< 2 Івана 1 >

1 Ста́рець — вибраній пані та ді́тям її, яких я поправці люблю́, і не тільки я, але й усі, хто правду пізнав,
Ngai mpaka; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.
2 за правду, що в нас пробував й повік буде з нами: (aiōn g165)
Tolingaka bino mpo na solo oyo ezali kati na biso mpe ekozalaka elongo na biso tango nyonso. (aiōn g165)
3 нехай буде з вами благодать, милість, мир від Бога Отця та Ісуса Христа́, Сина Отцевого, у правді та в любові!
Ngolu, boboto mpe kimia kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana ya Tata, ekozala elongo na biso kati na solo mpe bolingo.
4 Я дуже зрадів, що між ді́тьми твоїми знайшов таких, що ходять у правді, як заповідь ми прийняли́ від Отця.
Nazalaki na esengo makasi ya komona ndambo ya bana na yo kotambola kati na solo, kolanda mobeko oyo tozwaki kowuta na Tata.
5 І тепер я благаю тебе, пані, не так, ніби пишу́ тобі нову́ заповідь, але ту, яку маємо від поча́тку, — щоб ми любили один о́дного!
Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli: Tolinganaka biso na biso.
6 А любов ця — щоб ми жили згідно з Його заповідями. Це та заповідь, яку ви чули від поча́тку, щоб ви згідно з нею жили́.
Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka: kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.
7 Бо в світ увійшло багато обма́нців, які не визнаю́ть Ісуса Христа, що прийшов був у тілі. Такий — то обманець та анти́христ!
Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.
8 Пильнуйте себе, щоб ви не згубили того, над чим працювали, але щоб прийняли́ повну нагоро́ду.
Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.
9 Кожен, хто робить пере́ступ та не пробуває в науці Христовій, той Бога не має. А хто пробуває в науці Його́, той має і Отця, і Сина.
Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.
10 Коли хто приходить до вас, але не приносить науки цієї, не приймайте до дому його́, і не вітайте його́!
Soki moto moko ayei epai na bino mpe amemeli bino mateya mosusu, boyamba ye te kati na bandako na bino, mpe bopesa ye ata mbote te,
11 Хто бо вітає його́, той у́часть бере в лихи́х учинках його́.
pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.
12 Багато я мав написати до вас, але не схотів на папері й чорнилом. Та маю надію прибути до вас, і говорити уста́ми до уст, щоб повна була́ ваша радість!
Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.
13 Вітають тебе діти ви́браної сестри твоєї. Амі́нь.
Bana ya ndeko na yo ya mwasi, moponami ya Nzambe, batindeli yo mbote.

< 2 Івана 1 >