< 1 Тимофію 1 >

1 Павло, апо́стол Христа Ісуса, з волі Бога, Спасителя нашого й Христа Ісуса, надії нашої,
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto kolanda mokano ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ntoma ya Yesu-Klisto, elikya na biso;
2 до Тимофі́я, щирого сина за вірою: благода́ть, милість, мир від Бога Отця і Христа Ісуса, Господа нашого!
Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima: Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso!
3 Як я йшов у Македо́нію, я тебе вблага́в був позостатися в Ефе́сі, щоб ти декому наказав не навчати іншої науки,
Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta
4 і не зверта́ти уваги на ви́гадки й на родоводи безкраї, що викликують більше сварки́, ніж збудува́ння Боже, що в вірі воно.
to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.
5 Ціль же нака́зу — любов від чистого серця, і доброго сумління, і нелукавої віри.
Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.
6 Дехто в тім прогрішили були та вдалися в пустомо́вність, —
Bato mosusu basili kobunga mosika ya makambo yango mpe bamipesi na masolo ezanga tina;
7 вони забажали бути вчителями Зако́ну, — та не розуміли ні того, що́ говорять, ні про що запевня́ють.
balingi kozala balakisi ya Mobeko, kasi bazali kososola te makambo oyo bazali koloba mpe oyo bazali kobetela sete.
8 А ми знаємо, що добрий Зако́н, коли хто зако́нно вживає його,
Toyebi ete mibeko ezalaka malamu soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi.
9 та ві́дає те, що Зако́н не покладений для праведного, але для беззако́нних та для неслухня́них, нечестивих і грішників, безбожних та нечистих, для знева́жників батька та зневажників матері, для душогубців,
Toyebi lisusu ete mibeko esalema te mpo na bato ya malamu kasi mpo na bato mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe batioli makambo ya bule, ba-oyo bakoki ata koboma tata mpe mama, mpo na babomi ya bato,
10 розпусників, мужоложників, розбійників, неправдомовців, кривоприсяжників, і для всього іншого, що противне здоровій науці,
mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,
11 за славною Єва́нгелією блаженного Бога, яка мені зві́рена.
kolanda Sango Malamu oyo napesamelaki mokumba, Sango Malamu ya nkembo ya Nkolo-Na-Esengo.
12 Я дяку складаю Тому, Хто зміцнив мене, — Христу Ісусу, Господу нашому, що мене за вірного визнав і поставив на службу,
Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,
13 мене, що давніше був богознева́жник, і гноби́тель, і напасни́к, але був помилуваний, бо я те чинив нетяму́чий у невірстві.
atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.
14 І бага́то збільши́лась у мені благодать Господа нашого з вірою та з любов'ю в Христі Ісусі.
Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
15 Вірне це слово, і гі́дне всякого прийняття́, що Христос Ісус прийшов у світ спасти́ грішних, із яких перший — то я.
Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango: Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
16 Але я тому́ був помилуваний, щоб Ісус Христос на першім мені показав усе довготерпіння, для при́кладу тим, що мають увірувати в Нього на вічне життя. (aiōnios g166)
Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko. (aiōnios g166)
17 А Цареві віків, нетлінному, невиди́мому, єдиному Богові честь і слава на вічні віки. Амінь. (aiōn g165)
Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen. (aiōn g165)
18 Цього нака́за я передаю тобі, сину мій Тимофіє, за тими пророцтвами, що про тебе давніше були, щоб ними провадив ти добру війну,
Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo: kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
19 маючи віру та добре сумління, якого дехто відкинулися та й розбилися в вірі.
na kobatelaka kondima mpe motema ya malamu, oyo bato mosusu basili kobwaka kino kobungisa kondima na bango.
20 Серед них Гімене́й та Олександер, яких я передав сатані, щоб навчились вони не зневажати Бога.
Kati na bango, ezali na Imene mpe Alekizandre, ba-oyo nakabi na maboko ya Satana mpo ete bayeba ete basengeli te kofinga Nzambe.

< 1 Тимофію 1 >