< Ezgiler Ezgisi 2 >

1 Ben Şaron çiğdemiyim, Vadilerin zambağıyım.
Nazali lokola fololo oyo ebotaka na etando ya Saroni, fololo oyo babengaka lisi ya lubwaku.
2 Dikenlerin arasında zambak nasılsa Kızların arasında öyledir aşkım.
Ndenge fololo oyo babengaka lisi ezalaka kati na banzube, ndenge wana mpe mwasi na ngai ya motema azalaka kati na bilenge basi.
3 Orman ağaçları arasında bir elma ağacına benzer Delikanlıların arasında sevgilim. Onun gölgesinde oturmaktan zevk alırım, Tadı damağımda kalır meyvesinin.
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
4 Ziyafet evine götürdü beni, Üzerimdeki sancağı aşktı.
Amemaki ngai na esika oyo bamelaka masanga, mpe bendele na ye likolo na ngai ezali bolingo.
5 Güçlendirin beni üzüm pestiliyle, Canlandırın elmayla, Çünkü aşk hastasıyım ben.
Lendisa ngai na bagato oyo basali na bambuma ya vino, sunga ngai na bapome, pamba te nabeli maladi ya bolingo.
6 Sol eli başımın altında, Sağ eli sarsın beni.
Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto!
7 Dişi ceylanlar, Yabanıl dişi geyikler üstüne Ant içiriyorum size, ey Yeruşalim kızları! Aşkımı ayıltmayasınız, uyandırmayasınız diye, Gönlü hoş olana dek.
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga: Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
8 İşte! Sevgilimin sesi! Dağların üzerinden sekerek, Tepelerin üzerinden sıçrayarak geliyor.
Yoka mongongo ya Bolingo na ngai! Tala ye wana! Ye wana azali koya, azali kopumbwa na likolo ya bangomba, azali kodenda na likolo ya bangomba mike.
9 Sevgilim ceylana benzer, sanki bir geyik yavrusu. Bakın, duvarımızın ardında duruyor, Pencerelerden bakıyor, Kafeslerden seyrediyor.
Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.
10 Sevgilim şöyle dedi: “Kalk, gel aşkım, güzelim.
Molingami na ngai alobi mpe ayebisi ngai: « Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai!
11 Bak, kış geçti, Yağmurların ardı kesildi,
Pamba te, tala eleko ya malili esili koleka, bamvula esili mpe ekeyi.
12 Çiçekler açtı, Şarkı mevsimi geldi, Kumrular ötüşmeye başladı beldemizde.
Bafololo ebimi na mboka, tango ya koyemba banzembo ekoki. Makelele ya banzembo ya bibenga ekomi lisusu koyokana na mokili.
13 İncir ağacı ilk meyvesini verdi, Yeşeren asmalar mis gibi kokular saçmakta. Kalk, gel aşkım, güzelim.”
Nzete ya figi ebimisi bambuma na yango ya liboso, bafololo ya bilanga ya vino ekomi kopanza solo na yango ya kitoko. Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai.
14 Kaya kovuklarında, Uçurum kenarlarında gizlenen güvercinim! Boyunu bosunu göster bana, Sesini duyur; Çünkü sesin tatlı, boyun bosun güzeldir.
Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi! »
15 Yakalayın tilkileri bizim için, Bağları bozan küçük tilkileri; Çünkü bağlarımız yeşerdi.
Bokangela biso bambwa ya zamba mpe bana na yango oyo ezali kobebisa bilanga na biso ya vino, pamba te bilanga na biso ya vino ebimisi bafololo.
16 Sevgilim benimdir, ben de onun, Zambaklar arasında gezinir durur.
Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai, mpe ngai nazali ya ye; aleisaka bibwele na ye na bilanga oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.
17 Ey sevgilim, gün serinleyip gölgeler uzayana dek, Engebeli dağlar üzerinde bir ceylan gibi, Geyik yavrusu gibi ol!
Mobali na ngai ya bolingo, zonga; awa moyi ebandi kobima mpe molili ekimi, zala lokola mboloko to mwana ya mbuli na bangomba ya Beteli.

< Ezgiler Ezgisi 2 >