< Deuteronomio 14 >

1 Hijos sois de Jehová vuestro Dios: no os sajaréis, ni pondréis calva sobre vuestros ojos por muerto.
Bozali bana ya Yawe, Nzambe na bino: Bokoki te komikata nzoloko mpe kokokola suki ya mito na bino soki moto akufi,
2 Porque eres pueblo santo a Jehová tu Dios, y Jehová te escogió para que le seas un pueblo singular de todos los pueblos, que están sobre la haz de la tierra.
pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.
3 Ninguna abominación comerás.
Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo.
4 Estos son los animales que comeréis: buey, cordero de ovejas, y cabrito de cabras,
Tala banyama oyo bokoki kolia: ngombe, meme, ntaba,
5 Ciervo, y corzo, y búfalo, y capriciervo, y unicornio, y buey salvaje, y cabra montés.
mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa.
6 Todo animal de pesuños, y que tiene hendedura de dos uñas que rumiare entre los animales, este comeréis.
Bokoki lisusu kolia nyama nyonso oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
7 Empero esto no comeréis de los que rumian y tienen uña hendida: camello, y liebre, y conejo; porque rumian, mas no tienen uña hendida, seros han inmundos:
Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia: shamo, mpanya ya matoyi milayi mpe mpanya ya zamba; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino.
8 Ni puerco, porque tiene uña hendida, mas no rumia, seros ha inmundo. De la carne de estos no comeréis, ni tocaréis sus cuerpos muertos.
Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango.
9 Esto comeréis de todo lo que está en el agua: todo lo que tiene ala y escama comeréis.
Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.
10 Mas todo lo que no tuviere ala y escama no comeréis, inmundo os será.
Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku: ezali mbindo mpo na bino.
11 Toda ave limpia comeréis.
Bokolia ndeke nyonso oyo ezangi mbindo.
12 Y estas son de las cuales no comeréis: águila, y azor, y esmerejón,
Kasi tala bandeke oyo bokolia te: mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,
13 E ixión, y buitre, y milano según su especie,
kombekombe ya mwindo, bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, nzengo ya lolenge nyonso,
14 Y todo cuervo según su especie,
bayanganga ya lolenge nyonso:
15 Y avestruz, y mochuelo, y graceta y gavilán según su especie.
maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso.
16 Y el halcón, y la lechuza, y el calamón,
Esulungutu, esulungutu ya monene, esulungutu ya pembe,
17 Y el cisne, y el pelícano, y la gaviota,
libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, libata ya mayi,
18 Y la cigüeña, y el cuervo marino según su especie, y la abubilla, y el murciélago;
nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
19 Y toda serpiente de alas os será inmunda, no se comerá.
Bokoki kolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, ezali mbindo mpo na bino.
20 Toda ave limpia comeréis.
Nzokande, bokoki kolia nyonso oyo ezali na mapapu mpe ezangi mbindo.
21 Ninguna cosa mortecina comeréis. Al extranjero que está en tus villas la darás, y él la comerá; o véndela al extranjero; porque tú eres pueblo santo a Jehová tu Dios. No cocerás el cabrito en la leche de su madre.
Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino; ye akoki na ye kolia yango; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.
22 Diezmando diezmarás toda renta de tu simiente, que saliere de tu haza cada un año.
Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota.
23 Y comerás delante de Jehová tu Dios en el lugar que él escogiere para hacer habitar su nombre allí, el diezmo de tu grano, de tu vino, y de tu aceite, y los primogénitos de tus vacas y de tus ovejas, para que aprendas a temer a Jehová tu Dios todos los días.
Na miso ya Yawe, Nzambe na bino, mpe na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokolia eteni ya zomi ya ble na bino, ya vino ya sika mpe ya mafuta, bana nyonso ya liboso ya bangombe na bino, ya bantaba na bino mpe ya bameme na bino. Na bongo, bokoyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino.
24 Y si el camino fuere tan largo que tú no puedas llevarlos por él, por estar lejos de ti el lugar que Jehová tu Dios hubiere escogido para poner en él su nombre, cuando Jehová tu Dios te bendijere,
Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo,
25 Entonces venderlo has, y atarás el dinero en tu mano, y vendrás al lugar que Jehová tu Dios escogiere,
okoteka eteni na yo ya zomi; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona.
26 Y darás el dinero por todo lo que tu alma desea, por vacas y por ovejas, y por vino, y por sidra, y por todas las cosas que tu alma te demandare: y comerás allí delante de Jehová tu Dios, y alegrarte has tú y tu casa:
Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi: ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo.
27 Y no desampararás al Levita que habitare en tus villas, porque no tiene parte ni heredad contigo.
Kobosana te Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bazali ata na eteni ya mabele te to libula mpo na bango moko.
28 Al cabo de tres años sacarás todos los diezmos de tu renta de cada año, y guardarlo has en tus ciudades:
Na suka ya mibu misato nyonso, bokomema biteni ya zomi nyonso ya mibu wana mpe bokobomba yango na bingumba na bino.
29 Y vendrá el Levita, que no tiene parte ni heredad contigo, y el extranjero, y el huérfano, y la viuda, que están en tus villas, y comerán y hartarse han; porque Jehová tu Dios te bendiga en toda obra de tus manos, que hicieres.
Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.

< Deuteronomio 14 >