< Дії 23 >

1 І вп'явся очима Павло на той синедріо́н і промовив: „Мужі-браття, я аж по сьогоднішній день жив для Бога всім добрим сумлі́нням!“
Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki: — Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe.
2 Але первосвященик Ана́ній звелів тим, що стояли при ньому, щоб били його по уста́х.
Kasi Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, apesaki bato oyo bazalaki pene ya Polo mitindo ete babeta ye na monoko.
3 Тоді промовив до нього Павло: „Тебе битиме Бог, ти сті́но побілена... Ти ж сидиш, щоб судити мене за Зако́ном, а наказуєш бити мене проти Зако́ну?“
Bongo Polo alobaki na ye: — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai!
4 А присутні сказали: „То ти Божому первосвященикові лихосло́виш?“
Bato oyo batelemaki pene ya Polo balobaki: — Ebandi ndenge nini ofinga mbala moko mokonzi ya Banganga-Nzambe, ya Nzambe!
5 І промовив Павло: „Не знав я, брати, що то первосвященик. Бо написано: На начальника люду твого не лихосло́в“.
Polo azongisaki: — Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya Banganga-Nzambe, pamba te nayebi malamu ete ekomama: « Okolobaka mabe te na tina na mokambi ya bato na yo. »
6 І Павло, спостерігши, що частина одна — саддуке́ї, а друга — фарисеї, покликнув у синедріоні: „Мужі-браття, — я фарисей, і син фарисея. За наді́ю на воскресіння мертвих мене судять!“
Lokola Polo ayebaki ete, kati na bato ya Likita-Monene, bamoko bazalaki Basaduseo, mpe bamosusu, Bafarizeo, agangaki kati na Likita-Monene: — Bandeko na ngai, nazali Mofarizeo, mwana ya Bafarizeo; nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.
7 Якже він це промовив, колотне́ча постала поміж саддуке́ями та фарисеями, — і розділи́лась юрба́.
Tango kaka alobaki bongo, koswana makasi ekotaki kati na Bafarizeo mpe Basaduseo, mpe mayangani ekabwanaki;
8 Саддуке́ї бо тве́рдять, що немає воскресіння, ані а́нгола, ані духа, фарисеї ж оце визнають.
pamba te Basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu bazalaka te, milimo mpe ezalaka te; nzokande, Bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso.
9 І галас великий зчинився. А деякі книжники, із фарисейської групи, уставши, почали́ сперечатися, кажучи: „У чоловікові цьому ми жодного ли́ха не знаходимо! А коли промовляв Дух до нього, чи ангол, не противмося Богові“.
Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso: — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.
10 А коли колотне́ча велика зчинилась, то тисяцький, боячись, щоб Павла не роздерли, звелів вояка́м увійти та забрати його з-поміж них, і відве́сти в форте́цю.
Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.
11 А наступної ночі став Господь перед ним і промовив: „Будь бадьорий! Бо як в Єрусалимі про Мене ти свідчив, так треба тобі свідкува́ти й у Римі!“
Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye: — Yika mpiko! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.
12 А коли настав день, то дехто з юдеїв зібрались, та клятву скла́ли, говорячи, що ні їсти, ні пити не бу́дуть, аж доки Павла́ не заб'ють!
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalelaki Polo likita; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo.
13 А тих, що закляття таке покла́ли, було більш сорока́.
Motango ya bato oyo basalelaki Polo likita yango ezalaki bato koleka tuku minei.
14 І вони приступили до первосвящеників та старших і сказали: „Ми клятву скла́ли нічого не їсти, аж поки заб'ємо Павла!
Bakendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato mpo na koloba na bango: — Tolapi ndayi ete tokolia eloko moko te kino tokoboma Polo.
15 Отож разом із синедріоном передайте тисяцькому, щоб до вас він привів його, ніби хочете ви докладніш розізнати про нього. А ми, перше ніж він набли́зиться, готові забити його“.
Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.
16 Як зачув же сестрі́нець Павлів про цю змову, то прибув, і ввійшов у форте́цю, і Павла́ завідо́мив.
Kasi tango mwana mobali ya ndeko mwasi ya Polo ayokaki motambo yango, akendeki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo.
17 Павло ж зараз покликав одно́го з сотників, та й сказав: „Цього юнака́ запровадь до тисяцького, бо він має йому щось сказати“.
Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye: — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.
18 Той же взяв його, та й запровадив до тисяцького та сказав: „Павло в'язень покликав мене, і просив запрова́дити до тебе цього юнака́, що має тобі щось сказати“.
Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki: — Mokangami Polo abengaki ngai mpe asengaki na ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, pamba te azali na likambo ya koyebisa yo.
19 І взяв тисяцький того за руку, і на́бік відвів і спитав: „Що́ ти маєш звістити мені?“
Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye: — Likambo nini olingi koyebisa ngai?
20 А той розповів: „Змову склали юдеї, — просити тебе, щоб ти взавтра до синедріо́ну Павла припрова́див, ніби хочуть вони докладніш розпізнати про нього.
Elenge mobali azongisaki: — Bayuda bayokani kosenga na yo ete, lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita-Monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye.
21 Отож, не послухайся їх, бо чигає на нього їх більш сорока чоловіка, що клятву скла́ли ні їсти, ні пити, аж доки його не заб'ють. І тепер он готові вони, і чекають твого прире́чення“.
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.
22 Тоді тисяцький відпустив юнака́, наказавши йому — „не розповіда́ти ані о́дному, що мені ти це ви́явив.“
Mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali yango ete azonga; kasi liboso ete akende, akebisaki ye: — Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai.
23 І він закли́кав якихось двох із сотників, і наказав: „Пришикуйте на третю годину вночі дві сотні вояків, щоб іти до Кесарії, і кіннотників сімдеся́т, та дві сотні стрільців.
Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango: — Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu.
24 Приготуйте також в'ючаків і Павла посадіть, і здоровим його проведіть до намісника Фе́лікса.
Bobongisa bampunda mpo na komema Polo mpo ete akoma malamu epai ya moyangeli Felikisi.
25 І листа написав він такого ось змісту:
Boye, akomelaki moyangeli mokanda oyo:
26 „Кла́вдій Лі́сій намісникові вседостойному Фе́ліксові — поздоро́влення!
Tata moyangeli Felikisi, yamba mbote ewuti epai na ngai Klodiusi Lisiasi.
27 Цього мужа, що його юдеї схопи́ли були́ та хотіли забити, урятував я, із вояка́ми прийшовши, довідавшися, що він ри́млянин.
Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nakangolaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome.
28 І хотів я довідатися про причину, що за неї його оскаржа́ли, та й привів був його до їхнього синедріо́ну.
Lokola nalingaki koyeba malamu tina oyo bafundelaki ye, namemaki ye liboso ya Likita-Monene na bango.
29 Я знайшов, що його винуватять у спірних речах їхнього Зако́ну, і що провини не має він жа́дної, ва́ртої смерти або ланцюгі́в.
Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.
30 Як доне́сли ж мені про ту змову, що юдеї вчинили на мужа цього, я зараз до тебе його відіслав, наказавши також позива́льникам, щоб перед тобою сказали, що́ мають на нього. Будь здоровий!“
Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basaleli ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza; mpe napesaki lisusu mitindo na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo.
31 Отож вояки, як наказано їм, забрали Павла́, і вночі попровадили в Антипатри́ду.
Kolanda mitindo oyo basoda bazwaki, bakamataki Polo mpe bamemaki ye butu-butu kino na Antipatrisi.
32 А другого дня, полишивши кінно́тчиків, щоб ішли з ним, у форте́цю вони повернулись.
Mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kokende elongo na ye.
33 А ті прибули́ в Кесарі́ю, і, листа передавши намісникові, поставили також Павла перед ним.
Tango bakomaki na Sezarea, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bapesaki mokanda yango epai ya moyangeli mpe balakisaki ye Polo.
34 Намісник листа прочитав і спитав, із якого він кра́ю. А довідавшись, що з Кілікії, промовив:
Moyangeli atangaki mokanda yango mpe atunaki soki Polo azali moto ya mboka nini. Wana ayokaki ete azali moto ya Silisi,
35 „Я тебе переслухаю, як при́йдуть і твої позива́льники“. І звелів стерегти його в Іродовому Прето́рії.
alobaki na ye: — Nakoyoka yo tango bato oyo bafundaki yo bakokoma. Bongo apesaki mitindo ete bakengela Polo kati na ndako ya mokonzi Erode.

< Дії 23 >