯ, ᎦᏃᏥᏃ ᎤᏓᏠᏍᏕᎢ, ᎤᎵᏍᏓᏴᏗᏃ ᎥᎴ ᎨᏎ ᎢᎾᎨᏃ ᎡᎯ ᏩᏚᎵᏏ.
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
5 ᎾᏉᏃ ᏫᎬᏩᎷᏤᎴ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᏧᏗᏱ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎾᏅᎾᏛ ᏦᏓᏂ,
Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani;
6 ᏦᏓᏂᏃ ᏕᎤᏬᎡᎢ, ᎠᏂᏃᎲᏍᎨ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨᎢ.
bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
7 ᎠᏎᏃ ᏚᎪᎲ ᎤᏂᏣᏘ ᎠᏂᏆᎵᏏ ᎠᎴ ᎠᏂᏌᏚᏏ ᎠᏂᎷᎬ ᏓᏓᏬᏍᎬᎢ, ᎯᎠ ᏂᏚᏪᎭᎴᎢ; Ᏺ! ᎢᎾᏛ ᏧᏁᏥ ᏂᎯ! ᎦᎪ ᎢᏤᏯᏔᏅ ᎡᏣᎵᎡᏗᏱ ᎤᏔᎳᏬᎯᏍᏗ ᏨᏣᎢ?
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango: « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya?
8 ᎢᏥᎾᏄᎪᏩᏲᎪ ᎠᏙᎴᎰᎯᏍᏙᏗ ᏕᏥᏁᏟᏴᏒ ᏕᏣᏓᏅᏛᎢ;
Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.
9 ᎠᎴ ᏝᏍᏗ ᎯᎠ ᏅᏓᏲᏥᏪᏏ ᎢᏤᎵᏒᎩ ᏙᏗᏣᏓᏅᏛᎢ; ᎡᏆᎭᎻ ᎣᎩᏙᏓ; ᎢᏨᏲᏎᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏰᎵᏉ ᎯᎠ ᏅᏯ ᏱᏕᎬᏓ ᏱᏕᎪᏢᎾ ᎡᏆᎭᎻ ᏧᏪᏥ.
Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema: ‹ Abrayami azali koko na biso! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
10 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᏳᎳ ᎦᎷᏯᏍᏗ ᎠᎭ ᏚᎿᎭᏍᏕᏢ ᏕᏡᎬᎢ; ᎾᏍᎩᏃ ᏂᎦᏛ ᏕᏡᎬ ᎠᏃᏍᏛ ᎾᎾᏓᏛᏍᎬᎾ ᏗᎦᎴᏴᏍᏙᏗ ᎠᎴ ᎠᏥᎸᏱ ᏫᏓᏗᏅᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa: nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.
11 ᎠᏴ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎠᎹ ᏕᏨᏯᏬᏍᏗᎭ ᏗᏥᏁᏟᏴᏍᏗᏱ ᏕᏣᏓᏅᏛ ᎤᎬᏩᎵ; ᎠᏎᏃ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏂ ᏨᏓᏯᎢ ᎤᏟᎯᏳ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎡᏍᎦᏉ ᎠᏴ, ᏧᎳᏑᎶ ᎥᏝ ᏰᎵ ᏱᏂᎪᎢ ᏗᎩᏂᏓᏍᏗᏱ; ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎠᎴ ᎠᏥᎸ ᏙᏓᏣᏬᏍᏔᏂ.
Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
12 ᎾᏍᎩ ᎦᎳᏐᏫᏍᏗ ᎤᏤᎵᎦ ᎠᏰᎭ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᏓᎦᎳᏐᏫᏏ, ᎤᏤᎵᏃ ᎤᎦᏔᏔᏅᎯ ᏓᎦᏟᏌᏂ ᏛᏂ ᎠᏓᎾᏅᏗᏱ ᎤᏘᏴᎯᏍᎩᏂ ᏛᎪᎲᏍᏔᏂ ᏂᎬᏠᏍᎬᎾ ᎠᏥᎸᏱ.
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
13 ᎿᎭᏉᏃ ᏥᏌ ᎨᎵᎵ ᏧᎶᏎᎢ, ᏦᏓᏂ ᎤᎷᏤ ᏣᏂ ᎡᏙᎲᎢ ᎠᎦᏬᏍᏗᏱ ᎤᏰᎸᏎᎢ.
Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye.
14 ᎠᏎᏃ ᏣᏂ ᏚᏢᏫᏎᎴᏉ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎠᏴᏍᎩᏂ ᏱᏍᏆᏬᎥ; ᏥᎪᏃ ᎢᏍᎩᎷᏤᎭ?
Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai?
15 ᏥᏌᏃ ᏧᏁᏨ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎤᏁᎳᎩ ᎮᎳ ᎪᎯ ᎨᏒᎢ, ᎣᏏᏳᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᎩᎾᏛᏁᏗᏱ ᎩᏂᏍᏆᏗᏍᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒᎢ. ᎩᎳ ᎤᏁᎳᎩ ᎤᏪᎵᏎᎴᎢ.
Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
16 ᏥᏌᏃ ᎠᎦᏬᎥ, ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ ᎤᎿᎭᎷᏎᎢ, ᎠᎹᏱ ᎤᏓᏅᏎᎢ, ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎦᎸᎳᏗ ᏣᏥᏍᏚᎩᎡᎴᎢ, ᎠᎴ ᏭᎪᎮ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏓᏅᏙ ᎡᎳᏗ ᏅᏧᏛᎿᎭᏗᏎ ᎫᎴ-ᏗᏍᎪᏂᎯ ᏗᏤᎵᏛ; ᎠᎴ ᎤᏪᏯᎸᏤᎢ.
Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga.
17 ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎯᎠ ᏅᏧᏪᏎ ᎦᎸᎳᏗ; ᎯᎠ ᏥᎨᏳᎢ ᎠᏇᏥ, ᎾᏍᎩ ᎣᏏᏳ ᏥᏥᏰᎸᎠ.
Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 3 >