< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 26 >

1 ᎿᎭᏉᏃ ᎡᎩᎵᏈ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ ᏉᎳ; ᏨᏒ ᎭᎵᏍᏕᎵᏍᎬ ᎨᏣᏁᎢᏍᏗ ᏂᎦᎵᏍᏓ. ᎿᎭᏉᏃ ᏉᎳ ᎤᏙᏯᏅᎯᏛ ᎤᏩᏒ ᎠᎵᏍᏕᎵᏍᎬ ᎤᏬᏂᏒᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ;
Agripa alobaki na Polo: — Napesi yo nzela ya koloba. Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba:
2 ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎡᎩᎵᏉ, ᎦᎵᎡᎵᎦ ᎪᎯ ᎢᎦ ᏥᎩ ᎯᎦᏔᎲ ᎦᎵᏍᏕᎵᏍᎬ ᏨᏓᏥᏁᎢᏍᏔᏂ ᏂᎦᎥ ᎬᏇᎯᏍᏗᏍᎬᎢ ᎠᏂᏧᏏ.
— Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi ya kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai,
3 Ꮀ ᎤᎬᏫᏳᎭ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎯᎦᏔᎯᏳ ᏥᎩ ᏂᎦᏛ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᎴ ᎧᏃᎮᏗ ᎨᏒ ᎠᏂᏧᏏ ᏥᏚᏁᎭ. ᎾᏍᎩᏃ ᎢᏳᏍᏗ ᎬᏔᏲᏎᎭ ᏂᏗᏣᏯᏪᎬᎾ ᏍᏆᏛᎦᏁᏗᏱ.
pamba te oyebi malamu bizaleli mpe tembe ya Bayuda. Boye nasengi na yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai.
4 ᏄᏍᏛ ᎠᏆᎴᏂᏙᎸ ᏥᏫᏄᏣ ᏅᏧᎵᏍᏔᏅ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ, ᎾᏍᎩ ᎢᎬᏱᏱ ᎦᏥᏰᎳᏗᏙᎸᎩ ᏗᏆᏤᎵ ᏴᏫ ᏥᎷᏏᎵᎻ, ᏂᎦᏛ ᎠᏂᏧᏏ ᎠᏂᎦᏔᎭ,
Bayuda nyonso bayebi evandeli na ngai, wuta na bomwana na ngai, kobanda na ebandeli ya bomoi na ngai, kati na ekolo na ngai, mpe ezala kati na Yelusalemi.
5 ᎾᏍᎩ ᎬᎩᎦᏔᎲᎩ ᏗᏓᎴᏂᏍᎬ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ, ᎢᏳᏃ ᏳᏂᏃᎮᎸ, ᎠᏂᎦᏔᎯᏳᏰᏃ ᎠᏆᎵᏏ ᎤᎴᏂᏓᏍᏗ ᎠᏆᎴᏂᏙᎸᎢ, ᏕᏥᏍᏓᏩᏗᏒ ᎤᎾᏓᏤᎵᏛ ᎤᎾᎵᎪᎯ ᏭᏂᎫᏛ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏕᎩ ᎣᎦᏤᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏦᏥᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Bayebi ngai wuta kala mpe bakoki kotatola, soki balingi, ete natambolisaki bomoi na ngai lokola Mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko, ndenge lingomba na biso esengaka.
6 ᎪᎯᏃ ᎢᏥᏙᎦ ᎢᎬᎩᏱᎵᏙᎭ, ᎠᎩᏍᏛᏗᎭ ᎤᏚᎩ ᎬᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏥᏚᏚᎢᏍᏓᏁᎴ ᏦᎩᎦᏴᎵᎨᎢ;
Mpe nazali kosamba lelo mpo na elikya na ngai kati na elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso.
7 ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏚᎢᏍᏓᏁᎸ ᎤᎾᎵᏱᎶᎯᏍᏗᏱ ᎤᏚᎩ ᎤᏅᎭ ᏔᎳᏚ ᏃᏥᎳᏍᏓᎸᎢ, ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᏥᏓᏂᎧᎿᎭᏩᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᎬᏩᎩᏨᏗ. ᎾᏍᎩ ᎤᏚᎩ ᎬᏗ ᎨᏒ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎡᎩᎵᏈ, ᎠᏂᏧᏏ ᎬᏇᎯᏍᏗᎭ.
Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai.
8 ᎦᏙᏃ ᎦᎪᎯᏳᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏥᏰᎸᏐ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᎴᏙᏗ ᎨᏒ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ?
Mpo na nini, kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi?
9 ᎠᏴ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎯᎠ ᏂᎨᎵᏍᎬᎩ; ᏚᏳᎪᏛ ᏱᏂᎦᏛᏁᎭ ᎤᏣᏘ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁ ᎦᏡᏗᏍᎬ ᏕᎤᏙᎥ ᏥᏌ ᎾᏎᎵᏘ ᏤᎲᎩ.
Ngai moko mpe nazalaki liboso kokanisa ete esengeli na ngai kosala nyonso oyo ekoki kosalema, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti.
10 ᎰᏩᏃ ᎾᏍᎩ ᎾᏆᏛᏁᎸᎩ ᏥᎷᏏᎵᎻ; ᎠᎴ ᎤᏂᏣᏛᎩ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᏕᏥᏍᏚᏅᎩ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ, ᎬᎩᏁᏤᎸᎯ ᎨᏒᎩ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ; ᏕᎨᏥᎷᎦᏃ ᏥᏁᎬᎩ ᎦᏥᏯᏡᏗᏍᎬᎢ.
Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi: natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima.
11 ᎠᎴ ᏯᏃᎩᏳ ᎤᏲ ᏂᎦᏥᏴᏁᎲ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᏕᎨᏌᏗᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᏐᏢᎢᏍᏙᏗᏱ ᏂᎦᏥᏴᏁᎲᎩ; ᎤᏣᏔᏅᎯᏃ ᎦᏥᏂᏆᏘᎲ ᎾᏓᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬᎩ ᎤᏲ ᏂᎦᏥᏴᏁᎲ ᏅᏩᏓᎴ ᏙᏗᎦᏚᎲ ᏫᎦᏥᎨᎰᎢᎲᎩ.
Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.
12 ᏕᎹᏍᎦᏃ ᏫᏥᎦᏛᎢ, ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎬᎩᏁᏤᎸᎢ,
Ezali mpo na yango nde nakendeki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya Banganga-Nzambe.
13 ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎦᎢᏒ ᎢᎦ ᎠᏰᎵ ᎠᎩᎪᎲᎩ ᎢᎦᎦᏛᎢ, ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᎶᏒᎯ, ᎾᏍᎩ ᎤᏍᎪᏒᎢ ᎤᏟ ᎨᏒᎩ ᎡᏍᎦᏉ ᏅᏙ, ᏓᏆᏚᏫᏍᏔᏅᎩ ᎠᏴ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎣᏤᎯ.
Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.
14 ᏂᎦᏛᏃ ᎡᎳᏗ ᏙᎩᏅᏨ, ᎧᏁᎬ ᎠᏆᏛᎦᏅᎩ ᎠᎩᏁᏤᎲᎩ, ᎠᏂᏧᏏ ᎤᏂᏬᏂᎯᏍᏗ ᎬᏗᏍᎬᎩ; ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏍᎬᎩ ᏐᎳ, ᏐᎳ, ᎦᏙᏃ ᎤᏲ ᏂᏍᏋᏁᎭ? ᎤᏕᏯᏙᏗᏳ ᏗᏣᎲᏖᏍᏗᏱ ᏗᎪᏍᏓᏯ.
Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami: « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »
15 ᎯᎠᏃ ᎾᎩᏪᏒᎩ; ᎦᎪ ᏂᎯ, ᏣᎬᏫᏳᎯ? ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏒᎩ; ᎠᏏ ᏥᏌ ᎾᏍᎩ ᎤᏲ ᏥᏂᏴᏁᎭ.
Bongo natunaki: « Nkolo, yo nani? » Nkolo azongisaki: « Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.
16 ᎠᏎᏃ ᏔᎴᎲᎦ, ᎠᎴ ᎭᎴᎲᎦ, ᎯᎠᏰᏃ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏖᎭ ᎬᏂᎨᏒ ᏥᏂᎬᏯᏛᏂᏏ, ᎭᎵᏥᏙᎲᏍᎩ ᎢᎬᏴᏁᏗᏱ ᎠᎴ ᎯᏃᎮᏍᎩ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏥᎪᏩᏛ, ᎠᎴ ᎠᏏ ᎬᎾᏄᎪᏫᏎᏗ ᏥᎩ.
Kasi lamuka mpe telema! Pamba te namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na Ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima.
17 ᎬᏩᏓᎴᏍᎨᏍᏗ ᎨᏣᏡᏗᏍᎬ ᎯᎠ ᏴᏫ ᎠᎴ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᏗᏁᎲ ᎿᎭᏉ ᎬᏅᎵ,
Nakokangola yo wuta na maboko ya bato ya ekolo na yo mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango
18 ᏘᏍᏚᎢᎡᏗᏱ ᏗᏂᎦᏙᎵ, ᎠᎴ ᎤᎵᏏᎬ ᏄᎾᏛᏅ ᏘᎪᎸᏍᏗᏱ ᎢᎦᎦᏛ ᎢᏗᏢ ᏫᏘᎦᏔᎲᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏎᏓᏂ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᏄᎾᏛᏅ ᏘᎪᎸᏍᏗᏱ ᏙᏘᎦᏔᎲᏍᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᏗᏢ ᏫᏘᎦᏔᎲᏍᏙᏗᏱ; ᎾᏍᎩ ᏗᎦᎨᏥᏁᏗᏱ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨᎢ, ᎠᎴ ᎬᏩᏂᏩᏛᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎤᎾᏤᎵᎦ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᎨᏥᏅᎦᎸᏛ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᎥᏉᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ.
mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »
19 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏏᏗ, ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎡᎩᎵᏈ, ᎥᏝ ᎾᏉᎯᏳᏅᎾ ᏱᎨᏎ ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᎶᏒᎯ ᎠᎩᎪᎲᎢ.
Boye, mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na Likolo.
20 ᎦᏥᏃᏁᎸᎩᏰᏃ ᎢᎬᏱ ᏕᎹᏍᎦ ᎠᏁᎯ, ᎠᎴ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎠᏁᎯ, ᎠᎴ ᏂᎬᎾᏛ ᏧᏗᏱ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᏧᏂᏁᏟᏴᏍᏗᏱ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᏗᏢ ᏭᎾᎦᏔᎲᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ ᎠᏙᎴᎰᎯᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᏚᏂᏁᏟᏴᏒ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ.
Nateyaki liboso bavandi ya Damasi; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya: nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.
21 ᎾᏍᎩ ᏅᏓᏳᎵᏍᏙᏔᏅᎩ ᎠᏂᏧᏏ ᎬᎩᏂᏴᎲᎩ ᎤᏛᏅ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎬᎩᎯᏍᏗᏱ ᎤᏂᏰᎸᏒᎩ.
Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai kati na Tempelo mpe balukaki koboma ngai.
22 ᎤᏁᎳᏅᎯᏃ ᎠᎩᏍᏕᎸᎲᎢ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎠᏏ ᎦᎴᏂᏙᎭ ᎪᎯ ᎢᎦ ᏥᎩ, ᎬᏂᎨᏒ ᏂᎦᏥᏴᏁᎭ ᏂᎨᏥᎸᏉᏛᎾ ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎨᏥᎸᏉᏗ, ᎪᎱᏍᏗ ᏂᏥᏃᎮᏍᎬᎾ Ꮎ ᎤᏩᏒ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎠᎴ ᎼᏏ ᎤᎾᏄᎪᎢᏍᏗ ᎤᎾᏛᏅᎯ ᏥᎩ;
Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai; yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nazali koteya makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekokokisama solo:
23 ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎢᎬᏱ ᎤᏲᎱᏒ ᏧᎴᎯᏐᏗᏱ, ᎠᎴ ᎢᎦᎦᏘ ᏧᎾᏄᎪᏫᏎᏗᏱ ᎯᎠ ᏴᏫ ᎠᎴ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ.
Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
24 ᎠᏏᏉᏃ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏪᏍᎬᎩ, ᎤᏩᏒ ᎠᎵᏍᏕᎵᏍᎬᎢ, ᏇᏍᏓ ᎯᎠ ᎠᏍᏓᏯ ᏄᏪᏒᎩ; ᏣᎸᏃᏘᎭ ᏉᎳ, ᎤᏣᏘ ᎪᏪᎵ ᏘᏏᎾᏏᏳ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏣᎸᏃᏙᏗᎭ.
Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye: — Ozali na liboma, Polo! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma!
25 ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎥᏝ ᏯᎩᎸᏃᏘᎭ, ᎰᏍᏛ ᏇᏍᏓ, ᏥᏁᎦᏉᏍᎩᏂ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒᎢ ᎠᎴ ᏃᎸᏃᏘᏍᎬᎾ ᎧᏁᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Polo azongisaki: — Tata mokonzi Festisi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo mpe ezali penza na nzela.
26 ᎤᎬᏫᏳᎯᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎠᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎤᏛᏓᏍᏛ ᏂᏥᏍᎦᎢᎲᎾ ᏥᏥᏁᎦ; ᏥᎦᏔᎭᏰᏃ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎪᎱᏍᏗ ᎠᎬᏍᎦᎳᏁᎸᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᏞᏰᏃ ᎤᏅᏏᏴ ᎯᎠ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎯ ᏱᎩ.
Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nandimisami ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalemaki na nkuku te.
27 ᏣᎬᏫᏳᎯ ᎡᎩᎵᏈ, ᏕᎰᎯᏳᎲᏍᎦᏍᎪ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ? ᏥᎦᏔᎭ ᏕᎰᎯᏳᎲᏍᎬᎢ.
Mokonzi Agripa, boni, ondimaka basakoli? Nayebi malamu ete ondimaka bango.
28 ᎿᎭᏉᏃ ᎡᎩᎵᏈ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ ᏉᎳ; ᎠᎴᏉ ᏂᏍᎩᏎᎪᎩᎠ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏲᎢᏳᎲᏍᎩ ᎢᏯᏆᎵᏍᏙᏗᏱ.
Agripa alobaki na Polo: — Okanisi ete okoki kondimisa ngai kokoma Moklisto kaka na mwa tango moke?
29 ᏉᎳᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏥᏯᏚᎸᎡᎭ, ᎥᏝ ᏂᎯᏉ ᏨᏒ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᏂᎦᏛ ᏥᎬᏆᏛᎦᏁᎭ ᎪᎯ ᎢᎦ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ, ᎥᏝ ᎠᎴᏉ ᎾᏆᏍᏛᎢ, ᎾᏍᎩᏯᏍᎩᏂ ᎾᏆᏍᏛ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏨᏆᎸᎥ ᎤᏩᏒ.
Polo azongisaki: — Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo!
30 ᎾᏍᎩᏃ ᏄᏪᏒ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏚᎴᏅᎩ, ᎠᎴ ᎠᏥᎦᏘᏗᏍᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ, ᎠᎴ ᏆᏂᏏ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏅᏅᎯ,
Wana azalaki koloba bongo, mokonzi, moyangeli, Berenise mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na bango batelemaki.
31 ᎢᏴᏛᏃ ᏭᏂᎶᏒ, ᎤᏅᏒ ᎨᏒ ᎤᎾᎵᏃᎮᎸᎩ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒᎩ; ᎯᎠ ᎠᏍᎦᏯ ᎥᏝ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎭ ᎬᏩᏲᎱᎯᏍᏗ ᎠᎴ ᎦᏰᎦᎸᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Wana bazalaki kobima, balobanaki bango na bango: — Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya kufa to ya boloko.
32 ᎡᎩᎵᏈᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ ᏇᏍᏓ; ᎯᎠ ᎠᏍᎦᏯ ᏗᎦᏰᏥᏲᎯᏍᏗᏉ ᏱᎨᏎᎢ, ᎢᏳᏃ ᏏᏐᎢ ᏫᏄᎲᏍᏔᏅᎾ ᏱᎨᏎᎢ.
Agripa alobaki na Festisi: — Soki moto oyo asengaki te kosamba liboso ya Sezare, esengelaki kotika ye.

< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 26 >