< Дії 19 >

1 І сталося, що коли Аполло́с перебував у Кори́нті, то Павло, перейшовши горі́шні країни, прибув до Ефе́су, і деяких учнів знайшов,
Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli
2 та й спитав їх: „Чи ви Духа Святого одержали, як увірували?“А вони відказали йому: „Та ми навіть не чули, чи є Дух Святий!“
mpe atunaki bango: — Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi? Bazongisaki: — Te! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
3 І він запитав: „Тож у що́ ви христились?“Вони ж відказали: В Іванове хрищення“.
Polo atunaki bango lisusu: — Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki? Bazongisaki: — Tozwaki libatisi ya Yoane.
4 І промовив Павло: „Таж Іван христив хрищенням на покая́ння, говорячи лю́дям, щоб вірили в Того, Хто при́йде по ньому, цебто в Ісуса“.
Polo alobaki na bango: — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.
5 Як почули ж ́, то христились вони в Ім'я́ Господа Ісуса.
Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
6 А коли Павло руки на них покла́в, то зійшов на них Дух Святий, — і різними мовами стали вони промовляти та пророкувати!
Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.
7 А всіх їх було́ чоловіка з двана́дцять.
Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale.
8 А до синагоги ввійшовши, промовляв він відважно, три місяці про Боже Царство навчаючи та переконуючи.
Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango.
9 А коли опиралися дехто й не вірували, і дорогу Господню лихосло́вили перед наро́дом, то він їх покинув і виділив учнів, і щодня проповідував у школі одно́го Тира́на.
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
10 Це ж два роки продовжувалось, так що всі, хто замешкував в Азії, юдеї та ге́ллени, слухали слово про Господа.
Esalaki bongo mibu mibale; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo.
11 І Бог чуда чинив надзвича́йні руками Павловими,
Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo.
12 так що навіть хустки́ й пояси́ з його тіла прино́сили хворим, — і хвороби їх кидали, і ду́хи лукаві вихо́дили з них.
Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.
13 Дехто ж із мандрівни́х ворожби́тів юдейських зачали́ закликати Ім'я́ Господа Ісуса над тими, хто мав злих духів, проказуючи: Заклинаємо вас Ісусом, Якого Павло́ проповідує!“
Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe; bazalaki koloba: — Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima.
14 Це ж робили якісь сім синів юдейського первосвященика Ске́ви.
Bana mibali sambo ya Moyuda Seva, moko kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe, bazalaki kosala bongo.
15 Відповів же злий дух і сказав їм: „Я знаю Ісуса, і знаю Павла, а ви хто такі?“
Mokolo moko, molimo mabe ezongiselaki bango: — Nayebi Yesu, nayebi mpe soki Polo azali nani; kasi bino, bozali banani?
16 І ско́чив на них чоловік, що в ньому злий дух був, і, перемігші обох, поду́жав їх так, що втекли вони з дому нагі́ та пора́нені.
Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota.
17 І це стало відо́ме юдеям та ге́лленам, усім, що в Ефесі замешкують, — і о́страх напав на всіх їх, і сла́вилося Ім'я́ Господа Ісуса.
Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.
18 І багато-хто з тих, що ввірували, прихо́дили, визнаваючи та відкриваючи вчинки свої.
Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe.
19 І багато-хто з тих, що займалися ча́рами, позно́сили книги свої та й перед усіма́ попалили. І злічили ціну́ їх, і вийшло на срібло п'ятдесят тисяч драхм.
Mpe bato mingi ya maji bamemaki babuku na bango mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano.
20 Так могуче росло та зміцнялося Вожеє Слово!
Ezali ndenge wana nde Liloba na Nkolo ezalaki kokoba kopanzana mpe komonana ete etonda na nguya ya Nzambe.
21 А як спо́внилось це, Павло в Дусі задумав перейти Македо́нію та Ахаю, та й удатись у Єрусалим, говорячи: „Як побу́ду я там, то треба мені й Рим побачити“.
Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki: — Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.
22 Тож він послав у Македо́нію двох із тих, що служили йому, Тимофі́я й Ера́ста, а сам позостався якийсь час ув Азії.
Atindaki na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala, Timote mpe Erasite, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azia.
23 І ро́зрух чималий був стався там ча́су того за Господню дорогу.
Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo.
24 Бо один золота́р, Дмитро на ім'я́, що робив срібляні́ Артемі́дині храмки, та ремісникам заробі́ток чималий давав,
Demetriusi, mosali ya babiju, azalaki kosala na palata bililingi ya batempelo ya nzambe Artemisi. Na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi.
25 згромадив він їх і ще інших подібних робі́тників, та й промовив: „Ви знаєте, мужі, що з цього ремесла́ заробі́ток ми маємо.
Asangisaki bango elongo na bato ya misala ya maboko, oyo basalaka mosala moko na ye, mpe alobaki na bango: — Baninga na ngai, boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu.
26 І ви бачите й чуєте, що не тільки в Ефе́сі, але мало не в усій Азії — цей Павло збаламу́тив і відвернув багате́нно наро́ду, говорячи, ніби то не боги, що руками поро́блені.
Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.
27 І не тільки оце нам загрожує, що при́йде зайняття в упадок, а й храм богині великої Артемі́ди в ніщо́ зарахується, і буде зруйнована й ве́лич тієї, що шанує її ціла Азія та цілий світ“.
Makambo oyo Polo azali kosala ezali koluka kaka te kobebisa lokumu ya mosala na biso, kasi ezali mpe kosilisa lokumu ya tempelo ya Artemisi, nzambe monene ya mwasi; ezali lisusu kosilisa nkembo ya Artemisi oyo Azia mobimba mpe mokili mobimba ezali kogumbamela.
28 Почувши ж оце, вони перепо́внились гнівом, та й стали кричати, говорячи: „Артемі́да ефе́ська велика!“
Tango kaka bayokaki bongo, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga: — Artemisi ya Efeso azali monene!
29 І місто напо́внилось за́колотом. І кинулися однодушно до видо́вища, схопи́вши Павло́вих супу́тників — Гая та Ариста́рха, македо́нян.
Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.
30 Як Павло ж хотів у наро́д увійти, то учні його не пустили.
Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye.
31 Також дехто з азі́йських начальників, що були йому при́ятелі, послали до нього й просили, щоб він не вдава́всь на видо́вище.
Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.
32 І кожен що інше кричав, бо збори бурхли́ві були, і багате́нно з них навіть не знали, чого ради зібралися.
Mobulu makasi ekotaki kati na ebele ya bato: bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basangani wana.
33 А з наро́ду взяли Олександра, бо юдеї його висували. І Олекса́ндер дав знака рукою, і хотів ви́правдатися перед наро́дом.
Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.
34 А коли розпізнали, що юде́янин він, то злилися всі в один голос, і годин зо дві гукали: „Артеміда ефеська велика!“
Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene bangonga mibale ya koganga lokola moto moko: — Artemisi ya Efeso azali monene!
35 А як писар міськи́й заспоко́їв наро́д, то промовив: „Мужі ефеські, яка ж то люди́на не знає, що місто Ефес — то храмо́вий догля́дач Артеміди великої й її образу, упалого з неба?
Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato; alobaki: — Bato ya Efeso! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo?
36 Коли ж цьому перечити не можна, то потрібно вам бути спокійними, і не роби́ти необачно нічо́го.
Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te.
37 А ви ж привели́ цих людей, що ані святокрадці, ані вашої богині не знева́жили.
Bato oyo bomemi awa babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe bafingi ye te.
38 Отож, як Дмитро та його ремісники мають справу на ко́го, то суди є на ринку й проконсули, — один о́дного хай позивають.
Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda.
39 А коли чогось іншого допомина́єтеся, то те вирішиться на зако́ннім зібра́нні.
Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango malamu kati na mayangani oyo mibeko epesa ndingisa.
40 Бо ось є небезпека, що нас за сьогоднішній ро́зрух оскаржити можуть, і немає жа́дної причини, якою могли б виправдати це зборище“.
Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete botombokisi bato, mpo na makambo oyo esalemi lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato basangani awa.
41 І, промовивши це, розпустив він громаду.
Tango kaka asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.

< Дії 19 >