< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 12 >

1 ᎾᎯᏳᏉᏃ ᏕᎠᏂᎳᏫᎡ ᎤᏂᏧᏈᏍᏗ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏕᎠᎾᏓᎳᏍᏛᏗᏍᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᎴᏅᎮ ᎯᎠ ᎢᎬᏴ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ, ᎢᏤᏯᏔᎮᏍᏗ ᎠᎪᏙᏗ ᎠᏂᏆᎵᏏ ᎤᎾᏤᎵᎦ, ᎾᏍᎩ ᎠᏠᎾᏍᏗ ᏥᎩ.
Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye: — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta!
2 ᎥᏝᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᎬᏍᎦᎳ ᎾᏍᎩ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏕᎵᏛ ᏱᎩ ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
3 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎾᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᎵᏏᎬ ᎢᏥᏁᏨ ᎢᎦ ᎦᏛ ᎠᏛᎪᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎾᏍᎩᏃ Ꮎ ᎢᏣᏙᏅᎸᎢ ᏕᎧᏅᏑᎸ, ᎦᏌᎾᎵ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
4 ᎠᎴ ᎢᏨᏲᏎᎭ ᏂᎯ ᎢᎦᎵᎢ, ᏞᏍᏗ ᏱᏗᏥᏍᎦᎢᎮᏍᏗ ᎠᏰᎸ ᎠᏂᎯᎯ, ᎿᎭᏉᏃ ᎪᎱᏏᏗ ᎤᏟ ᎢᏴᏛ ᏫᎬᏩᎾᏛᏁᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ.
Balingami na Ngai, nazali koloba na bino: bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te.
5 ᎠᏎᏃ ᏓᏨᏰᏯᏔᏂ ᎾᏍᎩ ᎡᏥᎾᏰᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎡᏥᎾᏰᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏳᏓᎸ, ᏰᎵᏉ ᏨᏍᎩᏃ ᏫᎬᏩᏓᏓᎢᏅᏗ ᎨᏒᎢ; ᎥᎥ, ᎢᏨᏲᏎᎭ ᎡᏥᎾᏰᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ. (Geenna g1067)
Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga: bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino: Ye nde bosengeli kobanga. (Geenna g1067)
6 ᏝᏍᎪ ᎯᏍᎩ ᏥᏍᏆᏯ ᏔᎵ ᎢᏯᏓᏅᏖᏗ ᏱᏓᎾᎵᎬᏩᎸᏍᎪᎢ? ᎥᏝᏃ ᏌᏉ ᎾᏍᎩ ᎠᎬᎨᏫᏒᎯ ᏱᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ.
Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango.
7 ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎢᏥᏍᏗᏰᎬ ᎢᏥᏍᎪᎵ ᏂᎦ-ᏗᏳ ᏗᏎᎸᎯ. ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏱᏥᏍᎦᎢᎮᏍᏗ; ᏂᎯ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᏗᏣᎬᏩᎶᏗ ᎡᏍᎦᏉ ᎤᏂᏣᏘ ᏥᏍᏆᏯ.
Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te; boleki bandeke mike ebele na motuya.
8 ᎾᏍᏉ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎩᎶ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᏋᏁᎮᏍᏗ ᏴᏫ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᏴᏫ ᎤᏪᏥ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᏍᏉ ᏅᏓᏳᏩᏁᎵ ᎠᏂᎦᏔᎲ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ.
Nazali koloba na bino: moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye;
9 ᎩᎶᏍᎩᏂ ᎠᏆᏓᏱᎮᏍᏗ ᏴᏫ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ, ᎠᎦᏓᏱᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏂᎦᏔᎲ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ.
kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya ba-anjelu ya Nzambe.
10 ᎠᎴ ᎩᎶ ᎦᏬᏂᏍᎬ ᎠᏡᏗᏍᎨᏍᏗ ᏴᏫ ᎤᏪᏥ, ᎦᏰᏥᏙᎵᏍᏗᏉ ᎨᏎᏍᏗ; ᎩᎶᏍᎩᏂ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎠᏐᏢᎢᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎥᏝ ᎦᏰᏥᏙᎵᏍᏗ ᏱᎨᏎᏍᏗ.
Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.
11 ᎠᎴ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᏕᏣᏘᏃᎯᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᏄᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩᏱ, ᎠᎴ ᎤᏂᎬᏫᏳᎯᏱ, ᏞᏍᏗ ᏱᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ ᏄᏍᏛ ᎠᎴ ᎢᏳᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏣᏓᏁᏤᏗᏱ, ᎠᎴ ᎢᏥᏪᏍᏗᏱ;
Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba;
12 ᎦᎸᏉᏗᏳᏰᏃ ᎠᏓᏅᏙ ᏓᏤᏲᏂ ᎾᎯᏳ ᎨᏒ ᎢᏥᏪᏍᏗᏱ.
pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.
13 ᎠᏏᏴᏫᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᏔᏕᏲᎲᏍᎩ, ᎯᏁᏥ ᏦᏍᏓᏓᏅᏟ ᏔᎵ ᎢᏲᎩᏂᏗᏍᏗᏱ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏘᏴᎯ.
Moto moko kati na ebele ya bato alobaki na Yesu: — Moteyi, loba na ndeko na ngai ete akabola na ngai libula oyo tata atikelaki biso.
14 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᎯᏍᎦᏯ, ᎦᎪ ᏗᏍᏛᏳᎪᏓᏁᎯ ᎠᎴ ᎢᏍᏛᏯᏙᎮᎯ ᎾᏋᏁᎸ?
Yesu azongiselaki ye: — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula?
15 ᎠᎴ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ, ᎢᏤᏯᏙᏤᎮᏍᏗ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎠᎬᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᏴᏫᏰᏃ ᎬᏅ ᎥᏝ ᎤᏣᏘ ᎤᎿᎭᎥ ᏳᎵᏍᏕᎸᏙᏗ.
Bongo alobaki na bato nyonso: — Bosala keba! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
16 ᏚᏟᎶᏍᏓᏁᎴᏃ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ, ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏪᎿᎭᎢ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᎶᎨᏒ ᎤᏣᏘ ᎤᏛᏒᏁᎴᎢ;
Mpe alobaki na bango lisese oyo: — Bilanga ya mozwi moko ebotaki bambuma ebele penza.
17 ᎤᏓᏅᏖᎴᏃ ᎤᏩᏒ ᏧᏓᏅᏛᎢ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ, ᎦᏙ ᏓᎦᏛᏁᎵ, ᎥᏝᏰᏃ ᏰᎵ ᏳᏜᏓᏅᏛ ᎠᎩᏗᏱ ᎠᏆᏛᎯᏎᎸᎯ.
Akomaki kokanisa mpe komituna: « Nasala nini? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »
18 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ; ᎯᎠ ᏅᏓᎦᏛᏁᎵ; ᏙᏓᏥᏲᏍᏔᏂ ᎠᎩᏅᏗᏱ ᏓᏓᏁᎸᎢ, ᏧᏛᏂᏗᏃ ᏓᏓᎦᏁᏍᎨᎯ; ᎾᎿᎭᏃ ᏓᏥᏂ ᏂᎦᏛ ᎠᏆᏛᎯᏎᎸᎯ ᎠᎴ ᎠᎩᎾᎥᎢ.
Bongo amilobelaki lisusu: « Nakosala boye: nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu.
19 ᎯᎠᏃ ᏅᏓᏥᏪᏎᎵ ᎠᏆᏓᏅᏙ; ᎠᏆᏓᏅᏙᎩ, ᎤᏣᏔ ᏣᏍᏆᏂᎪᏗ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏣᏘ ᎢᏧᏕᏘᏴᏗ ᏣᎵᏍᏕᎸᏙᏗ; ᎭᏣᏪᏐᎸᏍᏓ, ᎭᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎭᏗᏔᏍᎨᏍᏗ, ᎭᎵᎮᎵᎨᏍᏗ.
Sima na yango, nakomilobela: ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele; pema na yo, lia, mela mpe sepela! › »
20 ᎠᏎᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᏘᏣᏓᏅᏛᎾ, ᎪᎯᏉ ᎤᏒᎢ ᏣᏓᏅᏙ ᏓᏰᏣᏯᏅᏒᎵ; ᎦᎪᏃ ᎤᏤᎵ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏥᏣᏓᏁᎳᏅ.
Kasi Nzambe alobaki na ye: « Zoba! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko? »
21 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏗ ᎩᎶ ᏣᏓᏓᏟᏌᏁᎰ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏩᏒ ᎤᏤᎵᎦ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏱᏃ ᎢᏗᏢ ᏄᏪᎿᎭᎥᎾ ᏥᎨᏐᎢ.
Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.
22 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᏞᏍᏗ ᏱᏤᎵᎯᏍᎨᏍᏗ ᏕᏨᏅᎢ, ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᎵᏍᏓᏴᏗᏱ; ᎠᎴ ᏗᏥᏰᎸᎢ, ᎢᏳᏍᏗ ᏗᏣᏄᏬᏍᏗᏱ.
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini?
23 ᎠᎬᏅ ᎤᏟᎯᏳ ᎡᏍᎦᏉ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗ, ᎠᎴ ᎠᏰᎸ ᎤᏟᎯᏳ ᎡᏍᎦᏉ ᏗᏄᏬ.
Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.
24 ᎪᎳᏅ ᏗᏣᏓᏅᏛᎵ; ᎥᏝᏰᏃ ᏯᏂᏫᏍᎪᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᏯᏂᏍᎫᏕᏍᎪᎢ; ᎥᏝ ᎠᎴ ᏧᎾᏓᎾᏅᏗᏱ ᎠᎴ ᎤᏂᏅᏗᏱ ᏱᏓᏓᏁᎸ; ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏕᎨᎶᎰᎢ. ᏂᎦᎥ ᎤᏟ ᏁᏥᎸᏉᏗ ᏂᎯ ᎡᏍᎦᏉ ᏥᏍᏆ.
Botala bayanganga: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.
25 ᎦᎪᏃ ᎯᎠ ᏥᏂᏣᏛᏅ ᎤᏪᎵᎯᏍᎬᏉ ᏖᎵ ᏱᎦᏅᎯᏓ ᎬᏅᎢ ᏌᏉ ᎢᏯᎩᏳᏍᏈᏛ.
Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye?
26 ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏍᏗᎧᏂ ᎨᏒ ᏰᎵ ᎢᎨᏣᏛᏁᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏱᎩ, ᎦᏙᏃ ᎠᏏ ᏅᏩᏓᎴ ᏫᏤᎵᎯᏍᎪᎢ?
Soki bokoki kosala te makambo oyo ya mike-mike, bongo mpo na nini komitungisa na tina na makambo mosusu?
27 ᏗᏣᏓᏅᏛᎵ ᏧᏥᎸᎯ ᏓᏛᏍᎬᎢ; ᎥᏝ ᏱᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎰᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᏯᏂᏍᏙᎰᎢ; ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᎾᏍᏉ ᏐᎵᎹᏅ ᏂᎦᎥ ᎤᏬᏚᎯᏳ ᎨᏒ ᎥᏝ ᎾᏍᎩ ᏱᏄᏍᏕ ᏚᏄᏩᎥᎢ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏌᏉ ᏄᏍᏛᎢ.
Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka! Esalaka te, etongaka bilamba te; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
28 ᎢᏳᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᏱᏂᎬᏁᎭ ᏱᎦᏄᏬᎭ ᎧᏁᏍᎦ, ᎾᏍᎩ ᎪᎯ ᎢᎦ ᏠᎨᏏ ᏤᎭ, ᎤᎩᏨᏅᏃ ᏗᎦᏚᏗᏱ ᏬᎾᏗᏅᏗ ᏥᎩ, ᎤᏟᎯᏳᏍᎩᏂ ᏂᎯ ᏂᏙᏓᏥᏄᏬᎢ ᎤᏍᏗ ᎢᏦᎯᏳᎯ!
Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke?
29 ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏂᎯ ᏱᏥᏲᎮᏍᏗ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᎵᏍᏓᏴᏗᏱ, ᎠᎴ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᏗᏔᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏧᏢᏫᏛ ᏱᏂᏚᏍᏕᏍᏗ ᏕᏣᏓᏅᏛᎢ.
Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino.
30 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏂᎦᏛ ᎯᎠ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎡᎶᎯ ᏓᏁᏩᏗᏒ ᎤᏂᏲᎰᎢ; ᎢᏥᏙᏓᏃ ᎠᎦᏔᎰ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎢᏥᏂᎬᎬᎢ.
Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
31 ᎢᏥᏲᎮᏍᏗᏍᎩᏂ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎡᏣᏠᏯᏍᏓᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
32 ᏞᏍᏗ ᏱᏥᏍᎦᎢᎮᏍᏗ ᎢᏥᎦᏲᎵ ᎠᏫ; ᎢᏥᏙᏓᏰᏃ ᎣᏏᏳ ᎤᏰᎸᎭ ᎢᏥᏁᏗᏱ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ.
Oh etonga moke, bobanga te! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi!
33 ᎢᏥᎾᏕᎨᏍᏗ ᎢᏥᎿᎭᎥᎢ ᎠᎴ ᎢᏣᏓᏁᎸᎥᏍᎨᏍᏗ; ᎢᏣᏓᏁᎴᏍᏗ ᏕᎦᎶᏗ ᏂᏚᏪᏔᎬᎾ, ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎦᎸᎳᏗ ᏫᏥᏟᏏᏍᎨᏍᏗ ᎠᏗᏒᎲᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ, ᎾᎿᎭᏫᎬᏩᎷᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎦᏃᏍᎩᏍᎩ, ᎠᎴ ᏥᏍᎪᏯ ᏫᎬᏩᏲᏍᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ.
Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te;
34 ᎾᎿᎭᏰᏃ ᏫᏥᎲ ᏧᎬᏩᎶᏗ, ᎾᎿᎭᎾᏍᏉ ᏫᏓᎮᏍᏗ ᏗᏥᎾᏫ.
pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.
35 ᏕᏣᏓᏠᎮᏍᏗ, ᏕᏥᏨᏍᏛᏃ ᏓᏓᏪᎵᎩᏍᎨᏍᏗ.
Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.
36 ᎢᏨᏒᏃ ᏕᏣᏤᎴᏍᏗ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎾᏍᎩ ᏣᏂᎦᏘᏲ ᎤᏂᏅᏏᏙᎯ, ᎢᏳᏉ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ ᏕᎨᎦᏨᏍᏗᏍᎬ ᏭᏪᏙᎸᎯ; ᎾᏍᎩᏃ ᏳᎷᏨ ᎠᎴ ᏳᏩᏂᎸ, ᎾᏍᎩ ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ ᏫᎬᏩᏍᏚᎢᎡᏗᏱ.
Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke.
37 ᎣᏏᏳ ᎢᏳᎾᎵᏍᏓᏁᏗ ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎤᏂᏅᏏᏙᎯ ᎦᎷᏨᎭ ᏓᏩᏛᎲᎭ ᎠᏂᏯᏫᏍᎬᎢ; ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᏣᏲᏎᎭ ᏛᏓᏠᎵ ᎤᏩᏒ, ᎠᎴ ᏙᏓᎧᏁᏤᎵ ᎤᎾᏂᏢᏗᏱ [ ᎤᎾᎵᏍᏓᏴᏗᏱ, ] ᎠᎴ ᏓᎦᎷᏥ ᏙᏛᏍᏕᎸᎯ.
Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela! Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
38 ᎢᏳᏃ ᏔᎵᏁ ᎠᏯᏫᏍᏗᏱ ᎨᏒ ᏳᎷᏨ, ᎠᎴ ᏦᎢᏁ ᎠᏯᏫᏍᏗᏱ ᎨᏒ ᏳᎷᏨ, ᎠᎴ ᏱᏚᏩᏛᎲ ᎾᏍᎩ ᎾᎾᏛᏁᎲᎢ, ᎣᏏᏳ ᎢᏳᎾᎵᏍᏓᏁᏗ ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ.
Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.
39 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᎩ ᎢᏥᎦᏔᎮᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳ ᎦᏁᎳ ᏯᎦᏔᎮ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎠᎵᏰᎢᎵᏒ ᏗᎦᎷᏥᏒ ᎦᏃᏍᎩᏍᎩ, ᏳᏯᏫᏎᎢ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏩᎩᏴᏏ ᎠᏓᏁᎸ ᏱᎬᏪᎵᏎᎢ.
Kasi bososola malamu likambo oyo: soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
40 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᎢᏣᏛᏅᎢᏍᏕᏍᏗ; ᏴᏫᏰᏃ ᎤᏪᏥ ᏓᎦᎷᏥ ᎢᏳᏉ ᎠᎵᏰᎢᎵᏒ ᏂᏤᎵᏍᎬᎾ ᎨᏒᎢ.
Bino mpe bomilengela, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te kozela Ye.
41 ᏈᏓᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎠᏴᏍᎪ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏕᏍᎩᏯᏟᎶᏍᏓᏁᎭ, ᏂᎦᏛᏉᎨ?
Petelo atunaki Yesu: — Nkolo, ozali koloba lisese oyo mpo na biso to mpo na bato nyonso?
42 ᎤᎬᏫᏳᎯᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ, ᎦᎪᏃ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏍᏛ ᎠᎴ ᎠᎦᏔᎾᎢ ᎠᏓᏁᎸ ᎠᏥᎦᏘᏗᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᏅᏏᏙᎯ ᏄᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏅᏓᏳᏩᏁᎵ ᎦᏁᎸᎢ, ᎾᏍᎩ ᏧᏁᏗᏱ ᎤᎾᎵᏍᏓᏴᏗ ᏂᏓᏍᏆᎸᎯᏒᎢ?
Nkolo azongisaki: — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki?
43 ᎣᏏᏳ ᎢᏳᎵᏍᏓᏁᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᏅᏏᏙᎯ ᎦᎷᏨᎭ ᎤᏩᏛᎲ ᎾᏍᎩ ᎾᏛᏁᎲᎢ.
Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo!
44 ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏅᏓᏳᏩᏁᎵ ᏂᎦᎥ ᎤᎿᎭᎥᎢ.
Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
45 ᎢᏳᏍᎩᏂ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏒ ᎤᎾᏫᏱ, ᎠᎩᏅᏏᏙᎯ ᎪᎯᏗᎭ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ; ᎠᎴ ᎠᎴᏅᎲᎭ ᏙᎦᎵᎥᏂᎮᏍᏗ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎠᎴ ᎠᏂᎨᏴ ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᎠᏗᏔᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᎤᏴᏍᏕᏍᎨᏍᏗ;
Kasi soki mosali yango amilobeli: « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali; kolia, komela masanga mpe kolangwa,
46 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᎤᏅᏏᏙᎯ ᏓᎦᎷᏥ ᎢᏳᏉ ᎢᎦ ᎾᏓᎦᏖᏃᎲᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎢᏳᏉ ᎠᎵᏰᎢᎵᏒ ᏁᎵᏍᎬᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏙᏓᏳᎦᎵᏏ, ᎠᎴ ᏮᏓᏳᏎᎮᎵ ᏄᏃᎯᏳᏒᎾ ᏗᏁᎲᎢ.
nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.
47 ᎾᏍᎩᏃ Ꮎ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᎠᎦᏔᎯ ᏄᏍᏛ ᎤᏚᎵᏍᎬ ᎤᏅᏏᏙᎯ, ᎠᎴ ᏄᏛᏅᎢᏍᏔᏅᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏍᏛ ᎤᏚᎵᏍᎬ ᏄᏛᏁᎸᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎤᏣᏘ ᎢᏯᎬᏂᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.
48 ᎾᏍᎩᏂ ᎾᎦᏔᎲᎾ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏰᎵᏉ ᎦᏰᏥᎵᎥᏂᏍᏗ ᎢᏳᏛᏁᎸᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎦᏲᎵᏉ ᎢᏯᎬᏂᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ. ᏱᎶᏃ ᎤᏣᏘ ᎠᏥᏁᎸᎯ, ᎤᏣᏘ ᎠᏥᏔᏲᏎᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎠᎴ ᎩᎶ ᎤᏣᏘ ᏗᎬᏩᏲᎯᏎᎸᎯ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎬᏩᏔᏲᏎᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye: na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.
49 ᎠᎩᎷᏥᎸ ᎾᏍᎩ ᎢᏯᏋᏂᏐᏗᏱ ᎠᏥᎸ ᎦᏙᎯ ᎤᎷᎯᏍᏗᏱ; ᎠᎴ ᎦᏙ ᏯᏆᏚᎳ ᎢᏳᏃ ᎦᏳᎳ ᏳᏥᏍᏝ?
Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela.
50 ᎠᏎᏃ ᎠᎩᎭ ᎠᏓᏬᏍᏗ ᎨᏒ ᎥᏆᏬᏍᏙᏗ; ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᎤᏪᎵᎯᏍᏗ ᎠᏆᏓᏅᏔ ᎬᏂ ᎠᎵᏍᏆᏛᎭ!
Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango!
51 ᏥᏌ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᏚᏁᎵᎸ ᎡᎶᎯ ᏍᎩᏰᎵᏎᎭ? ᎥᏝ ᎢᏨᏲᏎᎭ; ᏔᎵᏉᏍᎩᏂ ᎢᏳᎾᏓᏗᏍᏗᏱ;
Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili? Kimia te, bokabwani nde.
52 ᎪᎯᏰᏃ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᏏᏓᏁᎸᎯ ᎨᏒ ᎯᏍᎩ ᎢᏯᏂᏛ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ, ᏦᎢ ᎢᏯᏂᏛ ᎤᎾᎵᎪᏎᏍᏗ ᎠᏂᏔᎵ ᏚᎾᏡᏕᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᏂᏔᎵ ᎤᎾᎵᎪᏎᏍᏗ ᏦᎢ ᏚᎾᏡᏕᏍᏗ.
Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana: misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato.
53 ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᏪᏥ, ᎠᎦᏅᎩᏃ ᎠᏍᎦᏯ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎤᏙᏓ; ᎠᎴ ᎠᎨᏴ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎠᎨᏴ ᎤᏪᏥ, ᎠᎴ ᎠᎦᏅᎩ ᎠᎨᏴ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎤᏥ; ᎤᏦᎯᏃ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎤᏓᏦᎯᏯ, ᎠᎴ ᎤᏓᏦᎯᏯ ᏔᎵ ᏄᎾᏓᎡᏍᏗ ᎤᏦᎯ.
Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
54 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᏴᏫ, ᎤᎶᎩᎸ ᎢᏥᎪᏩᏛ ᏅᏙ ᏭᏕᎵᎬ ᏓᎦᎶᎯ, ᎩᎳᏉ ᎢᏴᏛ ᎯᎠ ᏂᏥᏪᏍᎪᎢ, ᎠᎹ ᏛᏰᎢᎵ; ᎾᏍᎩᏃ ᏂᎦᎵᏍᏗᏍᎪᎢ.
Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato: — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko: « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo.
55 ᎠᎴ ᎢᏣᏙᎴᎰᎯ ᏧᎦᎾᏮ ᏗᎦᏃᎸᏗᏍᎬᎢ, ᎯᎠ ᏂᏥᏪᏍᎪᎢ, ᎤᏗᎴᎩᏳ ᎨᏎᏍᏗ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᎵᏍᏗᏍᎪᎢ.
Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka: « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.
56 ᎢᏣᏠᎾᏍᏗ! ᏰᎵᏉ ᎢᏣᏙᎴᎰᏍᎪ ᏄᏍᏛ ᎦᎸᎳᏗ, ᎠᎴ ᎡᎶᎯ; ᎦᏙᏃ ᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏂᏣᏙᎴᎰᏍᎬᎾ ᏥᎩ ᎪᎯ ᎨᏒᎢ?
Bato ya bilongi mibale! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo?
57 ᎠᎴ ᎦᏙᏃ ᎢᏨᏒ ᎨᏒ ᏗᎨᏧᎪᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᎩ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒᎢ?
Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo?
58 ᎢᏳᏃ ᏣᏱᎵᏙᎯ ᏗᎫᎪᏗᏍᎩᏱ ᏍᏓᎢᏎᏍᏗ, ᎠᏏᏉ ᏫᏍᏓᎢᏒᎢ, ᎭᏟᏂᎬᏁᎸᎭ ᎯᏯᏚᎵᎳᎡᏗᏱ; ᏗᎫᎪᏗᏍᎩᏱ ᎾᏏ ᏫᏱᏣᏘᏃᎦ, ᏗᎫᎪᏗᏍᎩᏃ ᏗᏓᏂᏱᏍᎩᏱ ᏫᏱᏕᏣᏲᎯ, ᏗᏓᏂᏱᏍᎩᏃ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᏫᏱᏣᏴᏓ.
Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.
59 ᎬᏲᏎᎭ, ᎥᏝ ᎾᎿᎭᏴᏛᎦᎯᏄᎪᎢ, ᎬᏂ ᏣᎫᏴᎮᏍᏗ ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎠᎩᏄᏛᏗ ᎢᏯᏓᏅᏖᏗ.
Nazali koloba na yo: okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 12 >