< Deuteronomio 12 >

1 Estos son los estatutos y derechos que guardaréis para hacer en la tierra que Jehová el Dios de tus padres te ha dado, para que la heredes todos los días que vosotros viviereis sobre la tierra.
Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango.
2 Destruyendo destruiréis todos los lugares donde las gentes, que vosotros heredaréis, sirvieron a sus dioses sobre los montes altos, y sobre los collados, y debajo de todo árbol espeso.
Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu.
3 Y derribaréis sus altares, y quebraréis sus imágines, y sus bosques quemaréis a fuego: y las esculturas de sus dioses destruiréis, y desharéis el nombre de ellas de aquel lugar.
Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana.
4 No haréis así a Jehová vuestro Dios.
Nzokande mpo na bino, bosengeli te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, na lolenge na bango.
5 Mas el lugar que Jehová vuestro Dios escogiere de todas vuestras tribus, para poner allí su nombre por su habitación, buscaréis, y allá vendréis.
Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.
6 Y allí traeréis vuestros holocaustos, y vuestros sacrificios, y vuestros diezmos, y la ofrenda de vuestras manos, y vuestros votos, y vuestras ofrendas voluntarias, y los primogénitos de vuestras vacas y de vuestras ovejas.
Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.
7 Y comeréis allí delante de Jehová vuestro Dios, y alegraros heis en toda obra de vuestras manos, vosotros y vuestras casas, en que Jehová tu Dios te hubiere bendecido.
Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.
8 No haréis como todo lo que nosotros hacemos aquí hoy, cada uno lo que le parece:
Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo: moto nyonso azali kosala ndenge alingi.
9 Porque aun hasta ahora no habéis entrado al reposo, y a la heredad, que Jehová vuestro Dios os da.
Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino.
10 Mas pasaréis el Jordán, y habitaréis en la tierra que Jehová vuestro Dios os hace heredar, y él os dará reposo de todos vuestros enemigos al derredor, y habitaréis seguros.
Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.
11 Y entonces, al lugar que Jehová vuestro Dios escogiere para hacer habitar en él su nombre, allí traeréis todas las cosas, que yo os mando, vuestros holocaustos, y vuestros sacrificios, vuestros diezmos, y las ofrendas de vuestras manos, y toda elección de vuestros votos, que hubiereis prometido a Jehová.
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino: bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
12 Y alegraros heis delante de Jehová vuestro Dios vosotros y vuestros hijos, y vuestras hijas, y vuestros siervos y vuestras siervas, y el Levita que estuviere dentro de vuestras puertas: por cuanto no tiene parte ni heredad con vosotros.
Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.
13 Guárdate, que no ofrezcas tus holocaustos en cualquier lugar, que vieres:
Bosala keba ete bobonza te bambeka na bino ya kotumba na bisika nyonso oyo bokomona.
14 Mas en el lugar, que Jehová escogiere en una de tus tribus, allí ofrecerás tus holocaustos, y allí harás todo lo que yo te mando.
Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.
15 Solamente conforme al deseo de tu alma matarás, y comerás carne según la bendición de Jehová tu Dios, la cual él te dará en todas tus villas, el inmundo y el limpio la comerá, como un corzo, o como un ciervo:
Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango.
16 Salvo que sangre no comeréis: sobre la tierra la derramaréis, como agua.
Kasi bosengeli te kolia makila; bosopa yango lokola mayi na mabele.
17 Ni podrás comer en tus villas el diezmo de tu grano, o de tu vino, o de tu aceite; ni los primogénitos de tus vacas, ni de tus ovejas: ni tus votos que prometieres, ni tus ofrendas voluntarias, ni las ofrendas de tus manos.
Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.
18 Mas delante de Jehová tu Dios las comerás, en el lugar que Jehová tu Dios escogiere, tú, y tu hijo, y tu hija, y tu siervo y tu sierva, y el Levita que está en tus villas: y alegrarte has delante de Jehová tu Dios en toda obra de tus manos.
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona: bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
19 Guárdate, no desampares al Levita en todos tus días sobre tu tierra.
Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te.
20 Cuando Jehová tu Dios ensanchare tu término, como él te ha dicho, y tú dijeres: Comeré carne: porque deseó tu alma comer carne, conforme a todo el deseo de tu alma comerás carne.
Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba: « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi.
21 Cuando estuviere lejos de ti el lugar, que Jehová tu Dios escogerá, para poner allí su nombre, matarás de tus vacas, y de tus ovejas, que Jehová te hubiere dado, como yo te he mandado, y comerás en tus villas según todo lo que deseare tu alma.
Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino.
22 Cierto como se come el corzo y el ciervo, así las comerás: el inmundo y el limpio también comerán de ellas:
Bokolia yango ndenge baliaka pambi to mboloko; moto nyonso, azala mbindo to peto, akoki na ye kolia yango.
23 Solamente que te esfuerces a no comer sangre: porque la sangre es el alma: y no has de comer el alma juntamente con su carne.
Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama.
24 No la comerás: en tierra la derramarás como agua.
Bosengeli te kolia makila; kasi bosopa yango na mabele ndenge basopaka mayi.
25 No comerás de ella, porque hayas bien tú, y tus hijos después de ti, cuando hicieres lo recto en ojos de Jehová.
Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe.
26 Empero tus santificaciones que tuvieres, y tus votos, tomarás, y vendrás al lugar que Jehová escogiere.
Kasi bokozwa biloko na bino ya bule mpe biloko nyonso oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa, mpe bokokende na esika oyo Yawe akopona.
27 Y harás tus holocaustos, la carne y la sangre, sobre el altar de Jehová tu Dios: y la sangre de tus sacrificios será derramada sobre el altar de Jehová tu Dios, y la carne comerás.
Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango.
28 Guarda, y oye todas estas palabras, que yo te mando, porque hayas bien tú y tus hijos después de ti para siempre, cuando hicieres lo bueno y lo recto en los ojos de Jehová tu Dios.
Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
29 Cuando hubiere talado de delante de ti Jehová tu Dios las gentes donde tú vas para heredarlas, y las heredares, y habitares en su tierra,
Yawe, Nzambe na bino, akolimwisa na liboso na bino bikolo oyo bozali kokende kobundisa mpe kobotola. Kasi tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka na bango,
30 Guárdate que no tropieces en pos de ellas después que fueren destruidas delante de ti: no preguntes acerca de sus dioses, diciendo: De la manera que servían aquellas gentes a sus dioses, así haré también yo.
mpe tango bokosilisa kobebisa bango liboso na bino, bosala keba ete bokweya te na motambo na bango ya kosalela banzambe na bango mpe na motambo ya koluka koyeba na komitunaka: « Ndenge nini bikolo oyo esalelaka banzambe na bango? Tokosala ndenge moko mpe kati na bingumba na biso. »
31 No harás así a Jehová tu Dios: porque todo lo que Jehová aborrece, hicieron ellos a sus dioses: porque aun a sus hijos e hijas quemaban en el fuego a sus dioses.
Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango: bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.
32 Todo lo que yo os mando guardaréis para hacer: no añadirás a ello, ni quitarás de ello.
Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te.

< Deuteronomio 12 >