< ᏈᏓ ᏔᎵᏁ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >

1 ᎠᏴ ᏌᏩᏂ ᏈᏓ, ᎠᎸᎾᏝᎢ ᎠᎴ ᎠᎩᏅᏏᏛ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎦᏥᏲᏪᎳᏏ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎨᏥᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎣᎩᏁᎸ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᏁ ᎤᏓᏅᏘᏳ ᎨᏒ ᎢᎦᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso:
2 ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎡᏥᏁᏉᎡᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᏥᏌ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso!
3 ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏤᎵ ᎤᎵᏂᎩᏗ ᎨᏒ ᎤᏩᏔᏅᎢ ᎢᎩᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᏄᏓᎴᏒ ᎪᎱᏍᏗ ᏕᏛᏅ ᎤᎬᏩᎵ ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ, ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎢᎩᏯᏅᏛ ᏥᎩ ᎬᏔᏅᎯ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏍᏛᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.
4 ᎤᏍᎩ ᎾᎿᎭᏭᏓᎪᎾᏛᏔᏅᎯ ᎡᏉᎯᏳ ᎠᎴ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎡᎩᏚᎢᏍᏓᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏕᏨᏗᏍᎬ ᎨᏣᏠᏯ ᏍᏙᏗ ᏱᏂᎦᎵᏍᏓ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏄᏍᏛᎢ, ᎡᏣᏗᏫᏎᎸᎯ ᎨᏒ ᎤᏲᎢ ᎡᎶᎯ ᏤᎭ ᎠᏚᎸᏗ ᎨᏒ ᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ.
Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.
5 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏣᏘ ᎢᎶᏟᏂᎬᏁᎲ ᎢᏦᎯᏳᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏛᏁᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏛᏁᏗ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ;
Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu; na likolo ya bolamu, boyebi;
6 ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗᏃ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎵᏏᎾᎯᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎵᏏᎾᎯᏍᏙᏗᏃ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᏗᏨᏂᏗᏳ ᎨᏒᎢ; ᏗᏨᏂᏗᏳᏃ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ;
na likolo ya boyebi, komikanga; na likolo ya komikanga, mpiko; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe;
7 ᎤᏁᎳᏅᎯᏃ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎾᎵᏅᏢ ᏗᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎾᎵᏅᏢᏃ ᏗᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᏔᎵ ᎢᏨᏗᏍᎨᏍᏗ ᎢᎬᏂᎢᏛᏉ ᏗᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ.
na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.
8 ᎢᏳᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎣᏤᎭ ᎠᎴ ᏱᎧᏁᏉᎦ, ᎾᏍᎩ ᏱᏂᎬᏂᏌ ᎥᏝ ᎢᏥᏍᎦᏃᎸ ᎠᎴ ᏂᏥᏁᏉᏣᏛᎾ ᏱᎦᎩ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵᎦ.
Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
9 ᏄᏪᎲᎾᏍᎩᏂ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎾᏍᎩ ᏗᎨᏫᏉ ᎠᎴ ᎢᏴᏛ ᎬᏩᎪᏩᏛᏗ ᏂᎨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎤᏩᎨᏫᏒᎯ ᎠᏥᏅᎦᎸᏛ ᎨᏒ ᎢᎸᎯᏳ ᎤᏍᎦᏅᏥᏙᎸᎢ.
Kasi moto nyonso oyo azangi yango amonaka mosika te, azali lokola mokufi miso; abosani ete basila kopetola ye, wuta kala, na masumu na ye.
10 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏓᎵᏅᏟ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎢᏣᏟᏂᎬᏁᎮᏍᏗ ᏄᏜᏓᏏᏛᏒᎾ ᎢᏨᏁᏗᏱ ᎡᏥᏯᏅᎲ ᎠᎴ ᎡᏣᏑᏰᏒᎢ; ᎢᏳᏰᏃ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏱᏂᏣᏛᏁᎭ, ᎥᏝ ᎢᎸᎯᏳ ᏱᏙᎨᏥᏅᎩ.
Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.
11 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᏂᏣᏛᏁᎲ ᎤᏣᏔᏅᎯ ᎡᏥᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎢᏥᏴᏍᏗᏱ ᎤᎵᏍᏆᏗᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏗᎨᏒ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎴ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ. (aiōnios g166)
Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. (aiōnios g166)
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎥᏝ ᎤᏁᎳᎩ ᏴᏓᎨᎵᏏ ᏂᎪᎯᎸ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ, ᎢᏥᎦᎳᎭᏍᎩᏂᏃᏅ, ᎠᎴ ᏕᏣᎵᏂᎪᏒ ᎾᎿᎭᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ ᎪᎯ ᏥᏣᏛᎩᎭ.
Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.
13 ᎥᎥ, ᏚᏳᎪᏗ ᎨᎵᎭ ᎢᎪᎯᏛ ᎠᏂ ᎯᎠ ᎦᎵᏦᏛ ᏥᏯᎥᎢ, ᎢᏨᏰᏍᏛᏙᏗᏱ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᏍᏗᏍᎬᎢ;
Namoni ete ezali malamu mpo na ngai kolamusa makanisi na bino awa nazali nanu na bomoi kati na ndako ya kapo ya nzoto oyo;
14 ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᏥᎦᏔᎲ ᏂᎪᎯᎸᎾᏉ ᎢᏴᏛ ᎠᎩᏗᏱ ᎨᏒ ᎠᏆᏤᎵ ᎦᎵᏦᏛᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᏋᏁᎸᎢ.
pamba te nayebi malamu ete, kala mingi te, nakokabwana na nzoto yango, ndenge Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ayebisaki ngai yango.
15 ᎠᎴ ᏓᎦᏟᏂᎬᏁᎵ ᎠᎩᎶᏐᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᏂᎪᎯᎸ ᎨᏨᎨᏫᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏧᏓᎴᏅᏛ.
Nzokande, nakosala makasi mpo ete bozalaka tango nyonso na makoki ya kokanisaka yango, ezala nasila na ngai kokende.
16 ᎥᏝᏰᏃ ᎠᎵᏏᎾᎯᏍᏔᏅᎯ ᎠᏎᏉ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏲᎩᏍᏓᏩᏛᏎ ᎬᏂᎨᏒ ᏂᏨᏴᏁᎸ ᎤᎵᏂᎩᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᎷᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ; ᏱᎩᎪᎲᎯᏍᎩᏂ ᎨᏒᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎤᏤᎵᎦ.
Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.
17 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᎤᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎢᎦᏚᎸᏌᏛᎢ, ᎾᎯᏳ ᎧᏁᎬ ᏧᎷᏤᎸ ᎤᏣᏘ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᎦ-ᏚᎸᏌᏛ ᏅᏓᏳᏓᎴᎤᎯ, [ ᎯᎠ ᏥᏂᎦᏪᏍᎬᎩ, ] ᎯᎠ ᏥᎨᏳᎢ ᎠᏇᏥ, ᎾᏍᎩ ᎣᏏᏳ ᏥᏰᎸᎢ ᏥᎩ.
Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
18 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᎤᏁᏨ ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᎶᏒᎯ ᎣᎦᏛᎦᏅᎩ, ᎾᎯᏳ ᎦᎸᏉᏗ ᎣᏓᎸ ᎢᏧᎳᎭ ᎣᏤᏙᎲᎢ.
Mpe, biso moko, tango tozalaki elongo na Ye na likolo ya ngomba ya bule, toyokaki mongongo yango kowuta na Likolo.
19 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᏄᏜᏓᏏᏛᏒᎾ ᎧᏃᎮᏛ ᎠᏙᎴᎰᏒᎯ ᎢᎩᎭ, ᎾᏍᎩ ᎣᏏᏳ ᏱᏂᏣᏛᎦ ᏱᏣᎦᏌᏯᏍᏔᏅ ᎾᏍᎩᏯ ᎢᎦ-ᏚᎸᏌᏛ ᎤᎵᏏᎬ ᏨᎦᏌᏯᏍᏗᏍᎪᎢ, ᎬᏂ ᎢᎦ ᏓᎦᏙᎩ, ᎠᎴ ᏑᎾᎴ ᎡᎯ ᏃᏈᏏ ᏓᎧᎸᎩ ᏗᏥᎾᏫᏱ;
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
20 ᎢᎬᏱ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᏥᎦᏙᎥᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏌᏉ ᎤᏅ ᎠᏙᎴᎰᏒᎯ ᎪᏪᎸᎢ ᎤᏩᏒ ᎨᏒ ᏗᎬᏁᏢᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Liboso na nyonso, boyeba malamu ete moko te, na mayele na ye moko, akoki kolimbola maloba ya basakoli, oyo ezali kati na Makomi,
21 ᎤᎾᏙᎴᎰᏒᏰᏃ ᎢᎸᎯᏳ ᏥᎨᏎᎢ ᎥᏝ ᏴᏫᏉ ᎠᏓᏅᏖᏍᎬ ᏴᏗᏓᎴᏁᎢ; ᎠᏃᏍᏛᏍᎩᏂ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ ᎠᏂᏁᎨ ᎢᏳᏂᏪᏍᏗᏱ ᏄᏅᏁᎲ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ.
pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.

< ᏈᏓ ᏔᎵᏁ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >