< Об'явлення 8 >

1 І коли сьому печатку розкрив, німа ти́ша настала на небі десь на півгодини.
Tango Mpate afungolaki ekangelo ya sambo, kimia moko ekotaki kati na Lola mpe esalaki minite pene tuku misato.
2 І я бачив сімох анголів, що стояли перед Богом. І да́но було їм сім су́рем.
Bongo namonaki ba-anjelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo.
3 І прийшов другий ангол, та й став перед же́ртівником із золотою кадильницею. І було йому да́но багато кадила, щоб до молито́в усіх святих додав на золотого же́ртівника, що перед престолом.
Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.
4 І знявся дим кадильний з моли́твами святих від руки ангола перед Бога.
Wuta na loboko ya anjelu, molinga ya ansa elongo na mabondeli ya basantu emataki liboso ya Nzambe.
5 А ангол кадильницю взяв, і напо́внив її огнем із же́ртівника, та й кинув на землю. І зчинилися гро́ми, і гурко́тнява, і бли́скавиці та трясіння землі.
Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki: bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.
6 І сім анголів, що мали сім су́рем, приготува́лися, щоб сурми́ти.
Bongo ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo bamibongisaki mpo na kobeta yango.
7 І засурми́в перший ангол, — і вчинилися град та огонь, перемішані з кров'ю, і впали на землю. І спалилась третина землі, і згоріла третина дерев, і всіляка зелена трава погоріла.
Anjelu ya liboso abetaki kelelo; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki: eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.
8 І засурми́в другий ангол, — і немов би велика гора, розпа́лена огнем, була вкинена в море. І третина мо́ря зробилася кров'ю,
Anjelu ya mibale abetaki kelelo; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila;
9 і померла третина морського створіння, що мають життя, і загинула третина кораблів.
mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.
10 І засурми́в третій ангол, — і велика зоря́ спала з неба, пала́ючи, як смолоски́п. І спала вона на третину річок та на водні джере́ла.
Anjelu ya misato abetaki kelelo; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi.
11 А йме́ння зорі тій Поли́н. І стала третина води, як поли́н, і багато з людей повмирали з води, бо згі́ркла вона.
Kombo ya monzoto yango ezali: Bololo. Eteni moko kati na biteni misato ya bamayi ekomaki bololo, mpe bato ebele bakufaki likolo na bamayi mpo ete ekomaki bololo.
12 І засурми́в ангол четвертий, — і вда́рено третину сонця, і третину місяця, і третину зір, щоб затьми́лася їхня третина, щоб третина дня не світила, так само ж і ніч.
Anjelu ya minei abetaki kelelo; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.
13 І бачив, і чув я одно́го орла, що летів серед неба і кли́кав гучним голосом: „Горе, горе, горе тим, хто живе на землі, від голосів сурмови́х позосталих трьох анголів, що мають сурми́ти!“
Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi: « Mawa! Mawa! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango! »

< Об'явлення 8 >