< 2 до солунян 2 >

1 Благаємо ж, бра́ття, ми вас, щодо прихо́ду Господа нашого Ісуса Христа й нашого згрома́дження до Нього,
Bandeko, mpo na oyo etali boyei ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe bosangani na biso epai na Ye, tozali kosenga na bino boye:
2 щоб ви не хвилювалися зараз умом та не жахались ані через духа, ані через слово, ані через листа, що він ніби від нас, — ніби вже настав день Господній.
bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma.
3 Хай ніхто жодним способом вас не зведе́! Бо той день не настане, аж перше при́йде відсту́плення, і ви́явиться беззако́нник, призна́чений на погибіль,
Tika ete moko te akosa bino; pamba te liboso ete mokolo yango ekoma, bato basengeli nanu kobwaka kondima, mpe motomboki oyo abongisami mpo na libebi asengeli nanu komonana.
4 що противиться та несеться над усе, зване Богом чи свя́тощами, так що в Божому храмі він сяде, як Бог, і за Бога себе видаватиме.
Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.
5 Чи ви не пам'ятаєте, як, ще в вас живши, я це вам говорив?
Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino?
6 І тепер ви знаєте, що́ саме не допускає з'явитись йому своєчасно.
Nzokande boyebi sik’oyo nini ezali kokanga ye nzela mpo ete amonisama te na tango na ye.
7 Бо вже діється таємни́ця беззако́ння; тільки Той, Хто трима́є тепер, буде тримати, аж поки не бу́де усу́нений Він із сере́дини.
Pamba te nguya ya botomboki, oyo ebombama esili kobanda kosala; kasi esengeli ete Ye oyo, kino sik’oyo, azali kokanga ye nzela ya komimonisa alongwa
8 І тоді то з'явиться той беззаконник, що його Госпо́дь Ісус заб'є Духом уст Своїх і знищить з'я́вленням прихо́ду Свого.
mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.
9 Його прихід — за чином сатани — буде з усякою силою й зна́ками та з неправдивими чу́дами,
Motomboki yango akoya na nguya ya Satana mpe akosala bikamwa ya lolenge nyonso, bilembo, misala minene ya lokuta
10 і з усякою обманою неправди між тими, хто гине, бо любови правди вони не прийняли́, щоб їм спастися.
mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.
11 І за це Бог пошле їм дію обмани, щоб у неправду повірили,
Yango wana Nzambe atindeli bango molimo ya libunga mpo ete bandima makambo ya lokuta,
12 щоб стали засу́джені всі, хто не вірив у правду, але полюбив неправедність.
mpe mpo ete bato nyonso oyo baboyaki kondimela solo kasi basepelaki na mabe bazwa etumbu.
13 А ми за́вжди повинні дякувати Богові за вас, улю́блені Господом бра́ття, що Бог вибрав вас споча́тку на спасі́ння освя́ченням Духа та вірою в правду,
Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
14 до чого покликав Він вас через нашу Єва́нгелію, щоб отримати славу Господа нашого Ісуса Христа.
Na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, Nzambe abengaki bino mpo ete bozwa lobiko mpe nkembo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
15 Отже, бра́ття, стійте й тримайтеся переда́нь, яких ви навчились чи то словом, чи нашим посла́нням.
Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bobatela malamu malakisi oyo toteyaki bino, ezala na nzela ya maloba to na nzela ya mokanda.
16 Сам же Госпо́дь наш Ісус Христос і Бог Отець наш, що нас полюбив і дав у благода́ті вічну потіху та добру надію, — (aiōnios g166)
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu, (aiōnios g166)
17 нехай ваші серця Він поті́шить, і нехай Він зміцнить вас у всякому доброму ділі та в слові!
balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso!

< 2 до солунян 2 >