< ՅԱԿՈԲՈՒ 2 >

1 Եղբայրնե՛րս, առանց աչառութեան թող ըլլայ մեր Տէրոջ՝ Յիսուս Քրիստոսի՝ փառքի Տէրոջ հաւատքը:
Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo.
2 Արդարեւ եթէ ձեր ժողովարանին մէջ մտնէ մարդ մը՝ ոսկիէ մատանիով ու փայլուն տարազով, եւ մտնէ նաեւ աղքատ մը՝ աղտոտ տարազով,
Ndakisa: soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola.
3 ու նայիք անոր՝ որ փայլուն տարազ կը կրէ, եւ ըսէք. «Հո՛ս նստէ՝ պատիւով», իսկ աղքատին ըսէք. «Հո՛ն ոտքի կայնէ, կամ հո՛ս նստէ՝ պատուանդանիս քով»,
Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye: « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola: « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai; »
4 միթէ ձեր մէջ խտրութիւն դրած չէ՞ք ըլլար, ու չար մտածումներու դատաւոր եղած:
boni, wana boponi bilongi te kati na bino, mpe bokomi te koyekola bato na nzela ya makanisi mabe?
5 Լսեցէ՛ք, սիրելի՛ եղբայրներս. միթէ Աստուած չընտրե՞ց այս աշխարհի աղքատները՝ որոնք հարուստ են հաւատքով, ու ժառանգորդ արքայութեան՝ որ խոստացաւ զինք սիրողներուն:
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka: Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye?
6 Բայց դուք անպատուեցիք աղքատները: Հարուստները չե՞ն՝ որ կը հարստահարեն ձեզ ու դատարանները կը քաշեն:
Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te?
7 Անոնք չե՞ն որ կը հայհոյեն այն բարի անունը՝ որով կոչուած էք:
Ezali bango te bato babebisaka lokumu ya kombo kitoko oyo Nzambe apesa bino?
8 Ուրեմն՝ եթէ դուք կը գործադրէք արքայական Օրէնքը՝ Գիրքին ըսածին համաձայն. «Սիրէ՛ ընկերդ քու անձիդ՝՝ պէս», լա՛ւ կ՚ընէք:
Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu.
9 Բայց եթէ աչառութիւն կ՚ընէք՝ մե՛ղք կը գործէք, եւ կը կշտամբուիք Օրէնքէն՝ օրինազանցներու պէս.
Kasi soki bozali kopona-pona bilongi, bozali kosala masumu, mpe Mobeko ezali kokweyisa bino mpo ete bozali kotosa yango te.
10 քանի որ ո՛վ որ պահէ ամբողջ Օրէնքը սակայն սայթաքի մէ՛կ բանի մէջ, պարտապան կ՚ըլլայ բոլորին:
Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso.
11 Արդարեւ ա՛ն որ ըսաւ. «Շնութիւն մի՛ ըներ», ըսաւ նաեւ. «Մի՛ սպաններ»: Ուստի եթէ շնութիւն չընես բայց սպաննես, օրինազանց կ՚ըլլաս:
Solo, Ye oyo alobaki: « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu: « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso.
12 Ա՛յնպէս խօսեցէք եւ ա՛յնպէս գործեցէք՝ որպէս թէ պիտի դատուիք ազատութեան Օրէնքով:
Boye, tika ete bolobaka mpe bosalaka makambo lokola bato oyo bayebi malamu ete bakosambisama kolanda mibeko oyo ememaka bato na bonsomi.
13 Որովհետեւ դատաստանը անողորմ պիտի ըլլայ անոր՝ որ չէ ողորմած. սակայն ողորմութիւնը կը պարծենայ դատաստանին դիմաց:
Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.
14 Ի՞նչ օգուտ ունի, եղբայրնե՛րս, եթէ մէկը ըսէ թէ հաւատք ունի սակայն գործեր չունենայ. միթէ հաւատքը կրնա՞յ փրկել զինք:
Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye?
15 Եթէ եղբայր մը կամ քոյր մը մերկ ըլլայ եւ օրուան կերակուրին կարօտ,
Ndakisa: soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo,
16 ու ձեզմէ մէկը ըսէ անոնց. «Գացէ՛ք խաղաղութեամբ, տաքցէ՛ք եւ կշտացէ՛ք», բայց մարմինին հարկաւոր բաները չտայ անոնց, ի՞նչ օգուտ ունի:
bongo moko kati na bino alobi na ye: « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini?
17 Ա՛յդպէս ալ հաւատքը՝ եթէ գործեր չունենայ իրեն հետ՝ մեռած է ինքնիր մէջ:
Ezali mpe bongo mpo na kondima: soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa.
18 Նոյնիսկ մէկը կրնայ ըսել. «Դուն հաւա՛տք ունիս, ես ալ գործե՛ր ունիմ. ցո՛յց տուր ինծի քու հաւատքդ՝ առանց գործերու, իսկ ես ցոյց պիտի տամ քեզի իմ հաւատքս՝ գործերո՛վս”:
Nzokande moto mosusu akoki koloba: « Yo ozali na kondima; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.
19 Դուն կը հաւատաս թէ Աստուած մէկ է. լա՛ւ կ՚ընես: Դեւե՛րն ալ կը հաւատան ու կը սարսռան:
Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko? Osalaka malamu! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka.
20 Բայց կ՚ուզե՞ս գիտնալ, ո՛վ սնոտի մարդ, թէ հաւատքը մեռած է առանց գործերու:
Oh zoba ya moto! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba?
21 Աբրահամ՝ մեր հայրը՝ գործերով չարդարացա՞ւ, երբ իր որդին՝ Իսահակը մատուցանեց զոհասեղանին վրայ:
Tala, Abrayami, tata na biso, atangamaki lokola moto ya sembo mpo na misala, pamba te abonzaki Izaki, mwana na ye ya mobali, na likolo ya etumbelo.
22 Կը տեսնե՞ս թէ հաւատքը գործակից եղաւ անոր գործերուն, ու գործերո՛վ հաւատքը կատարեալ եղաւ,
Tala ndenge kondima mpe misala na ye ezalaki kosala elongo; mpe na nzela ya misala yango, kondima na ye ekomaki ya kokoka.
23 եւ իրագործուեցաւ Գիրքին խօսքը՝ որ կ՚ըսէ. «Աբրահամ հաւատաց Աստուծոյ, ու ատիկա արդարութիւն սեպուեցաւ անոր, եւ ինք Աստուծոյ բարեկամ կոչուեցաւ»:
Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi: « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »
24 Կը նկատէ՞ք թէ մարդ կ՚արդարանայ գործերո՛վ, ու ո՛չ թէ՝ միայն հաւատքով:
Bomoni malamu sik’oyo ete Nzambe akomisaka moto sembo kolanda misala ya moto, kasi mpo na kondima kaka te.
25 Նմանապէս Ռախաբ պոռնիկն ալ չարդարացա՞ւ գործերով, երբ ընդունեց պատգամաւորները եւ ուրիշ ճամբայով ուղարկեց զանոնք:
Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba: Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.
26 Արդարեւ ինչպէս մարմինը մեռած է առանց հոգիի, այդպէս ալ հաւատքը մեռած է առանց գործերու:
Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.

< ՅԱԿՈԲՈՒ 2 >