< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 21 >

1 ᎿᎭᏉᏃ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎾᎥ ᎤᏂᎷᏨ, ᏒᎦᏙᎯ, ᎣᎵᏩ ᎤᏌᎯᎸᎢ ᎢᏴᏛ, ᏥᏌ ᎠᏂᏔᎵ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᏚᏅᏒᎩ,
Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale.
2 ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎢᏍᏕᎾ ᎢᏢ Ꮎ ᏨᏗᎦᏚᎭ, ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏓᏰᏍᏗᏩᏛᎯ ᏐᏈᎵ-ᏗᎦᎵᎠᏅᎯᏛ ᎨᎵᏌᏕᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᎩᎾ ᎠᏘᏁᎮᏍᏗ, ᏕᏍᏕᎵᏌᏕᏒᎭ, ᎠᎴ ᏕᏍᎩᎾᏘᏃᎮᎸᎭ.
Alobaki na bango: — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango.
3 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏍᏙᏎᎸᎭ, ᎯᎠ ᏁᏍᏗᏪᏎᎸᎭ; ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏚᏚᎵᎭ; ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏙᏓᏳᏲᏏ.
Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye: « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.
4 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ, ᎤᏙᎯᏳᏗᏱ ᎠᏰᎸᏒᎢ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᏧᏁᏤᎢ, ᎯᎠ ᏥᏄᏪᏎᎢ;
Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama:
5 ᎯᎠ ᏁᏥᏪᏏ ᏌᏯᏂ ᎤᏪᏥ ᎠᎨᏴ; ᎬᏂᏳᏉ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏣᏤᎵ ᏓᏯᎢ, ᏓᏣᎷᏤᎵ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗᏳ, ᎠᎴ ᎤᎩᎸᏕᏍᏗ ᏐᏈᎵ-ᏗᎦᎵᎠᏅᎯᏛ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᏛᏁᎯ ᎤᏪᏥ ᎠᎩᎾ.
« Boloba na Siona, mboka kitoko: ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »
6 ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯᏃ ᎤᏁᏅᏒᎩ, ᏥᏌ ᏄᏂᏪᏎᎸ ᎾᏍᎩᏯ ᏫᏄᎾᏛᏁᎸᎩ;
Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango.
7 ᏐᏈᎵ-ᏗᎦᎵᎠᏅᎯᏛ ᎠᎴ ᎠᎩᎾ ᏚᎾᏘᏃᎸᎩ; ᏗᏂᏐᎯᏱᏃ ᏧᎾᏄᏬ ᏚᏂᏢᏅᎩ, ᎠᎴ ᎾᎿᎭᎤᎾᎩᎸᏔᏅᎩ.
Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
8 ᎤᏟᏃ ᎢᏯᏂᎢ ᏴᏫ ᏧᎾᏄᏬ ᏚᏂᏰᏍᏛᏅᎩ ᏅᏃᎯ, ᎢᎦᏛᏃ ᏚᏅᏂᎦᎸᎲᎩ ᏧᏪᏲᏔ ᏕᏡᎬᎢ, ᎠᎴ ᏅᏃᎯ ᏚᏂᏲᏔᏅᏅᎩ.
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.
9 ᎤᏂᏣᏘᏃ ᎢᎬᏱ ᎠᏁᎩ, ᎠᎴ ᎣᏂ ᎠᏁᎩ ᎤᏁᎷᎬᎩ, ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎩ; ᎰᏌᎾ ᏕᏫ ᎤᏪᏥ! ᎠᏥᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᏱᎰᏩ ᏕᎤᏙᎥ ᏥᎦᎷᎯᏍᏗᎭ! ᎰᏌᎾ ᏩᏍᏛ ᎦᎸᎳᏗᏳ!
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga: « Ozana na Mwana na Davidi! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Ozana na bisika oyo eleki Likolo! »
10 ᏥᎷᏏᎵᎻᏃ ᎤᎷᏨ ᏂᎬ ᎦᏚᎲ ᎤᎾᎵᏖᎸᏅᎩ, ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎩ; ᎦᎪ ᎯᎠ?
Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki; bazalaki kotuna: — Oyo lisusu nani?
11 ᎤᏂᏣᏘᏃ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᎯᎠ ᏥᏌ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ, ᎾᏎᎵᏗ ᎡᎯ ᎨᎵᎵ ᎦᏚᎲᎢ.
Bato bazalaki kozongisa: — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile!
12 ᏥᏌᏃ ᏭᏴᎸᎩ ᎤᏛᎾ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᏚᏄᎪᏫᏒᎩ ᏂᎦᏛ ᎠᏂᎾᏕᎩ ᎠᎴ ᎤᏂᏩᏍᎩ ᎾᎿᎭᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏚᎷᏆᏗᏅᏒᎩ ᏚᏂᏍᎩᎸ ᎠᏕᎸ ᏗᏂᏁᏟᏴᏍᎩ, ᎠᎴ ᎫᎴ ᏗᏂᏍᎪᏂᎯ ᏗᏂᎾᏕᎩ ᎤᎾᏅᏗᏱ.
Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.
13 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎯᎠ ᏂᎬᏅᎪᏪᎳ; ᎠᏆᏤᎵ ᎦᎵᏦᏕ ᎠᏓᏙᎵᏍᏙᏗᏱ ᎦᎵᏦᏕ ᏚᏙᎡᏍᏗ; ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᎠᏂᏃᏍᎩᏍᎩ ᎤᏂᏴᏍᏗᏱ ᏂᏨᏁᎸ.
Alobaki na bango: — Ekomama: « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi!
14 ᏗᏂᎨᏫᏃ ᎠᎴ ᏗᏂᏲᎤᎵ ᎬᏩᎷᏤᎸᎩ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏚᏅᏩᏅᎩ.
Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.
15 ᎿᎭᏉᏃ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎠᎴ ᏗᏃᏪᎵᏍᎩ ᎤᎾᏙᎴᎰᏒ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗᏳ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎲᎢ, ᎠᎴ ᏗᏂᏲᎵ ᎤᏁᎷᎬ ᎤᏛᎾ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎢ, ᎰᏌᎾ ᏕᏫ ᎤᏪᏥ! ᎤᏣᏘ ᎤᏂᏐᏅᏤᎸᎩ;
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo: « Ozana na Mwana na Davidi! »
16 ᎠᎴ ᎯᎠ ᏂᎬᏩᏪᏎᎸᎩ; ᎭᏛᎩᏍᎪ ᎯᎠ ᏥᎾᏂᏪᎭ? ᏥᏌᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎥᎥ, ᏝᏍᎪ ᎯᎸᎯᏳ ᎯᎠ ᏱᏥᎪᎵᏰᎣᎢ; ᏧᎾᏍᏗ ᏗᏂᏲᎵ ᎠᎴ ᏗᏂᏍᏓᎢ ᎠᏂᎰᎵ ᎤᏄᎪᏨᎯ ᏣᏩᏛᏙᏔᏅ ᎡᏣᎸᏉᏙᏗᏱ?
Balobaki na Yesu: — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba? Yesu azongiselaki bango: — Iyo! Boni, botikala nanu kotanga te: « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo? »
17 ᏚᏓᏅᎡᎸᎩᏃ, ᎠᎴ ᎦᏚᎲ ᎤᏄᎪᏨᎩ, ᏇᏗᏂᏱ ᏭᎷᏨᎩ, ᎠᎴ ᎾᎿᎭᎤᏒᎸᎩ.
Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.
18 ᏑᎾᎴᏃ ᏗᎦᏚᎲ ᏮᎠᎦᏛᎢ ᎠᎪᏄ ᎤᏲᏏᏌᏅᎩ.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.
19 ᎤᎪᎲᏃ ᏒᎦᏔ-ᎢᏳᏍᏗ ᏡᎬ ᏅᏃᎱᎶᏗ, ᎾᎿᎭᏭᎷᏨᎩ; ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎪᎱᏍᏗ ᏳᏩᏛᎮᎢ, ᎤᎳᏍᏚᏒ ᎤᏩᏒ; ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᏞᏍᏗ ᎢᎸᎯᏳ ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᏱᏣᏓᏔᏁᏍᏗ. ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏒᎦᏔ-ᎢᏳᏍᏗ ᏡᎬ ᎤᏩᏴᏒᎩ. (aiōn g165)
Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango: — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. (aiōn g165)
20 ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯᏃ ᎤᏂᎪᎲ ᎤᏂᏍᏆᏂᎪᏒᎩ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᎾᏞᎬᏉ ᎬᏴᎯ ᏒᎦᏔ-ᎢᏳᏍᏗ ᏡᎬᎢ!
Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki: — Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko?
21 ᏥᏌ ᎤᏁᏨ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ; ᎢᏳᏃ ᏱᏦᎯᏳᎭ, ᎠᎴ ᏂᏣᏜᏓᏏᏛᎡᎲᎾ ᏱᎩ, ᎥᏝ ᎯᎠᏉ ᏒᎦᏔ-ᎢᏳᏍᏗ ᏡᎬ ᏥᎾᎬᎦ ᏱᏅᎨᏣᏛᎦ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎯᎠ ᏱᏂᏥᏪᏎᎸ ᎯᎠ ᏦᏓᎸ, ᎭᏓᏅᎾ, ᎠᎴ ᎠᎺᏉᎯ ᏪᏣᏚᎦ, ᎠᏎ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ.
Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana: « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.
22 ᏂᎦᎥᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏥᏔᏲᎯᎮᏍᏗ, ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎢᏦᎯᏳᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎢᏥᏩᏘᏍᎨᏍᏗ.
Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
23 ᎤᏛᎾᏃ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎤᎷᏨ, ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎠᎴ ᏧᎾᏛᏐᏅᎯ ᏴᏫ ᎠᏁᎲ ᎬᏩᎷᏤᎸᎩ ᏓᏕᏲᎲᏍᎬᎢ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᎦᏙ ᏣᎵᏍᎦᏍᏙᏗ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏕᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎭ? ᎠᎴ ᎦᎪ ᏣᏁᏤᎸᎯ?
Yesu akotaki na lopango ya Tempelo; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki: — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo? Nani apesi yo bokonzi yango?
24 ᏥᏌᏃ ᎤᏁᏨ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎠᏴ ᎾᏍᎩ ᏑᏓᎴᎩ ᏓᏨᏯᏛᏛᏂ, ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᏍᎩᏃᏁᎸ ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᏓᏨᏃᏁᎵ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏆᎵᏍᎦᏍᏙᏛᎢ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎭ.
Yesu azongiselaki bango: — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Soki kaka bopesi Ngai eyano, nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
25 ᏣᏂ ᏥᏓᏓᏬᏍᎬᎩ ᎭᏢ ᏧᏓᎴᏁᎢ? ᎦᎸᎳᏗᏍᎪ, ᏴᏫᏉᎨ ᎠᏁᎲ ᏧᏓᎴᏁᎢ? ᎡᎳᏪᏱᏃ ᎤᎾᏓᏅᏖᎸᎩ, ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎩ; ᎢᏳᏃ ᎦᎸᎳᏗ, ᏲᎦᏛᏅ, ᎦᏙᏃ Ꮭ ᏱᎡᏦᎢᏳᏁᎢ? ᏲᎪᏏ.
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango: — Soki tolobi: « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu: « Bongo mpo na nini bondimaki ye te? »
26 ᎢᏳᏃ ᏴᏫᏉ ᎠᏁᎲ ᏧᏓᎴᏁᎢ ᏲᎦᏛᏅ, ᏙᏥᏍᎦᎢᎭᏉ ᏴᏫ; ᏂᎦᏛᏰᏃ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᎤᏂᏰᎸᎭ ᏣᏂ.
Soki mpe tolobi: « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.
27 ᎤᏂᏁᏨᏃ ᎯᎠ ᏅᎬᏩᏪᏎᎸ ᏥᏌ; ᎥᏝ ᏲᏥᎦᏔᎭ. ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎥᏝ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᏴᎨᏨᏃᎲᏏ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏆᎵᏍᎦᏍᏙᏛᎢ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎭ.
Boye, bazongiselaki Yesu: — Toyebi te! Yesu mpe alobaki na bango: — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
28 ᎠᏎᏃ ᎦᏙ ᎢᏤᎵᎭ? ᎩᎶ ᎠᏍᎦᏯ ᎠᏂᏔᎵ ᏧᏪᏥ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎠᏁᎮᎢ; ᎠᏏᏴᏫᏃ ᎢᎬᏱ ᏭᎷᏤᎸ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎠᏇᏥ, ᎮᎾ ᎪᎯ ᏫᏗᏣᎸᏫᏍᏓᏏ ᏖᎸᎳᏗ ᏓᎩᏫᏒᎢ.
Yesu alobaki na bango lisusu: — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo? Moto moko azalaki na bana mibali mibale; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye: « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »
29 ᏧᏁᏨᏃ, ᎥᏝ, ᎤᏛᏁᎢ; ᎠᏎᏃ ᎣᏂ ᎤᏁᏟᏴᏎ ᎤᏓᏅᏛᎢ, ᎠᎴ ᎤᏪᏅᏎᎢ.
Mwana azongisaki: « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.
30 ᏐᎢᏃ ᏭᎷᏤᎸ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏪᏎᎴᎢ. ᏧᏁᏨᏃ, ᏓᎨᏏ, ᎤᏛᏁᎢ; ᎠᏎᏃ ᏄᏪᏅᏒᎾᏉ ᎢᎨᏎᎢ.
Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki: « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi! » Kasi akendeki te.
31 ᎦᎪ ᎯᎠ ᎠᏂᏔᎵ ᎤᏙᏓ ᎤᏁᏨ ᏄᏛᏁᎴᎢ? ᎢᎬᏱ ᏭᎷᏤᎸᎯ, ᎥᎬᏬᏎᎸᎩ. ᏥᏌᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎠᏕᎸ ᎠᏂᎩᏏᏙᎯ ᎠᎴ ᏧᎾᏤᏌᏘ ᎠᏂᎨᏴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᏩᏂᏴᎯᎭ ᏕᎨᏥᎪᏂᎭ.
Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye? Bazongisaki: — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,
32 ᏣᏂᏰᏃ ᏚᏳᎪᏛ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᎢᏥᎷᏤᎸᎩ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏰᏦᎢᏳᏁᎢ, ᎠᏕᎸᏍᎩᏂ ᎠᏂᎩᏏᏙᎯ ᎠᎴ ᎠᏂᎨᏴ ᏧᎾᏤᏌᏘ ᏥᎬᏬᎯᏳᏅᎩ; ᏂᎯᏃ ᎢᏣᏙᎴᎰᏒ ᎥᏝ ᎣᏂ ᏱᏗᏥᏁᏟᏴᏎ ᏕᏣᏓᏅᏛ ᎡᏦᎢᏳᏗᏱ.
pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.
33 ᏅᏩᏓᎴ ᏓᏟᎶᏍᏛ ᎢᏣᏛᎬᎦ; ᎡᎮ ᎩᎶ ᎠᏍᎦᏯ ᎦᏁᎳ, ᎾᏍᎩ ᏖᎸᎳᏗ ᏚᏫᏎᎢ, ᎠᎴ ᎤᏐᏲᎴ ᎬᏩᏚᏫᏛ, ᎠᎴ ᎤᏍᎪᏎ ᎩᎦᎨ-ᎠᏗᏔᏍᏗ ᎪᏢᏗᏱ, ᎠᎴ ᎤᏁᏍᎨᎮ ᎢᏅ ᎢᎦᏘ, ᎠᎴ ᏚᏙᎳᏍᏔᏁ ᏠᎨᏏ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ, ᎢᏅᏃ ᏭᎶᏎᎢ.
Boyoka lisese mosusu: Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
34 ᎿᎭᏉᏃ ᎾᎥᏂᏳ ᎨᏎ ᎤᏅᏂᏍᏗᏱ ᏚᏅᏎ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ ᏠᎨᏏ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᏗᏁᎲᎢ, ᏚᏂᏁᏒᏎ ᎤᎾᏓᏛᏅᎯ.
Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye;
35 ᏠᎨᏏᏃ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᏚᏂᏂᏴᎮ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎠᏏᏴᏫ ᎤᏂᎸᏂᎴᎢ, ᏐᎢᏃ ᎤᏂᎴᎢ, ᏐᎢᏃ ᏅᏯ ᏚᏅᏂᏍᏔᏁᎢ.
kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.
36 ᏔᎵᏁᏃ ᏚᏅᏎ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ ᎤᏟ ᎢᏯᏂᎢ; ᎾᏍᎩᏯᏉᏃ ᏂᏚᏅᏁᎴᎢ.
Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.
37 ᎣᏂᏱᏃ ᎤᏪᏥ ᎤᏅᏎᎢ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎠᏎ ᏛᏂᎸᏉᏔᏂ ᎠᏇᏥ.
Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki: « Solo, bakotosa mwana na ngai! »
38 ᎠᏎᏃ ᏠᎨᏏ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎤᏂᎪᎲ ᎤᏪᏥ ᎯᎠ ᏂᏚᎾᏓᏪᏎᎴᎢ; ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎤᏤᎵ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ; Ꭷ ᎡᏗᎷᎦ, ᎠᎴ ᎡᏗᏬᏅ ᎤᏤᎵ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᏥᎩ.
Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula ya elanga! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso! »
39 ᎤᏂᏂᏴᎮᏃ, ᎠᎴ ᎤᏂᏄᎪᏫᏎ ᏖᎸᎳᏗ ᏓᏫᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᎴᎢ.
Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.
40 ᎿᎭᏉᏃ ᎾᏍᎩ ᏖᎸᎳᏗ ᏓᏫᏒ ᎤᏤᎵᎦ ᎦᎷᏨᎭ, ᎦᏙ ᏙᏓᎬᏁᎵ Ꮎ ᏠᎨᏏ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ?
Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini?
41 ᎯᎠᏃ ᏅᎬᏩᏪᏎᎸᎩ; ᎤᏲᎢᏳ ᏂᏙᏓᎬᏁᎵ ᏙᏛᎵ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏂᏲᎢ, ᎠᎴ ᏅᏩᎾᏓᎴ ᏠᎨᏏ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᏙᏛᏙᎳᏍᏔᏂ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᎬᏩᎾᎫᏴᏗ ᎾᏅᎾᏏᏒᎢ.
Bazongisaki: — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.
42 ᏥᏌᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎸᎩ; ᏝᏍᎪ ᎢᎸᎯᏳ ᏱᏥᎪᎵᏰᎣ ᎯᎠ ᏥᏂᎬᏅ ᏥᎪᏪᎳ? ᎠᎾᏁᏍᎨᏍᎩ ᎤᏂᏲᎢᏎᎸᎯ ᏅᏯ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎤᏅᏏᏴ ᎠᏗ ᏄᎵᏍᏔᏅ; ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏱᎰᏩ ᏄᏛᏁᎸ, ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗᏳ ᏕᏓᎧᏂᏍᎬᎢ.
Yesu alobaki na bango: — Nanu botanga te kati na Makomi: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »
43 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᏓᏰᏥᎩᏒᎵ, ᏅᏩᎾᏓᎴᏃ ᏓᎨᏥᏁᎵ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᎬᏩᏂᎾᏄᎪᏫᏍᏗ ᎤᏓᏔᏅᎯ.
Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [
44 ᎩᎶᏃ ᎠᏂ ᏅᏲᎯ ᎠᏢᏨᎭ ᏓᏳᏐᏅᏂ, ᎩᎶᏃ ᎤᏐᏅᎭ ᏓᏳᏪᏓᏬᏔᏂ.
Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]
45 ᎿᎭᏉᏃ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎠᎴ ᎠᏂᏆᎵᏏ ᎤᎾᏛᎦᏅ ᏓᏟᎶᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎤᎾᏙᎴᎰᏒᎩ ᎤᏅᏒ ᎨᏥᏛᎬᎢ.
Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.
46 ᎤᏂᏂᏴᏗᏱᏃ ᎤᎾᏓᏅᏖᎸ, ᎤᏂᏣᏘ ᏴᏫ ᏚᏂᏍᎦᎸᎩ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎠᏙᎴᎰᏍᎩ ᎬᏩᏰᎸᏒᎩ.
Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎹᏚ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 21 >