< 2 до коринтян 4 >

1 Ось тому́, мавши за милосердям Божим таке служі́ння, ми не тратимо відваги,
Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te;
2 але ми відреклися тайного со́рому, не хо́дячи в хитрості та не перекручуючи Божого Слова, але з'я́вленням правди доручуємо себе кожному сумлінню лю́дському перед Богом.
toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
3 Коли ж наша Єва́нгелія й закрита, то закрита для тих, хто гине, —
Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga,
4 для невіруючих, яким бог цього віку засліпив розум, щоб для них не зася́яло світло Єва́нгелії слави Христа, а Він — образ Божий. (aiōn g165)
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe. (aiōn g165)
5 Бо ми не себе самих проповідуємо, але Христа Ісуса, Господа, ми ж самі — раби ваші ради Ісуса.
Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.
6 Бо Бог, що звелів був світлу зася́яти з те́мряви, у серцях наших зася́яв, щоб просвітити нам знання́ слави Божої — в Особі Христовій.
Pamba te Nzambe oyo alobaki: « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
7 А ми маємо скарб цей у посу́динах гли́няних, щоб ве́лич сили була Божа, а не від нас.
Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
8 У всьому нас тиснуть, та не поти́снені ми; ми в важки́х обставинах, але не впадаємо в ро́зпач.
Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te;
9 Переслідують нас, але ми не полишені; ми повалені, та не погублені.
tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
10 Ми за́всіди носимо в тілі ме́ртвість Ісусову, щоб з'явилося в нашому тілі й життя Ісусове.
Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso.
11 Бо за́всіди нас, що живемо́, віддають на смерть за Ісуса, щоб з'явилось Ісусове в нашому смертельному тілі.
Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
12 Тому́ то смерть діє в нас, а життя — у вас.
Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
13 Та мавши того ж духа віри, за написаним: „Вірував я, через те говорив“, і ми віруємо, тому то й говоримо,
Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama: « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
14 знавши, що Той, Хто воскресив Господа Ісуса, воскреси́ть з Ісусом і нас, і поставить із вами.
Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
15 Усе бо для вас, щоб благода́ть, розмножена через багатьох, збагати́ла подяку на Божу славу.
Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
16 Через те ми відваги не тратимо, бо хоч ни́щиться зовнішній наш чоловік, зате день-у-день відновля́ється внутрішній.
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
17 Бо тепе́рішнє легке наше горе достачає для нас у безмірнім багатстві славу вічної ваги, (aiōnios g166)
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. (aiōnios g166)
18 коли ми не дивимося на види́ме, а на невиди́ме. Бо види́ме - дочасне, невиди́ме ж - вічне! (aiōnios g166)
Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko. (aiōnios g166)

< 2 до коринтян 4 >