< Éxodo 18 >

1 Y oyó Jetro sacerdote de Madián, suegro de Moisés, todas las cosas que Dios había hecho con Moisés, y con Israel su pueblo, como Jehová había sacado a Israel de Egipto:
Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.
2 Y tomó Jetro, suegro de Moisés, a Séfora la mujer de Moisés, después que él la envió:
Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye,
3 Y a sus dos hijos, el uno se llamaba Gersom; porque dijo: Peregrino he sido en tierra ajena;
elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi, » pamba te Moyize amilobelaki: « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya; »
4 Y el otro se llamaba Eliezer, porque dijo: El Dios de mi padre me ayudó; y me escapó de la espada de Faraón.
mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki: « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »
5 Y llegó Jetro, el suegro de Moisés, y sus hijos, y su mujer, a Moisés en el desierto, donde tenía el campo, al monte de Dios.
Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe.
6 Y dijo a Moisés: Yo tu suegro Jetro vengo a ti, y tu mujer, y sus dos hijos con ella.
Jetro atindelaki Moyize maloba oyo: — Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali.
7 Y Moisés salió a recibir a su suegro, e inclinóse, y besóle: y preguntáronse el uno al otro como estaban; y vinieron a la tienda.
Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo.
8 Y Moisés contó a su suegro todas las cosas que Jehová había hecho a Faraón y a los Egipcios por causa de Israel; y todo el trabajo que habían pasado en el camino, y como los había librado Jehová.
Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.
9 Y alegróse Jetro de todo el bien, que Jehová había hecho a Israel, que le había escapado de mano de los Egipcios.
Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.
10 Y Jetro dijo: Bendito sea Jehová, que os escapó de mano de los Egipcios, y de la mano de Faraón, que escapó al pueblo de la mano de los Egipcios.
Jetro alobaki: — Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito.
11 Ahora conozco que Jehová es grande más que todos los dioses; porque en lo que se ensoberbecieron contra ellos, los castigó.
Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.
12 Y tomó Jetro, el suegro de Moisés, holocausto y sacrificios para Dios: y vino Aarón, y todos los ancianos de Israel a comer pan con el suegro de Moisés delante de Dios.
Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.
13 Y aconteció, que otro día Moisés se asentó a juzgar al pueblo; y el pueblo estuvo sobre Moisés desde la mañana hasta la tarde.
Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa.
14 Y viendo el suegro de Moisés todo lo que él hacía con el pueblo, dijo: ¿Qué es esto que haces tú con el pueblo? ¿Por qué te sientas tú solo, y todo el pueblo está sobre ti desde la mañana hasta la tarde?
Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki: — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa?
15 Y Moisés respondió a su suegro: Porque el pueblo viene a mí para consultar a Dios:
Moyize azongiselaki ye: — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe.
16 Cuando tienen negocios, y vienen a mí, y yo juzgo entre el uno y el otro, y declaro las ordenanzas de Dios, y sus leyes.
Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.
17 Entonces el suegro de Moisés le dijo: No haces bien:
Bokilo ya Moyize alobaki na ye: — Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te.
18 Desfallecerás del todo tú y también este pueblo que está contigo; porque el negocio es más pesado que tú; no podrás hacerlo tú solo.
Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo; okolonga kosala yango yo moko te.
19 Oye ahora mi voz, yo te aconsejaré, y Dios será contigo. Está tú por el pueblo delante de Dios, y trata tú los negocios con Dios:
Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali: kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe
20 Y enséñales las ordenanzas y las leyes, y muéstrales el camino por donde anden, y lo que han de hacer.
mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala.
21 Y tú proveerás de todo el pueblo varones de virtud, temerosos de Dios, varones de verdad, que aborrezcan la avaricia; y pondrás sobre ellos príncipes sobre mil, sobre ciento, sobre cincuenta, y sobre diez:
Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato: bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
22 Los cuales juzgarán al pueblo en todo tiempo: y será, que todo negocio grave te traerán a ti, y todo negocio pequeño juzgarán ellos; y alivia la carga de sobre ti, y llevarla han contigo.
Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te; pamba te okokabola yango elongo na bango.
23 Si esto hicieres, y lo que Dios te mandare, tú podrás estar, y todo este pueblo también se irá en paz a su lugar.
Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango.
24 Entonces Moisés oyó la voz de su suegro, e hizo todo lo que él dijo.
Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki.
25 Y escogió Moisés varones de virtud de todo Israel, y púsolos por cabezas sobre el pueblo, príncipes sobre mil, sobre ciento, sobre cincuenta, y sobre diez;
Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato: bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
26 Los cuales juzgaban al pueblo en todo tiempo: el negocio arduo traíanlo a Moisés, y todo negocio pequeño juzgaban ellos.
Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.
27 Y despidió Moisés a su suegro, y fuése a su tierra.
Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.

< Éxodo 18 >