< ᏉᎳ ᎡᏈᏌ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >

1 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏴ ᏉᎳ ᏥᏴᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎩᏍᏛᏗᏍᎬ ᎥᎩᏴᎩᏅᎯ ᏂᎯ ᎨᏒ ᏗᏣᏓᎴᏅᏛ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬᎢ —
Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—
2 ᎢᏳᏃ ᎰᏩ ᎢᏣᏛᎦᏅᎯ ᏱᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎬᏩᎦᏗᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᏴ ᎥᎩᏁᎸᎢ ᎾᎿᎭᏗᎩᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ ᏂᎯ ᎣᏍᏛ ᎢᏨᏯᏛᏁᏗᏱ;
Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino
3 ᎾᏍᎩ ᎬᏂᎨᏒ ᏄᏩᏁᎸ ᎠᎩᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎩ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒᎢ, ᎦᏳᎳ ᎢᎸᏍᎩ ᎢᎧᏁᏨᎯ ᎬᏗ ᏥᏨᏲᏪᎳᏁᎸ,
mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.
4 ᎾᏍᎩ ᎢᏥᎪᎵᏰᎥᎭ ᏓᏦᎵᏍᏙᏔᏂ ᎪᎵᎬ ᎤᏕᎵᏛ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵᎦ;
Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.
5 ᎾᏍᎩ ᏧᏪᎫᏔᏅᏒ ᎥᏝ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎨᎬᏁᎸᎯ ᏱᎨᏎ ᏴᏫ ᏧᏁᏥ, ᎾᏍᎩᏯ ᎪᎯ ᎬᏂᎨᏒ ᏥᏂᎨᎬᏁᎭ ᏧᏤᎵ ᎨᏥᎸᏉᏗ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏗ;
Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.
6 ᎾᏍᎩ ( ᎧᏃᎮᏍᎩ ) ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎤᏠᏱᏉ ᎤᎾᏤᎵ ᏂᎨᎬᏁᎲᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩᏉ ᎠᏰᎵ ᎠᏁᎯ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎬᏗᏍᎬ ᎤᏚᎢᏍᏔᏅ ᎤᏁᎳᏗᏍᏗᏍᎬᎢ, ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎬᏔᏅᎯ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᎸᎯ;
Mabombami yango ezali boye: Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.
7 ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᎠᏴ ᏗᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎠᏴᏋᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎴᏍᏗ ᎨᏒ ᎥᏆᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎬᏩᏄᎸᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏒ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ.
Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.
8 ᎠᏴ ᏭᏓᎪᎾᏛᏛ ᎠᏆᏍᏗᎧᏂ ᏥᎩ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎨᏒ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎥᎩᏁᎸ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏩᎸᎩ ᎠᏆᎵᏥᏙᏗᏱ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎠᏁᎲ ᎬᎪᎵᏰᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎤᏪᎿᎭᎢᏳ ᎨᏒ ᎦᎶᏁᏛ;
Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto;
9 ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎦᏥᏴᏁᏗᏱ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩ ᎤᏕᎵᏛ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏗᏓᎴᏂᏍᎬ ᎡᎶᎯ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᎬᏍᎦᎳᏅᎯ ᏥᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎡᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎤᏬᏢᏅᏅᎯ ᏥᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎬᏗᏍᎬᎢ; (aiōn g165)
apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso, (aiōn g165)
10 ᎤᎬᏩᎸᎩ ᎾᏍᎩ ᎪᎯ ᎨᏥᎸᏉᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏧᎾᎵᏂᎩᏛ ᎨᏒ ᎦᎸᎳᏗᏳ ᏕᎨᏌᏗᏒᎢ, ᎤᏂᎦᏙᎥᎯᏍᏗᏱ ᎤᏣᏘ ᎢᏳᏓᎴᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎨᎬᏗᏍᎬ ᏧᎾᏁᏟᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬᎢ;
na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
11 ᎾᏍᎩᏯ ᏅᏧᏓᎴᏅᎲᎾ ᎤᏓᏅᏖᎸᎢ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏣᎬᏗᏍᎨ ᏧᏓᏅᏖᎴᎢ; (aiōn g165)
kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōn g165)
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏂᏗᎾᏰᏍᎬᎾ ᎠᎴ ᎦᏰᏗᎷᏤᏗ ᏄᎵᏍᏔᏅ ᏔᎵ ᎤᏛᏗ ᎡᏓᎵᏍᎦᏍᏙᏛ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎾᏍᎩ ᎡᏙᎢᏳᏒᎢ.
Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe.
13 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏨᏔᏲᏎᎭ ᏗᏥᏩᎾᎦᎶᎢᏍᏗᏱᏉ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏴ ᎢᏨᎩᎵᏲᏤᎲ ᎢᏳᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᏨᏁᎯ ᏥᎩ.
Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.
14 ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏕᏥᏯᎵᏂᏆᏅᏁᎭ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵᎦ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏙᏓ,
Yango wana nafukamaka liboso ya Tata
15 ᎾᏍᎩ ᏗᎨᎪᏍᏔᏅᎯ ᏥᎩ ᎾᏂᎥ ᏏᏓᏁᎸᎯ ᎨᏒᎢ, ᎦᎸᎶ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ,
oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele,
16 ᎾᏍᎩ ᎢᏣᎵᏍᎪᎸᏓᏁᏗᏱ, ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏪᎿᎭᎢᏳ ᎨᏒ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎤᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᏗᏣᎵᏂᎪᎯᏍᏙᏗᏱ ᏕᏣᏓᏅᏛᎢ ᎤᏓᏅᏙ ᎤᏮᏙᏗᏱ;
mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
17 ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏁᎳᏗᏍᏗᏱ ᏗᏥᎾᏫᏱ ᎪᎯᏳᏗ ᎬᏙᏗ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᏂᎯ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏗᏣᎵᎾᏍᏕᏝᏗᏍᏔᏅᎯ ᎠᎴ ᏗᏣᎵᏍᏓᏱᏗᏍᏔᏅᎯ ᎨᏒᎢ,
mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
18 ᎾᏍᎩ ᏂᎯ ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᏰᎵᏉ ᎨᏦᎵᏍᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎾᏯᏛᎥᎢ ᎠᎴ ᏂᎦᏅᎯᏒᎢ, ᎠᎴ ᎾᎭᏫᏂᏴᎢ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛᎢ;
mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto,
19 ᎠᎴ ᎢᏥᎦᏙᎥᎯᏍᏗᏱ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏥᎦᎶᏒᏍᏗᎭ, ᎾᏍᎩ ᎡᏥᎧᎵᎢᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏛ ᎠᎧᎵᎢ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.
20 ᎾᏍᎩᏃ Ꮎ ᏰᎵᏉ ᎢᎬᏩᏛᏁᏗ ᏥᎩ, ᎤᏣᏘ ᎤᎶᏒᏍᏗ ᎢᎦᎢ ᎢᏗᏔᏲᎯᎲᎢ, ᎠᎴ ᎢᏓᏓᏅᏖᏍᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏠᏱ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎨᏒ ᏥᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎭ ᎠᏴ ᏕᎦᏓᏅᏛᎢ,
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
21 ᎾᏍᎩ ᎬᏩᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬᎢ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᏂᎪᎯᎸ ᏕᎨᏌᏗᏒᎢ, ᎠᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ. ᎡᎺᏅ. (aiōn g165)
tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela! Amen. (aiōn g165)

< ᏉᎳ ᎡᏈᏌ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >