< 1 Samuel 9 >

1 Y había un varón de Ben-jamín hombre valeroso, el cual se llamaba Cis, hijo de Abiel, hijo de Seor, hijo de Becorat, hijo de Afias, hijo de un varón de Jemini:
Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.
2 Este tenía un hijo que se llamaba Saul, mancebo y hermoso, que entre los hijos de Israel no había otro más hermoso que él: del hombro arriba sobrepujaba a todo el pueblo.
Azalaki na mwana mobali; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko; azalaki mbinga koleka bango nyonso.
3 Y habíanse perdido las asnas de Cis padre de Saul: y dijo Cis a Saul su hijo: Toma ahora contigo alguno de los criados, y levántate, y vé a buscar las asnas.
Mokolo moko, ba-ane ya tata na ye, Kishi, ebungaki; mpe Kishi alobaki na mwana na ye, Saulo: « Kamata mosali moko ya mobali kati na basali mpo ete akende elongo na yo koluka ba-ane. »
4 Y él pasó el monte de Efraím y de allí pasó en la tierra de Salisa: y no las hallaron. Y pasaron por la tierra de Salim, y tampoco. Y pasaron por la tierra de Jemini, y no las hallaron.
Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.
5 Y cuando vinieron a la tierra de Suf, Saul dijo a su criado que tenía consigo: Ven, volvámosnos porque quizá mi padre, dejadas las asnas, estará congojado por nosotros.
Tango bakomaki na mokili ya Tsufi, Saulo alobaki na mosali oyo azalaki elongo na ye: — Yaka, tozonga; noki te tata na ngai akotika kokanisa ba-ane, kasi akokoma komitungisa mpo na biso.
6 Y él le respondió: He aquí ahora que en esta ciudad está el varón de Dios, que es varón insigne: todas las cosas que él dijere, sin duda vendrán. Vamos ahora allá: quizá nos enseñará nuestro camino por donde vayamos.
Mosali azongisaki: — Zela moke! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe; azali penza moto ya lokumu; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
7 Y Saul respondió a su criado: Vamos pues: mas ¿qué llevaremos al varón? Porque el pan de nuestras alforjas se ha acabado, y no tenemos que presentar al varón de Dios: porque ¿qué tenemos?
Saulo alobaki na mosali na ye: — Likambo te! Tokende epai na ye! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini?
8 Entonces tornó el criado a responder a Saul, diciendo: He aquí, se halla en mi mano un cuatro de siclo de plata; esto daré al varón de Dios, porque nos declare nuestro camino.
Mosali azongiselaki Saulo: — Tala, nazali na mbongo moko ya palata; nakopesa yango epai ya moto na Nzambe, mpe akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
9 (Antiguamente en Israel cualquiera que iba a consultar a Dios, decía así: Veníd y vamos hasta el vidente; porque el que ahora se llama profeta, antiguamente era llamado, vidente.)
Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba: « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »
10 Dijo pues Saul a su criado: Bien dices: ea pues vamos. Y fueron a la ciudad, donde estaba el varón de Dios:
Saulo alobaki na mosali na ye: — Malamu! Tokende! Boye, bakendeki na engumba epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda.
11 Y cuando subían por la cuesta de la ciudad, hallaron unas mozas que salían por agua, a las cuales dijeron: ¿Está en este lugar el vidente?
Wana bazalaki komata ngomba oyo ekenda na engumba, bakutanaki na bana basi oyo bazalaki kobima mpo na koluka mayi. Batunaki bango: — Boni, ezalaka awa na moto oyo azwaka bimoniseli?
12 Y ellas respondiéndoles, dijeron: Si. Héle aquí, delante de ti; dáte pues priesa, porque hoy ha venido a la ciudad; porque el pueblo tiene hoy sacrificio en el alto:
Bazongiselaki ye: — Iyo! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba.
13 Y cuando entrareis en la ciudad, luego le hallaréis, antes que suba al alto a comer; porque el pueblo no comerá hasta que él haya venido; porque él ha de bendecir el sacrificio, y después comerán los convidados. Subíd pues ahora, porque ahora le hallaréis.
Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te: asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo.
14 Y ellos subieron a la ciudad, y cuando estuvieron en medio de la ciudad, he aquí Samuel que salía delante de ellos para subir al alto.
Boye bakendeki na engumba; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba.
15 Y un día antes que Saul viniese, Jehová había revelado al oído de Samuel, diciendo:
Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele.
16 Mañana a esta misma hora, yo enviaré a ti un varón de la tierra de Ben-jamín, al cual ungirás por príncipe sobre mi pueblo Israel: y este salvará mi pueblo de mano de los Filisteos: porque yo he mirado a mi pueblo, porque su clamor ha llegado hasta mí.
Alobaki na ye: « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »
17 Y Samuel miró a Saul, y Jehová le dijo: He aquí este es el varón del cual te dije: Este señoreará a mi pueblo.
Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye: « Tala moto oyo nalobelaki yo; ye nde akokonza bato na Ngai. »
18 Y llegando Saul a Samuel en medio de la puerta, díjole: Ruégote que me enseñes donde está la casa del vidente.
Saulo apusanaki pembeni ya Samuele, na ekuke ya engumba, mpe atunaki ye: — Nabondeli yo, okoki kolakisa ngai ndako ya moto oyo azwaka bimoniseli?
19 Y Samuel respondió a Saul, y dijo: Yo soy el vidente: sube delante de mí al alto, y coméd hoy conmigo; y por la mañana te despacharé, y te descubriré todo lo que está en tu corazón.
Samuele azongiselaki Saulo: — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo.
20 Y de las asnas que se te perdieron hoy ha tres días, pierde cuidado de ellas, porque ya son halladas. ¿Mas cuyo es todo el deseo de Israel, sino tuyo, y de toda la casa de tu padre?
Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.
21 Y Saul respondió y dijo: ¿No soy yo hijo de Jemini, de las más pequeñas tribus de Israel? ¿Y mi familia la más pequeña de todas las familias de la tribu de Ben-jamín? ¿Pues, por qué me has dicho cosa semejante?
Saulo azongisaki: — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo?
22 Y trabando Samuel de Saul y de su criado, metiólos al cenadero, y dióles lugar en la cabecera de los convidados, que eran como treinta varones.
Samuele amemaki Saulo elongo na mosali na ye, akotisaki bango na esika ya feti mpe avandisaki bango liboso ya babengami: bazalaki bato pene tuku misato.
23 Y dijo Samuel al cocinero: Da acá la porción que te dí, la cual te dije que guardases aparte.
Samuele alobaki na moto oyo azalaki kolamba: « Yaka na ndambo ya biloko oyo nayebisaki yo ete otia yango pembeni. »
24 Y el cocinero alzó una espalda con lo que estaba sobre ella, y púsola delante de Saul. Y Samuel dijo: He aquí lo que ha quedado, pon delante de ti, y come: porque de industria se guardó para ti, cuando dije: Yo he convidado al pueblo. Y Saul comió aquel día con Samuel.
Moto oyo azalaki kolamba azwaki mopende mpe nyonso oyo ekangani na yango, mpe atiaki yango liboso ya Saulo. Samuele alobaki na Saulo: « Tala ndambo ya biloko oyo babombelaki yo. Lia yango, pamba te babombelaki yo yango wuta tango nabengisaki bato. » Boye, na mokolo wana, Saulo aliaki elongo na Samuele.
25 Y cuando hubieron descendido del alto a la ciudad, él habló con Saul sobre la techumbre.
Bongo balongwaki nzela moko na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kokita na engumba, mpe Samuele asololaki na Saulo, na veranda ya ndako na ye.
26 Y otro día madrugaron como al salir del alba, y Samuel llamó a Saul sobre la techumbre, y dijo: Levántate, para que te despache. Y Saul se levantó: y salieron fuera ambos, él y Samuel.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye: « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.
27 Y descendiendo ellos al cabo de la ciudad, dijo Samuel a Saul: Di al mozo que vaya delante. Y el mozo pasó delante. Y tú espera un poco para que yo te declare palabra de Dios.
Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo: « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo: « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »

< 1 Samuel 9 >