< ᏉᎳ ᎡᏈᏌ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >

1 ᏂᎯᏃ ᏗᏥᏲᎱᏒᎯ ᏥᎨᏒ ᎤᏣᏘᏂ ᏂᏣᏛᏁᎸ ᎠᎴ ᎢᏥᏍᎦᏅᏨᎢ; —
Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,
2 ᎾᎿᎭᏂ ᏧᏩᎫᏔᏅᏒ ᎢᏤᏙᎸᎢ ᎾᏍᎩᏯ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗ ᎨᏒ ᎡᎶᎲ ᎠᏁᎯ, ᎾᏍᎩᏯ [ ᎤᏚᎵᏍᎬ ] ᎦᏃᎴᏍᎬ ᎡᎯ ᎡᎬᏫᏳᏌᏕᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᏓᏅᏙ ᎪᎯ ᎨᏒ ᏥᏚᎸᏫᏍᏓᏁ ᏚᎾᏓᏅᏛ ᎪᎯᏳᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᏧᏪᏥ; (aiōn g165)
oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe. (aiōn g165)
3 ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏧᏩᎫᏔᏅᏒ ᏂᏗᎥ ᎨᏓᎵᎪᏁᎲᎩ ᎾᎿᎭᎢᎩᏇᏓᎸ ᎤᎬᎥᏍᎬᎢ, ᎠᎴ ᎤᏇᏓᎸ ᎠᎴ ᎠᏓᏅᏖᏗ ᎨᏒ ᎤᎾᏚᎵᏍᎬ ᏂᏓᏛᏁᎲᎩ; ᎠᎴ ᏗᎦᏕᏅ ᏂᎦᏍᏛ ᎤᏔᎳᏬᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏧᏪᏥ ᎨᏒᎩ, ᎾᏍᎩᏯᏉ ᎠᏂᏐᎢ ᏄᎾᏍᏛᎢ.
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.
4 ᎠᏎᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏪᎿᎭᎢᏳ ᏥᎩ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᏥᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᎤᏣᏘ ᎤᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏧᏩᏔᏁ ᎠᏴ ᎢᎩᎨᏳᎯᏳ ᏥᏄᎵᏍᏔᏁᎢ,
Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene,
5 ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᏗᎩᏲᎱᏒᎯ ᏥᎨᏒᎩ, ᎢᎬᏂᏛ ᎢᎦᏠᏯᏍᏔᏅ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎬᏂᏛᎢ, ( ᎬᏩᎦᏘᏯ ᏅᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎡᏥᏍᏕᎸᏔᏅ; )
atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
6 ᎠᎴ ᎢᏧᎳᎭ ᏕᎦᎴᎯᏐᏔᏅ, ᎠᎴ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᎦᏅᏗᏱ ᏂᎬᏁᎸ ᎦᎸᎳᏗ ᏗᎨᏒ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ;
Kati na Yesu-Klisto, Nzambe asekwisaki biso elongo na Klisto mpe avandisaki biso elongo na Ye na bisika ya Likolo
7 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏭᏩᎫᏗᏗᏒ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏳᏩᏁᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᎤᏪᎿᎭᎢᏳ ᎨᏒ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᏂᎦᎥ ᎣᏍᏛ ᏂᎦᏛᏁᎲ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ. (aiōn g165)
mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso. (aiōn g165)
8 ᎬᏩᎦᏘᏯᏰᏃ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎡᏥᏍᏕᎸᏙᏔᏅᎯ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎬᏔᏅᎯ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎥᏝ ᎢᏨᏒ ᎨᏒ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ;
Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—
9 ᎥᏝ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᏱᎩ, ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎤᏢᏈᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.
10 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎠᏴ ᎢᎪᏢᏅᎯ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎡᎪᏢᏅᎯ ᎣᏍᏛ ᏗᎩᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᏥᏂᎦᏛᏅᎢᏍᏓᏁᏟ ᎾᎿᎭᎢᎨᏓᏍᏗᏱ.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᏅᏖᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏂᎯ ᏧᏩᎫᏔᏅᏒ ᏗᏣᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎤᏇᏓᎵ ᎨᏒᎢ, ᏂᏗᎨᏥᎤᏍᏕᏎᎸᎾ ᎨᏦᏎᎸᎯ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏗᎨᏥᎤᏍᏕᏎᎸᎯ ᎨᎪᏎᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᎤᏇᏓᎸ ᏗᎨᏥᎤᏍᏕᏎᎸᎯ ᏗᎪᏱ ᏗᎬᏔᏅᎯ;
Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.
12 ᎾᏍᎩ ᎾᎯᏳ ᏥᎨᏎ ᎦᎶᏁᏛ ᏂᏤᎲᎾ ᎨᏎᎢ, ᏂᏤᎸᎾᏉ ᎨᏎ ᎢᏏᎵ ᎠᏰᎵ ᎤᏃᏢᏒᎢ, ᎠᎴ ᎢᏥᎪᏁᎳ ᎨᏎ ᎧᏃᎮᏛ ᏓᏠᎯᏍᏛ ᎠᏚᎢᏍᏛᎢ, ᎤᏚᎩ ᏂᏨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᏤᎲᎾ ᎨᏎ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ.
Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.
13 ᎪᎯᏍᎩᏂ ᏥᎩ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᏂᎯ, ᎢᏅᎯᏳ ᏥᏂᏣᏛᎿᎭᏕᎬᎩ, ᎾᎥ ᏕᏣᏘᏃᎸ ᎬᏔᏅᎯ ᎤᎩᎬ ᎦᎶᏁᏛ.
Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.
14 ᎢᎪᎯᏍᏓᏁᎯᏰᏃ ᎾᏍᎩ, ᎢᏧᎳ ᏌᏉᏉ ᎢᎬᏁᎸᎯ, ᎠᎴ ᎤᏲᏍᏔᏅᎯ ᎢᎦᏓᏓᎴᏗᏍᎩ ᎠᏐᏴᎢ;
Solo, azali Ye moko kimia na biso: atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango,
15 ᎤᏇᏓᎸ ᎬᏗᏍᎬ ᎤᏛᏔᏅ ᏗᏓᏓᏍᎦᎩ ᎢᎬᏁᎯ, ᎾᏍᎩ ᏯᏛᏅ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎤᎵᏁᏨᎢ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎢᏯᏛᏁᎵᏓᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᎠᏂᏔᎵ ᎨᏒ ᏌᏉ ᎢᏤ ᏴᏫ ᎤᏬᏢᏗᏱ ᎤᏩᏒ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ, ᎾᏍᎩᏃ ᏙᎯ ᎢᏳᏩᏁᏗᏱ;
alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,
16 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᎢᏧᎳ ᏌᏉ ᎠᏰᎸ ᏄᎾᏛᏅ ᏙᎯᏱ ᎢᏳᏅᏁᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᏓᏓᎿᎭᏩᏍᏛ ᎤᏮᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎤᏮᏔᏅ ᎤᎸ ᏓᎾᏓᏍᎦᎬᎢ.
mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango.
17 ᎠᎴ ᎤᎷᏤᎢ ᎠᎴ ᎤᎵᏥᏙᏁ ᎢᏥᏃᎯᎮᎴ ᎾᏍᎩ ᏙᎯ ᎢᏥᏩᏛᎡᎯ ᎨᏒᎢ, ᏂᎯ ᎢᏅ ᎢᏣᏛᎿᎭᏕᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᎥ ᎢᏳᎾᏛᎿᎭᏕᎩ.
Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.
18 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎠᏴ ᎢᏧᎳ, ᏌᏉ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏗ, ᎠᎦᏴᎵᎨ ᏫᎦᏰᏗᎷᏤᏗ ᏄᎵᏍᏔᏅ.
Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.
19 ᎾᏍᎩᏃ ᏥᏄᏍᏗ ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᏁᏣᏓᎴ, ᎠᎴ ᎢᏤᏙᎯᏉ ᏱᎩ, ᎤᎾᏓᏅᏘᏍᎩᏂ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᏤᎯ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᏓᏘᎾᎥ ᎢᏖᎳ;
Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe.
20 ᎡᏣᏁᏍᎨᎲᎯ ᎨᏒ ᎡᏥᏝᏅᎯ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎡᏥᎫᏍᏛᏔᏅᎯ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏩᏒ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎤᏅᏏᏴ Ꭰ’ᏅᎯ ᏅᏯ ᎢᏳᎵᏍᏔᏅᎯ;
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.
21 ᎾᎿᎭᏂ ᏂᎬ ᎠᏓᏁᎸ ᎣᏍᏛ ᏗᏓᏙᎵᎩ ᎢᎬᏁᎸᎯ, ᎠᏛᏍᎪᎢ ᎦᎸᏉᏗ ᎠᏓᏁᎸ ᏂᎦᎵᏍᏗᏍᎪ ᎤᎬᏫᏳᎯᏱ ᎠᏝᏅᎯ;
Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo.
22 ᎾᎿᎭᏂ ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᏤᏣᏜᏓᏍᏔᏅᎯ ᎡᏣᏁᏍᎨᎲᎯ ᎡᏥᏝᏅᎯ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏁᎳᏗᏍᏗᏱ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏗᏍᎬᎢ.
Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.

< ᏉᎳ ᎡᏈᏌ ᎠᏁᎯ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >