< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 25 >

1 ᎿᎭᏉᏃ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏍᎪᎯ ᎢᏯᏂᏛ ᎠᎾᏛ, ᎾᏍᎩ ᏥᏚᏂᏅᏎ ᏗᏨᏍᏙᏗ ᎠᎴ ᏥᏚᎾᏠᏒᏎ ᎠᏕᏒᎲᏍᎩ.
Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.
2 ᎯᏍᎩᏃ ᎢᏯᏂᏛ ᎠᏂᎦᏔᎿᎭᎢ ᎨᏎᎢ, ᎯᏍᎩᏃ ᎤᏂᏁᎫ.
Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.
3 ᎤᏂᏁᎫ ᏚᏂᏅᏎ ᏗᏨᏍᏙᏗ ᎠᏎᏃ ᎪᎢ ᏄᏂᏁᏨᏒᎾ ᎨᏎᎢ,
Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te;
4 ᎠᏂᎦᏔᎿᎭᎢᏍᎩᏂ ᏚᏂᏅᏎ ᏧᏂᏨᏍᏙᏗ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎪᎢ ᎤᏂᏁᏨᏎ ᏚᏂᏟᏍᏔᏁ ᏗᏖᎵᏙ.
ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.
5 ᎠᏏᏃ ᎤᎪᏂᏲᎨ ᎠᏕᏒᎲᏍᎩ, ᏂᎦᏛ ᎠᏂᎵᏅᎨᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᎵᏅᏤᎢ.
Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.
6 ᏒᏃᏱᏃ ᎠᏰᎵ ᎩᎶ ᎠᏍᏓᏯ ᎤᏁᏤᎢ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎬᏂᏳᏉ ᎠᏕᏒᎲᏍᎩ ᏓᏯᎢ! ᏫᏕᏣᏠᎢ!
Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki: « Mobali ya libala ayei! Bokende kokutana na ye! »
7 ᎿᎭᏉᏃ ᏂᎦᏛ ᎠᎾᏛ ᎤᎾᏗᏓᏁᏎᎢ, ᎠᎴ ᏚᏂᏥᏃᏍᎦᎸᎮ ᏚᏂᏨᏍᏛᎢ.
Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.
8 ᎤᏂᏁᎫᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏂᏪᏎᎴ ᎠᏂᎦᏔᎿᎭᎢ; ᎢᎦᏛ ᎪᎢ ᎢᏣᏤᎵ ᏍᎩᏁᎥᏏ, ᏙᎬᏠᎯᏎᎭᏰᏃ ᏙᎩᏨᏍᏛᎢ.
Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele: « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
9 ᎠᏎᏃ ᎠᏂᎦᏔᎿᎭᎢ ᎤᏂᏁᏨ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᏝᎨ ᏰᎵ ᏱᏙᎨᎩᏰᎵᎦ ᏂᎦᏛ, ᎢᏤᎾᏉᏍᎩᏂ ᏗᏂᏃᏗᏍᎬ, ᎢᏨᏒ ᏫᏥᏩᎯ.
Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki: « Te! Ekokoka te mpo na biso mpe bino! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »
10 ᎤᏂᏩᏎᏅᏃ ᎠᏕᏒᎲᏍᎩ ᎤᎷᏤᎢ, ᎤᎾᏛᏅᎢᏍᏗᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᏣᎦᏨᏍᏙᏗᏱ ᏭᏂᏴᎴᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᏍᏚᏁ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ.
Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki: baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
11 ᎣᏂᏃ ᎾᏍᏉ ᎠᏂᏐᎢ ᎠᎾᏛ ᎤᏂᎷᏤᎢ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎡᏍᎩᏍᏚᎩ.
Na sima, baseka mosusu mpe bayaki; balobaki: « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke! »
12 ᎠᏎᏃ ᏧᏁᏨ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎥᏝ ᏱᏨᎦᏔᎭ.
Kasi azongiselaki bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: nayebi bino te. »
13 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏥᏯᏫᏍᎨᏍᏗ, ᎥᏝᏰᏃ ᏱᏥᎦᏔᎭ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎧᎳᏩᏗᏒ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ ᏴᏫ ᎤᏪᏥ.
Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.
14 ᎾᏍᎩᏯᏉᏰᏃ ᎩᎶ ᎠᏍᎦᏯ ᎢᏅᏥᏮᏗᎦᎶᏏᏎᎢ, ᎠᎴ ᏥᏫᏚᏯᏅᎮ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎠᎴ ᏥᏚᏲᎯᏎᎴ ᎤᎿᎭᎥᎢ.
Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.
15 ᎠᏏᏴᏫᏃ ᎯᏍᎩ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎠᏕᎸ ᏚᏁᎴᎢ, ᏐᎢᏃ ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ, ᏐᎢᏃ ᏌᏉ ᎢᏯᎦᏴᎵ, ᎠᏂᏏᏴᏫᎭ ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᎢᎬᏩᎾᏛᏁᏗ ᎨᏒᎢ. ᎿᎭᏉᏃ ᎤᏂᎩᏎᎢ.
Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano; na mosali ya mibale, batalanta mibale; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.
16 ᎿᎭᏉᏃ ᎯᏍᎩ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎤᏪᏅᏎ ᏭᏃᏔᏁᎢ, ᎯᏍᎩᏃ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎤᏁᏉᏤᎴᎢ.
Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.
17 ᎾᏍᏉ ᎠᎴ Ꮎ ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎾᏍᏉ ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎤᏁᏉᏤᎴᎢ.
Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.
18 ᏌᏉᏍᎩᏂ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎤᏪᏅᏎᎢ, ᏭᏍᎪᎭ ᎦᏙᎯ, ᎠᎴ ᏫᏚᏩᏍᎦᎳᏁ ᎤᎾᏝᎢ ᏧᏤᎵ ᎠᏕᎸ.
Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.
19 ᎢᎸᎯᏳᏃ ᎢᏴᏛ ᎤᎷᏤ ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᎤᏂᎾᏝᎢ, ᎣᏍᏛᏃ ᏄᏅᏁᎴᎢ.
Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango: « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »
20 ᎯᏍᎩᏃ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎤᎷᏤᎢ, ᎠᎴ ᏚᏲᎴ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᎯᏍᎩ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎠᏕᎸ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᏍᎩᎾᏝᎢ, ᎯᏍᎩ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎠᏕᎸ ᏕᏍᎩᏲᎯᏎᎸᎩ; ᎬᏂᏳᏉ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᎯᏍᎩ ᎢᏯᏕᏴᎵ ᎬᎩᏁᏉᏤᎸ.
Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki: « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »
21 ᎤᎾᏝᎢᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎣᏏᏳ! ᎰᏍᏛ ᎠᎴ ᎯᎦᎵᏯ ᎡᏣᏅᏏᏓᏍᏗ! ᏚᏳᎪᏛ ᏂᏣᏛᏁᎸ ᎤᏍᏗ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏕᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎢ; ᎤᏣᏘ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏣᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏅᏓᎬᏴᏁᎵ; ᎯᏴᎭ ᎣᏍᏛ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏱ ᏣᎾᏝᎢ ᎤᏤᎵᎪᎯ.
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
22 ᎾᏍᏉᏃ ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎤᎷᏨ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᏍᎩᎾᏝᎢ, ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎠᏕᎸ ᏕᏍᎩᏲᎯᏎᎸᎩ; ᎬᏂᏳᏉ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᏔᎵ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎬᎩᏁᏉᏤᎸ.
Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »
23 ᎤᎾᏝᎢ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎣᏏᏳ! ᎰᏍᏛ ᎠᎴ ᎯᎦᎵᏯ ᎡᏣᏅᏏᏓᏍᏗ! ᏚᏳᎪᏛ ᏂᏣᏛᏁᎸ ᎤᏍᏗ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏕᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎢ; ᎤᏣᏘ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏣᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏅᏓᎬᏴᏁᎵ; ᎯᏴᎭ ᎣᏍᏛ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏱ ᏣᎾᏝᎢ ᎤᏤᎵᎪᎯ.
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
24 ᎿᎭᏉᏃ ᏌᏉ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏣᏥᏁᎸᎯ ᎤᎷᏨ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᏍᎩᎾᏝᎢ, ᎬᎦᏔᎲᎩ, ᎯᏍᏓᏱᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎯᏍᎫᏕᏍᎬᎢ ᎾᎿᎭᏂᏣᏫᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎱᏖᏍᎬᎢ ᎾᎿᎭᏂᏣᎴᎳᏛᏅᎾ ᎨᏒᎢ.
Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.
25 ᎠᎴ ᏥᏍᎦᎢᎲᎢ ᎠᏇᏅᏒᎩ, ᏫᏓᎬᏍᎦᎳᏅᎩ ᎦᏙᎯ ᎠᏕᎸ ᏗᏣᏤᎵᎦ; ᎬᏂᏳᏉ ᎠᏂ ᎾᏍᎩ ᏗᏣᏤᎵᎦ.
Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »
26 ᎤᎾᏝᎢᏃ ᎤᏁᏨ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᏣᏁᎫᏥᏛ ᎠᎴ ᏣᏓᏄᎸᏗ ᎡᏣᏅᏏᏓᏍᏗ! ᎯᎦᏔᎲᎩ ᏥᏍᎫᏕᏍᎬ ᎾᎿᎭᎾᎩᏫᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎫᏖᏍᎬ ᎾᎿᎭᎾᎩᎴᎳᏛᏅᎾ ᎨᏒᎢ!
Nkolo na ye azongisaki: « Mosali mabe mpe ya goyigoyi! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,
27 ᎠᏕᎸ ᏗᏂᏍᏆᏂᎪᏗᏍᎩᏱ ᏱᏫᏙᏣᏁ ᎠᏕᎸ ᏗᏆᏤᎵᎦ, ᎾᏍᎩᏃ ᎪᎯ ᏥᏥᎷᎩ ᏱᏓᎩᎪᎮ ᏗᏆᏤᎵ ᎠᎴ ᎤᏂᏁᏉᏨᎯ.
mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki?
28 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏥᏙᎡᏥᎩᏏᏉ ᏌᏉ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎠᏕᎸ, ᎠᏍᎪᎯᏃ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏧᎯ ᏤᏥᎥᏏ.
Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi.
29 ᎩᎶᏰᏃ ᎤᎮᏍᏗ ᎠᏥᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎤᏣᏘᏃ ᎤᏍᏆᏂᎪᏕᏍᏗ; ᎩᎶᏍᎩᏂ ᏄᎲᎾ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏥᎩᎡᏗᏉ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎤᎲᎢ.
Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
30 ᎯᎠᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎬᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎦᏅᏏᏓᏍᏗ ᏙᏱᏗᏢ ᏧᎵᏏᎬ ᏪᏣᏓᎤᎦ; ᎾᎿᎭᏓᏂᏴᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᏓᏂᎸᏓᎩᏍᎨᏍᏗ ᏓᏂᏄᏙᎬᎢ.
Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
31 ᎢᏳᏃ ᎿᎭᏉ ᏴᏫ ᎤᏪᏥ ᎦᎷᏨᎭ ᎤᏩᏒ ᎤᏤᎵᎦ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎤᏄᏬᏍᏕᏍᏗ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎨᏥᎸᏉᏗ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏓᏘᏁᎮᏍᏗ, ᎿᎭᏉ ᏓᎦᏂ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎤᏪᏍᎩᎸᎢ;
Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.
32 ᎢᎬᏱᏗᏢᏃ ᏙᏓᎨᏥᎳᏫᏗ ᏂᎦᏗᏳ ᏄᎾᏓᎴᏒ ᏴᏫ, ᎠᎴ ᏙᏛᎦᎴᏅᏔᏂ ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏫ-ᏗᎦᏘᏯ ᏥᏓᎦᎴᏅᏗᏍᎪ ᏧᏤᎵ ᎠᏫ ᎤᏂᏃᏕᎾ ᎠᎴ ᎠᏫ ᏗᏂᎭᏄᎸᎯ.
Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba:
33 ᎠᏫᏃ ᎤᏂᏃᏕᎾ ᎠᎦᏘᏏ ᎢᏗᏢ ᏙᏓᎦᎪᏔᏂ, ᎠᏫᏃ ᏗᏂᎭᏄᎸᎯ ᎠᎦᏍᎦᏂ ᎢᏗᏢ;
akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎯᎠ ᏂᏙᏓᎦᏪᏎᎵ ᎠᎦᏘᏏ ᎢᏗᏢ ᎠᏂᏙᎾᎢ; ᎡᏤᎾ, ᎡᏙᏓ ᎢᏥᎸᏉᏔᏅᎯ, ᎢᏣᏤᎵ ᏫᏂᎦᎵᏍᏓ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎡᏣᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᎡᎶᎯ ᏧᏙᏢᏅ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ.
Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali: « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.
35 ᎠᎪᏄᏰᏃ ᎠᎩᏲᏏᏍᎬᎩ, ᎥᏍᎩᏰᎳᏍᏔᏅᏃ; ᎠᎩᏔᏕᎩᏍᎬᎩ, ᎥᏍᎩᎤᏅᏃ; ᏅᎩᎦᏔᎲᎾ ᎨᏒᎩ, ᎥᏍᎩᏴᏔᏅᎩ;
Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu;
36 ᎠᎩᏰᎸᎭ ᎨᏒᎩ, ᏙᏍᎩᏄᏬᎥᎩᏃ; ᎠᎩᏢᎬᎩ, ᎥᏍᎩᏯᎦᏔᏂᎸᎩᏃ; ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎥᎩᏍᏚᎲᎩ, ᎥᏍᎩᏩᏛᎯᎸᎩᏃ.
nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba; nabelaki, mpe bosungaki Ngai; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »
37 ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᏛᏂᏁᏥ ᎯᎠ ᏅᏓᎬᏩᏪᏎᎵ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎢᎳᎩᏳ ᎢᏨᎪᏒ ᏣᏲᏏᏍᎨᎢ, ᎢᏨᏰᎳᏍᏔᏁᏃ; ᎠᎴ ᏣᏔᏕᎩᏍᎨᎢ, ᎢᏨᎤᏁᏃ;
Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela?
38 ᎢᎳᎩᏳ ᎢᏨᎪᎡ ᏁᏣᎦᏔᎲᎾ, ᎢᏨᏴᏔᏁᏃ; ᎠᎴ ᏣᏰᎸᎭ ᎨᏎᎢ, ᎢᏨᏄᏬᎡᏃ;
Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo?
39 ᎠᎴ ᎢᎳᎩᏳ ᎢᏨᎪᎡ ᏣᏢᎨᎢ, ᎠᎴ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎡᏣᏍᏚᎮᎢ, ᎢᏨᏯᎦᏔᏂᎴᏃ?
Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo? »
40 ᎤᎬᏫᏳᎯᏃ ᏓᎧᏁᏥ ᎯᎠ ᏂᏙᏓᎦᏪᏎᎵ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏥᏁᏣᏛᏁᎸ ᎤᏍᏗᎧᏂ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎣᏣᎵᏅᏟ, ᎠᏴ ᏂᏍᎩᏯᏛᏁᎸᎩ.
Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
41 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᏉ ᏂᏙᏓᎦᏪᏎᎵ ᎠᎦᏍᎦᏂ ᎢᏗᏢ ᎠᏂᏙᎾᎢ; ᏍᎩᏯᏓᏅᏏ, ᎡᏥᏍᎦᏨᎯ, ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎠᏥᎸᏱ ᏗᎨᏒ ᏫᏥᎶᎯ, ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎩᎾ ᎠᎴ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎨᎪᏢᎾᏁᎸᎯ. (aiōnios g166)
Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi: « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye. (aiōnios g166)
42 ᎠᎪᏄᏰᏃ ᎠᎩᏲᏏᏍᎬᎩ, ᎥᏝᏃ ᏱᏍᎩᏰᎳᏍᏔᏁᎢ; ᎠᎩᏔᏕᎩᏍᎬᎩ, ᎥᏝᏃ ᏱᏍᎩᎤᏁᎢ;
Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela;
43 ᏅᎩᎦᏔᎲᎾ ᎨᏒᎩ, ᎥᏝᏃ ᏱᏍᎩᏴᏔᏁᎢ; ᎠᎩᏰᎸᎭ ᎨᏒᎩ, ᎥᏝᏃ ᏱᏗᏍᎩᏄᏬᎡᎢ; ᎠᎩᏢᎬᎩ, ᎠᎴ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎥᎩᏍᏚᎲᎩ, ᎥᏝᏃ ᏱᏍᎩᏩᏛᎯᎴᎢ.
nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »
44 ᎾᏍᏉᏃ ᎾᏍᎩ ᏛᏂᏁᏥ, ᎯᎠ ᏅᏓᎬᏩᏪᏎᎵ, ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎢᎳᎩᏳ ᎢᏨᎪᎡ ᏣᏲᏏᏍᎨᎢ, ᎠᎴ ᏣᏔᏕᎩᏍᎨᎢ, ᎠᎴ ᏁᏣᎦᏔᎲᎾ ᎨᏎᎢ, ᎠᎴ ᏣᏰᎸᎭ ᎨᏎᎢ, ᎠᎴ ᏣᏢᎨᎢ, ᎠᎴ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎡᏣᏍᏚᎮᎢ, ᏂᏨᏍᏕᎸᎲᎾᏃ ᎨᏎᎢ?
Bango mpe bakotuna Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te? »
45 ᎿᎭᏉᏃ ᏓᎧᏁᏥ ᎯᎠ ᏂᏙᏓᎦᏪᏎᎵ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏁᏣᏛᏁᎸᎾ ᎨᏒ ᎤᏍᏗᎧᏂ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ, ᎠᏴ ᎥᏝ ᏱᏂᏍᎩᏯᏛᏁᎴᎢ.
Akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
46 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᎩ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎠᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏱ ᏗᎨᏒ ᏮᏛᏂᎶᏏ; ᎤᎾᏓᏅᏘᏍᎩᏂ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎬᏂᏛ ᏗᎨᏒᎢ. (aiōnios g166)
Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko. (aiōnios g166)

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 25 >