< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 28 >

1 ᎤᎾᏙᏓᏉᏅᎯᏃ, ᎩᎳ ᎢᎦ ᏂᎦᎵᏍᏗᏍᎨᎢ ᎠᎴᏂᏍᎬ ᏑᎾᏙᏓᏆᏍᏗ ᎨᏒ ᎺᎵ ᎹᎩᏕᎵ ᎡᎯ ᎠᎴ ᏐᎢ ᎺᎵ ᎤᎾᎦᏔᏂᎴ ᎠᏤᎵᏍᏛᎢ.
Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda.
2 ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎤᏣᏘ ᎦᏙᎯ ᎤᎵᏖᎸᏁᎢ, ᏱᎰᏩᏰᏃ ᎤᏤᎵ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎦᎸᎳᏗ ᏧᏠᎠᏎᎢ, ᎤᎷᏨᏃ ᏅᏯ ᎤᏪᏌᏆᎴᎴ ᎤᎲᏎ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᎠᎲᎢ; ᎠᎴ ᎤᏍᎩᎳᏁᎢ.
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.
3 ᏗᎧᏃᏗᏱ ᎠᎾᎦᎵᏍᎩ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏎᎢ, ᎤᏄᏩᎥᏃ ᎥᏃᏥ ᏥᏄᏁᎩᏴ ᏄᏁᎩᏰᎢ.
Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe.
4 ᎠᏂᎦᏘᏯᏃ ᎠᏂᏍᎦᎢᎲ ᏚᏂᎾᏪᎢ, ᎠᎴ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᎾᎵᏍᏔᏁᎢ.
Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa.
5 ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯᏃ ᎤᏁᏨ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᎠᏂᎨᏴ; ᏞᏍᏗ ᏂᎯ ᏱᏍᏗᏍᎦᎢᎮᏍᏗ, ᏥᎦᏔᎭᏰᏃ ᏥᏌ ᎠᎦᏛᏅᎯ ᎡᏍᏗᏲᎲᎢ.
Kasi anjelu alobaki na basi: « Bobanga te! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
6 ᎥᏝ ᎠᏂ ᏘᎦᎾ, ᏚᎴᏅᏰᏃ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏪᏒᎢ; ᎡᏍᏕᎾ ᎡᏍᏓᎦᏔ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᏥᏅᏅᎢ.
Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,
7 ᎠᎴ ᎤᎵᏍᏗᏳ ᎢᏍᏕᎾ ᏫᏗᏍᏗᏃᎲᏏ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᏕᎤᎴᏅ ᎤᏲᎱᏒᎢ; ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎢᎬᏱ ᎨᎵᎵ ᏅᏓᏰᏏ, ᎾᎿᎭᏓᏰᏥᎪᎢ. ᎬᏂᏳᏉ ᎢᏍᏛᏃᎲᏏ.
mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye: ‹ Asili kosekwa kati na bakufi; akei liboso na bino, na Galile; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
8 ᎤᎵᏍᏗᏳᏃ ᎠᏤᎵᏍᏛ ᎤᎾᏓᏅᏎᎢ, ᎠᏂᏍᎦᎢᎮ ᎠᎴ ᎤᏣᏘ ᎠᎾᎵᎮᎵᎨᎢ, ᎠᎴ ᏚᏂᏍᏆᎸᏔᏁ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᏚᏂᏃᏁᎸᏎᎢ.
Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.
9 ᎠᎾᎢᏒᏃ ᏓᏂᏃᏁᎵᏒ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᎬᏂᏳᏉ ᏥᏌ ᏚᎾᏠᏎᎢ; ᏙᎯᏱ ᏕᏓᏓᎪᏩᏛ, ᎤᏛᏁᎢ. ᎤᏂᎷᏨᏃ ᏧᎳᏏᏕᏂ ᏚᏂᏂᏴᎮᎢ, ᎡᎳᏗ ᏂᎬᏩᏛᏁᎴᎢ.
Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki: — Mbote na bino! Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.
10 ᎿᎭᏉᏃ ᏥᏌ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ, ᏞᏍᏗ ᏱᏍᏗᏍᎦᎢᎮᏍᏗ; ᎢᏍᏕᎾ ᏫᏗᏍᏗᏃᎲᏏ ᎣᏣᎵᏅᏟ ᎨᎵᎵ ᏭᏂᎶᎯᏍᏗᏱ, ᎾᎿᎭᏃ ᏓᎬᎩᎪᎯ.
Yesu alobaki na bango: — Bobanga te! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile; ezali kuna nde bakomona Ngai.
11 ᎠᎾᎢᏒᏃ ᎬᏂᏳᏉ ᎢᎦᏛ ᎤᏂᏯᏫᏒᎯ ᎤᏂᎷᏤ ᎦᏚᎲᎢ, ᎠᎴ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᏚᏂᏃᏁᎴ ᏂᎦᏛ ᏄᎵᏍᏔᏂᏙᎸᎢ.
Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka.
12 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᎴ ᏗᏂᎳᏫᎩ ᏚᏂᎳᏫᏨ ᎠᎴ ᎤᏂᏃᎮᎸ, ᎤᏣᏘ ᎠᏕᎸ ᏚᏂᏁᎴ ᎠᏂᏯᏫᏍᎩ,
Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda
13 ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᎯᎠ ᏂᏥᏪᏒᎭ; ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᏒᏃᏱ ᎤᏂᎷᏨᎩ, ᎣᏥᎵᏅ ᎬᏩᏃᏍᎩᏒᎩ.
mpe balobaki na bango: « Tala ndenge bosengeli koloba: ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. ›
14 ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᎠᏛᎦᏅ ᎤᎬᏫᏳᎯ, ᏓᏲᏥᏍᏗᏰᏔᏂ, ᎠᎴ ᏓᏨᏍᏕᎸᎯ.
Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. »
15 ᏚᏂᎩᏒᏃ ᎠᏕᎸ, ᏂᎨᏥᏪᏎᎸ ᏄᎾᏛᏁᎴᎢ. ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᎧᏃᎮᏛ ᎠᏏ ᎠᏂᏃᎮᎵᏙᎭ ᎠᏂᏧᏏ.
Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo.
16 ᎿᎭᏉᏃ ᏌᏚ ᎢᏯᏂᏛ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᎨᎵᎵ ᎤᏁᏅᏒᎩ ᏦᏓᎸ ᏥᏌ ᎤᎾᏎᎮᎸᎢ.
Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende.
17 ᎬᏩᎪᎲᏃ ᎡᎳᏗ ᏂᎬᏩᏛᏁᎸᎩ. ᎠᏎᏃ ᎢᎦᏛ ᎤᎾᏜᏓᏏᏛᎡᎸᏉ.
Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te.
18 ᏥᏌᏃ ᎤᎷᏨ ᏚᏬᏁᏔᏅᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎥᎩᏁᎸ ᏂᎦᎥ ᏗᎩᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ.
Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki: — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.
19 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏤᎾ ᏫᏗᏤᏲᎲᎦ ᎾᎦᏛ ᏄᎾᏓᎴᏒ ᏴᏫ, ᏕᏣᏬᏍᎨᏍᏗ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᏚᏙᎥ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎠᎴ ᎤᏪᏥ ᎠᎴ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ,
Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu;
20 ᏕᏤᏲᎲᏍᎨᏍᏗ ᏧᏂᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᎢᏨᏁᏤᎸᎢ; ᎬᏂᏳᏉᏃ ᏂᎪᎯᎸ ᎢᏨᏰᎳᏗᏙᎭ ᏫᎬᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᎡᎶᎯ. ᎡᎺᏅ. (aiōn g165)
bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili. (aiōn g165)

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 28 >