< До євреїв 10 >

1 Бо Зако́н, мавши тільки тінь майбутнього добра́, а не самий о́браз речей, тими самими жертвами, що за́вжди щороку прино́сяться, не може ніко́ли вдоскона́лити тих, хто приступає.
Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.
2 Інакше вони перестали б прино́ситись, бо ті, хто служить, очищені раз, уже б не мали жодної свідо́мости гріхів.
Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.
3 Але в них спо́мин про гріхи буває щороку,
Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango,
4 бо тож неможливе, щоб кров биків та козлів здіймала гріхи!
pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu.
5 Тому́ то, вхо́дячи в світ, Він говорить: „Жертви й прино́шення Ти не схотів, але тіло Мені приготува́в.
Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki: « Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo, kasi osalaki ngai nzoto.
6 Цілопа́лення й жертви поку́тної Ти не жадав.
Osepelaki te na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu.
7 Тоді Я сказав: Ось іду́, — в звої книжки про Мене написано, щоб волю чини́ти Твою, Боже“!
Bongo nalobaki: ‹ Tala ngai oyo, nayei, nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo, kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »
8 Він вище сказав, що „жертви й при́носу, та цілопа́лення й жертви поку́тної, — які за Зако́ном прино́сяться, — Ти не жадав і Собі не вподо́бав“.
Alobaki liboso: « Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo, na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. » Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko.
9 Пото́му сказав: „Ось іду, щоб волю Твою чини́ти, Боже“. Відміняє Він перше, щоб друге поставити.
Alobaki lisusu: « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale.
10 У цій волі ми освячені жертвоприно́шенням тіла Ісуса Христа один раз.
Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
11 І кожен священик щоденно стоїть, слу́жачи, і часто приносить жертви ті самі, що ніко́ли не можуть зняти гріхів.
Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato.
12 А Він за гріхи світу приніс жертву один раз, і наза́вжди „по Божій правиці засів“,
Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
13 далі чекаючи, „аж вороги Його бу́дуть покладені за підніжка Його ніг“.
Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye.
14 Бо жертвоприно́шенням одним вдоскона́лив Він тих, хто освячується.
Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.
15 Свідкує ж і Дух Святий нам, як говорить:
Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso:
16 „Оце заповіт, що його по цих днях встановля́ю Я з ними, говорить Господь, — Закони Свої Я дам в їхні серця́, і в їхніх думка́х напишу́ їх.
« Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. »
17 А їхніх гріхів та несправедливостей їхніх Я більш не згадаю“!
Bongo na sima, abakisaki: « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »
18 А де їхнє відпущення, там нема вже жертвоприно́шення за гріхи.
Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
19 Отож, браття, ми маємо відвагу вхо́дити до святині кров'ю Ісусовою,
Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye.
20 ново́ю й живою дорогою, яку нам обнови́в Він через завісу, цебто через тіло Своє,
Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko.
21 маємо й Великого Священика над домом Божим, —
Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe.
22 то приступі́мо з щирим серцем, у повноті́ віри, окропи́вши серця́ від сумління лукавого та обмивши тіла́ чистою водою!
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
23 Трима́ймо непохи́тне визна́ння надії, вірний бо Той, Хто обіцяв.
Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te.
24 І уважаймо один за одни́м для заохо́ти до любови й до добрих учинків.
Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.
25 Не кидаймо збору свого, як то зви́чай у деяких, але заохочуймося, і тим більше, скільки більше ви бачите, що зближається день той.
Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
26 Бо як ми грішимо́ самові́льно, одержавши пізна́ння правди, то вже за гріхи не знахо́диться жертви,
Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te;
27 а страшливе якесь сподіва́ння су́ду та гнів палю́чий, що має пожерти противників.
ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.
28 Хто відкидає Зако́на Мойсея, такий немилосердно вмирає „при двох чи трьох свідках“, —
Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato,
29 скільки ж більшої му́ки, — доду́муєтеся? — заслуговує той, хто потоптав Сина Божого, і хто кров заповіту, що нею освячений, за звичайну вважав, і хто Духа благодаті зневажив!
ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu?
30 Бо знаємо Того, Хто сказав: „Мені помста належить, Я відплачу́, говорить Господь“. І ще: „Господь буде судити наро́да Свого“!
Toyebi malamu Ye oyo alobaki: « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto; » mpe: « Nkolo akosambisa bato na Ye. »
31 Страшна́ річ — упасти в руки Бога Живого!
Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi!
32 Згадайте ж про перші дні ваші, як ви просвітилися й витерпіли запеклу боротьбу стражда́нь.
Bokanisa lisusu mikolo ya liboso, na tango Nzambe afungolaki bino miso mpo ete bokoma komona pole, boyikaki mpiko kati na bapasi ya makasi.
33 Ви були́ то видо́вищем зневаги й знуща́ння, то були́ учасниками тих, що жили́ так.
Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama.
34 Ви бо страждали й з ув'язненими, і грабу́нок свого майна́ прийняли́ з потіхою, відаючи, що маєте в небі для себе майно немину́ще та краще.
Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.
35 Тож не відкидайте відваги своєї, бо має велику нагоро́ду вона.
Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.
36 Бо вам терпеливість потрібна, щоб Божу волю вчинити й прийняти обітницю.
Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.
37 Бо ще „мало, дуже мало, і Той, хто має прийти, при́йде й бари́тись не бу́де!“
Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.
38 А „праведний житиме вірою“. І: „Коли захитається він, то душа Моя його не вподо́бає“.
Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
39 Ми ж не з тих, хто хитається на заги́біль, але віруємо на спасі́ння душі.
Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.

< До євреїв 10 >