< 1 до коринтян 16 >

1 А щодо складо́к на святих, то й ви робіть так, як я постановив для Церков галаті́йських.
Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.
2 А першого дня в тижні нехай кожен із вас відкладає собі та збирає, згідно з тим, як ведеться йому, щоб складо́к не робити тоді, аж коли я прийду́.
Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango.
3 А коли я прийду́, тоді тих, кого виберете, тих пошлю я з листами, щоб вони ваш дар любови відне́сли до Єрусалиму.
Tango nakoya, nakotinda elongo na mikanda, bato oyo bino moko bokopona, mpo ete bamema makabo na bino kuna na Yelusalemi.
4 А коли ж і мені випада́тиме йти, то зо мною піду́ть.
Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko.
5 Я прибуду до вас, коли перейду́ Македо́нію, бо прохо́джу через Македонію.
Sima na ngai kolekela na Masedwane, nakoya kotala bino, pamba te nasengeli kolekela kuna.
6 А в вас, коли трапиться, я поживу́ або й перези́мую, щоб мене провели́ ви, куди я піду́.
Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende.
7 Не хо́чу я бачитись з вами тепер мимохі́дь, але сподіва́юся деякий час перебути у вас, як дозволить Госпо́дь.
Na mbala oyo, naboyi komona bino na koleka, pamba te nazali na elikya ya kovanda mwa mikolo elongo na bino, soki Nkolo alingi.
8 А в Ефе́сі пробу́ду я до П'ятдеся́тниці,
Kasi nakotikala awa, na Efeso, kino na mokolo ya Pantekoti,
9 бо двері великі й широкі мені відчинилися, та багато противників.
pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu, mpe bayini bazali ebele.
10 Коли ж при́йде до вас Тимофі́й, то пильнуйте, щоб він був безпечний у вас, бо ді́ло Господнє він робить, як і я.
Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.
11 Тому́ то нехай ним ніхто не пого́рджує, але відпровадьте його з миром, щоб прийшов він до мене, бо чека́ю його з брата́ми.
Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.
12 А щодо брата Аполло́са, то я ду́же благав був його, щоб прийшов до вас з брата́ми, та охоти не мав він прибути тепер, але при́йде, як матиме час відповідний.
Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.
13 Пильнуйте, стійте у вірі, будьте мужні, будьте міцні,
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
14 хай з любов'ю все робиться у вас!
Bosalaka makambo nyonso na bolingo.
15 Благаю ж вас, браття, — знаєте ви дім Степанів, що в Аха́ї він пе́рвісток, і що службі святим присвяти́лись вони, —
Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.
16 і ви підкоряйтесь таким, також кожному, хто помагає та працю́є.
Bino mpe, botosaka bato ya ndenge wana mpe moto nyonso oyo asalaka elongo na bango.
17 Я тішусь з при́ходу Степана, і Фортуна́та, і Аха́їка, бо вашу відсутність вони заступили,
Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi; pamba te esali lokola namoni bino nyonso.
18 бо вони заспоко́їли духа мого й вашого. Тож шануйте таких!
Balendisaki ngai, ndenge basalaka yango mbala na mbala mpo na bino. Boye, boyebaka kondima bato ya boye.
19 Вітають вас азійські Церкви́; Аки́ла й Приски́лла з домашньою Церквою їхньою гаряче вітають у Господі вас.
Mangomba ya Azia etindeli bino mbote. Akilasi mpe Prisika, elongo na Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na bango, bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo.
20 Вітають вас усі брати. Вітайте один о́дного святим поцілунком.
Bandeko nyonso batindeli bino mbote. Bopesanaka bino na bino mbote na nzela ya beze ya bule.
21 Привіта́ння моєю рукою Павловою.
Ezali ngai, Polo, moto nazali kokoma mbote oyo, na loboko na ngai moko.
22 Коли хто не любить Господа, нехай буде про́клятий! Мара́на та́!
Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe! Oh Nkolo, yaka!
23 Благода́ть Господа нашого Ісуса нехай буде з вами!
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino!
24 Любов моя з вами всіма́ у Христі Ісусі, амі́нь!
Bolingo na ngai ezali elongo na bino nyonso kati na Yesu-Klisto. Amen!

< 1 до коринтян 16 >