< ᏣᏂ ᎢᎬᏱᏱ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >

1 ᎾᏍᎩ ᏗᏓᎴᏂᏍᎬ ᏤᎮᎢ, ᎠᏴ ᎣᎦᏛᎦᏅᎯ, ᏦᏥᎦᏙᎵ ᏦᎬᏔᏅᎯ ᎣᎩᎪᎲᎯ, ᎾᏍᎩ ᏦᎦᎧᎿᎭᏅᎯ, ᎠᎴ ᏦᎪᏰᏂ ᏦᎬᏔᏅᎯ ᎣᎦᏒᏂᎵᏙᎸᎯ, ᎧᏃᎮᏛ ᎬᏂᏛ —
Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.
2 ᎬᏂᏛᏰᏃ ᎬᏂᎨᏒ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ, ᎠᎴ ᎣᎩᎪᎲᎩ, ᎠᎴ ᎣᏥᏃᎮᎭ, ᎠᎴ ᎢᏨᎾᏄᏫᏎᎭ ᎾᏍᎩ ᎠᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎬᏂᏛ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎡᎲ ᏤᎮᎢ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏲᎬᏁᎸᎯ ᏥᎩ — (aiōnios g166)
Bomoi emimonisaki; tomoni yango, tozali kotatola na tina na yango mpe kosakola epai na bino bomoi ya seko oyo ezalaki elongo na Tata mpe emimonisi epai na biso. (aiōnios g166)
3 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᎩᎪᎲᎯ ᎠᎴ ᎣᎦᏛᎦᏅᎯ ᎨᏒ ᎢᏨᎾᏄᏫᏎᎭ, ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎢᏣᏖᎳᏗᏍᏗᏱ ᎣᎦᏚᏓᏕᏫᏒᎢ; ᎠᎴ ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎣᎦᏚᏓᏕᏫᏒ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎠᎴ ᎤᏪᏥ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.
4 ᎯᎠ ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏲᏪᎳᏁᎭ ᎢᏣᎵᎮᎵᎬ ᎤᎧᎵᎢᏍᏗᏱ.
Yango wana tozali kokomela bino makambo oyo mpo na kokomisa esengo na biso ya kokoka.
5 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᎩ ᎧᏃᎮᏛ ᎣᏣᏛᎦᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎠᎴ ᏥᏨᎾᏄᏫᏎᎭ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎦᎦᏘ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏍᏗ ᎤᏅᎤᎵᏏᎩ ᏄᏪᎲᎾ ᎨᏒᎢ.
Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.
6 ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᏙᎦᏚᏓᏔ ᏱᏓᏗᎭ, ᎤᎵᏏᎬᏃ ᏱᏕᏙᎭ, ᏱᏓᏥᎪᎥᏍᎦᏉ ᎠᎴ ᎥᏝ ᏱᎨᏗᏍᏓᏩᏕᎦ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎨᏒᎢ.
Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.
7 ᎢᎦᎦᏛᏍᎩᏂ ᏱᏕᏙᎭ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᎩ ᎢᎦᎦᏛᎢ ᏤᎭ, ᏕᎦᏚᏓᏕᏫᏒ ᎢᎬᏒ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᎤᏪᏥ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎩᎬ ᎢᎩᏅᎦᎵᎭ ᏂᎦᎥ ᎢᎩᏍᎦᏅᏨᎢ.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
8 ᎢᏳᏃ ᎥᏝ ᎠᏍᎦᏂ ᏲᎨᎭ ᏱᏓᏗᎭ, ᎢᎬᏒ ᏱᏓᏓᎵᏓᏍᏗᎭ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏱᎨᎨᎭ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎨᏒᎢ.
Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso.
9 ᎢᏳᏃ ᏱᏗᏃᎲᏍᎦ ᎢᎩᏍᎦᏅᏨᎢ, ᏄᏓᎵᏓᏍᏛᎾ ᎠᎴ ᎤᏓᏅᏘᏳ, ᎾᏍᎩ ᎢᎩᏁᏗᏱ ᎢᎩᏍᎦᏅᏨᎢ, ᎠᎴ ᎢᎩᏅᎦᎸᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᎤᏲ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏗ ᎨᏒᎢ.
Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.
10 ᎢᏳᏃ ᎥᏝ ᏲᎩᏍᎦᏅᏨ ᏱᏓᏗᎭ, ᎡᏗᏰᎪᎥᏍᎦᏉ, ᎠᎴ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏤᎵᎦ ᎥᏝ ᏱᎨᎨᎭ.
Soki tolobi ete tosalaka masumu te, wana tokomisi Nzambe mokosi mpe Liloba na Ye ezali te kati na biso.

< ᏣᏂ ᎢᎬᏱᏱ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >