< ԱՌԱՋԻՆ ՊԵՏՐՈՍԻ 1 >

1 Պետրոս՝ Յիսուս Քրիստոսի առաքեալ, Պոնտոսի, Գաղատիայի, Կապադովկիայի, Ասիայի ու Բիւթանիայի մէջ ցրուած գաղթականներուն,
Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.
2 որոնք ընտրուած են Հայր Աստուծոյ կանխագիտութեան համաձայն՝ Հոգիին սրբացումով, Յիսուս Քրիստոսի հնազանդութեան եւ արիւնին սրսկումին համար. շնորհք ու խաղաղութիւն թող շատնան ձեր վրայ:
Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki!
3 Օրհնեա՜լ ըլլայ Աստուած, մեր Տէրոջ՝ Յիսուս Քրիստոսի Հայրը, որ իր առատ ողորմութեան համաձայն վերստին ծնաւ մեզ կենարար յոյսի մը համար՝ Յիսուս Քրիստոսի մեռելներէն յարութեամբ,
Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo
4 եւ անեղծանելի, անարատ ու անթառամ ժառանգութեան մը համար՝ որ երկինքը վերապահուած է ձեզի:
ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino
5 Դուք Աստուծոյ զօրութեամբ ու հաւատքով պահպանուած էք փրկութեան համար, որ պատրաստ է յայտնուելու վերջին ատենը.
ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.
6 ուստի ցնծացէ՛ք անով, թէպէտ հիմա՝ քիչ մը ատեն, եթէ պէտք ըլլայ, կը տրտմիք բազմազան փորձութիւններով,
Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.
7 որպէսզի ձեր հաւատքին փորձը (որ կորստական ոսկիէն շատ աւելի պատուական է, թէպէտ ան կը փորձարկուի կրակով, ) գտնուի գովեստով, պատիւով եւ փառքով՝ Յիսուս Քրիստոսի յայտնութեան ատենը:
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
8 Դուք կը սիրէք զայն՝ չտեսած. կը հաւատաք անոր՝ թէպէտ հիմա չէք տեսներ զայն, եւ կը ցնծաք անպատմելի ու փառաւոր ուրախութեամբ,
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
9 ստանալով ձեր անձերուն փրկութիւնը՝ որպէս վախճանը ձեր հաւատքին:
pamba te bozali kozwa lifuti ya kondima na bino: lobiko ya bomoi na bino.
10 Այդ փրկութիւնը փնտռեցին եւ զննեցին մարգարէները, որոնք մարգարէացան ձեզի սահմանուած շնորհքին մասին:
Mpo na lobiko yango, basakoli oyo baloba na tina na ngolu oyo Nzambe abongisa mpo na bino balukaki penza, na molende, koyeba mabombami na yango.
11 Կը զննէին թէ ի՛նչ կամ ինչպիսի՛ ատեն կը բացայայտէր իրենց մէջ եղած Քրիստոսի Հոգին, երբ կանխաւ կը վկայէր Քրիստոսի չարչարանքներուն եւ անոնց հետեւող փառքին մասին:
Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye.
12 Անոնց յայտնուեցաւ թէ ո՛չ թէ իրե՛նց՝ հապա մեզի՛ կը սպասարկէին այն բաները, որոնք հիմա հաղորդուեցան ձեզի անո՛նց միջոցով՝ որ աւետարանեցին ձեզի երկինքէն ղրկուած Սուրբ Հոգիով: Այդ բաներո՛ւն է որ հրեշտակները կը ցանկան ակնկառոյց նայիլ:
Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.
13 Ուստի գօտեպնդեցէ՛ք ձեր միտքին մէջքը, զգա՛ստ եղէք, ու կատարե՛լապէս յուսացէք այն շնորհքին՝ որ պիտի տրուի ձեզի Յիսուս Քրիստոսի յայտնութեան ատենը:
Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.
14 Հնազանդ զաւակներու պէս՝ մի՛ համակերպիք ձեր անգիտութեան ատենուան նախկին ցանկութիւններուն:
Lokola bana ya botosi, botambola lisusu te kolanda baposa mabe oyo bozalaki na yango tango bozangaki boyebi.
15 Հապա, ինչպէս ձեզ կանչողը սուրբ է, դո՛ւք ալ սո՛ւրբ եղէք ձեր ամբողջ վարքին մէջ:
Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso,
16 Որովհետեւ գրուած է. «Սո՛ւրբ եղէք, քանի որ ես սուրբ եմ»:
pamba te ekomama: « Bozala bule, pamba te nazali Bule. »
17 Եթէ Հայր կը կոչէք ա՛ն՝ որ առանց աչառութեան կը դատէ իւրաքանչիւրին արարքին համեմատ, երկիւղածութեա՛մբ ընթացէք հոս՝ ձեր պանդխտութեան ժամանակ:
Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.
18 Որովհետեւ դուք գիտէք թէ ո՛չ թէ ապականացու արծաթով կամ ոսկիով ազատագրուեցաք ձեր հայրերէն աւանդուած փուճ վարքէն,
Boyebi malamu ete ezali te na nzela ya biloko oyo ebebaka lokola wolo to palata nde Nzambe akangolaki bino na bizaleli ezanga tina, oyo bozwaki epai ya bakoko na bino,
19 հապա Քրիստոսի պատուական արիւնով՝ որպէս անարատ եւ անբիծ գառի մը արիւնը:
kasi ezali nde na nzela ya makila ya talo ya Klisto lokola mpate oyo ezangi mbeba mpe litono.
20 Արդարեւ ան նախապէս ճանչցուած էր՝ աշխարհի հիմնադրութենէն առաջ, բայց այս վերջին ժամանակները երեւցաւ ձեզի համար:
Nzambe abongisaki Ye mpo na yango wuta kala, liboso ete akela mokili, mpe Klisto amonani na mikolo oyo ya suka likolo na bino.
21 Անոր միջոցով հաւատացիք Աստուծոյ, որ մեռելներէն յարուցանեց զայն եւ փառաւորեց զայն, որպէսզի ձեր հաւատքն ու յոյսը ըլլան Աստուծոյ վրայ:
Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.
22 Մաքուր սիրտով՝ ջերմեռանդութեա՛մբ սիրեցէք զիրար, քանի որ մաքրագործեցիք ձեր անձերը անկեղծ եղբայրսիրութեան համար՝ ճշմարտութեան հնազանդելով Հոգիին միջոցով,
Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.
23 ու վերստին ծնած ըլլալով՝ ո՛չ թէ ապականացու հունտէն, հապա՝ անապականէն - Աստուծոյ խօսքով՝ որ կ՚ապրի ու կը մնայ յաւիտեան: (aiōn g165)
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka. (aiōn g165)
24 Արդարեւ «ամէն մարմին խոտի պէս է, ու մարդուն ամբողջ փառքը՝ խոտի ծաղիկի պէս. խոտը կը չորնայ եւ անոր ծաղիկը կը թափի,
Pamba te ekomama: « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,
25 բայց Տէրոջ խօսքը կը մնայ յաւիտեան»: Եւ ա՛յս խօսքն է՝ որ աւետարանուեցաւ ձեզի: (aiōn g165)
kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. » Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino. (aiōn g165)

< ԱՌԱՋԻՆ ՊԵՏՐՈՍԻ 1 >