< 2 до коринтян 10 >

1 А я сам, Павло, благаю вас ла́гідністю й ласка́вістю Христовою; я, коли присутній — слухня́ний між вами, а не бувши між вами — сміли́вий я супроти вас.
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto:
2 І благаю, щоб я, прибувши, не осмі́лився надією, що нею я ду́маю сміли́вим бути проти деяких, що про нас вони гада́ють, ніби ми поступаємось за тілом.
Nabondeli bino, tango nakoya epai na bino, bopesa ngai nzela te ya kosalela makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni.
3 Бо хо́дячи в тілі, не за тілом воюємо ми, —
Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.
4 зброя бо нашого воюва́ння не тілесна, але міцна́ Богом на зруйнува́ння тверди́нь, — ми руйнуємо за́думи,
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
5 і всяке ви́несення, що підіймається проти пізна́ння Бога, і поло́нимо всяке знання́ на по́слух Христові,
tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.
6 і покарати ми готові всякий непо́слух, коли зді́йсниться послух ваш.
Lisusu, tomilengeli mpo na kopesa bozangi botosi nyonso etumbu, tango kaka botosi na bino ekokoka.
7 Чи на обличчя ви дивитеся? Як хто певний про себе, що Христовий він, нехай ду́має знов по собі, що як сам він Христовий, так само Христові й ми.
Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.
8 Бо коли б я ще більш став хвалитися нашою вла́дою, яку дав нам Господь на збудува́ння, а не на зруйнува́ння ваше, то не осоро́млюсь.
Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
9 Та щоб не здавалось, ніби хочу лякати вас листами.
mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na nzela ya mikanda na ngai.
10 „Бо листи його — кажуть — важкі́ та міцні́, але особисто присутній — слабий, а мова його незначна́“,
Pamba te bato mosusu balobaka: « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »
11 такий нехай знає оце, що які ми на слові в листах, неприсутніми бувши, такі ми й на ді́лі, присутніми бувши.
Boye tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo: ndenge tolobaka kati na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tokozala epai na bino.
12 Бо не сміємо вважати себе чи рівняти до інших, що самі себе хвалять, — вони нерозумно самі себе міряють собою, і рівняють з собою себе.
Toboyi komikokanisa to komekana na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele!
13 Ми ж не будем хвалитись над міру, а в міру міри́ла, що його Бог призна́чив на міру для нас, щоб і до нас досягти́.
Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo; tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.
14 Бо ми не розтягуємося над міру, ніби не досягли́ ми до вас, бо ми досягли́ аж до вас із Єва́нгелією Христовою.
Solo, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto.
15 Ми не хвалимось над міру у чужих працях, але маємо надію, що як буде рости ваша віра, то за нашим міри́лом сильно звели́чимося ми між вами,
Tomikumisaka te mpo na mosala ya bato mosusu; nzokande, tozali na elikya ete, wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso mpe ezali kokoba koya monene kati na bino kolanda bandelo ya mosala, oyo Nzambe apesa biso.
16 щоб і в дальших за вами країнах звіщати Єва́нгелію, а не хвалитись готовим, як це чужі тве́рдять.
Boye, tokoteya Sango Malamu kati na bituka oyo ezali mosika na bino. Pamba te toboyi na biso komikumisa na tina na mosala oyo bato mosusu basali kati na elanga na bango ya mosala.
17 А „хто хва́литься, нехай хва́литься в Господі!“
Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo!
18 Бо достойний не той, хто сам себе хва́лить, але кого хвалить Госпо́дь!
Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.

< 2 до коринтян 10 >