< 2 Crónicas 25 >

1 Amasías tenía 25 años cuando comenzó a reinar, y reinó 29 años en Jerusalén. El nombre de su madre fue Joadán de Jerusalén.
Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi.
2 Hizo lo recto ante Yavé, aunque no con un corazón íntegro.
Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te.
3 Cuando el reino fue firmemente establecido, mató a sus esclavos que mataron a su padre el rey.
Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye, mokonzi.
4 Pero no mató a los hijos de ellos, según lo escrito en la Ley, en el rollo de Moisés, donde Yavé ordenó: No morirán los padres por los hijos, ni los hijos por los padres, sino cada uno morirá por su pecado.
Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo: « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
5 Después Amasías reunió a los de Judá y los organizó según sus casas paternas por todo Judá y Benjamín como jefes de millares y jefes de centenas. E hizo un censo de ellos, de 20 años arriba, de los cuales había 300.000 escogidos que tenían lanza y escudo para salir a la guerra.
Amatsia abengisaki bato ya Yuda mpe atiaki, kolanda mabota na bango, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpo na Yuda mobimba mpe Benjame. Atangaki motango ya bato oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata: bazalaki mibali nkoto nkama misato oyo baselingwa mpo na kosala mosala ya soda, kobunda na makonga mpe na nguba.
6 Además tomó a sueldo a 100.000 hombres valientes de Israel por 3,3 toneladas de plata.
Kati na Isalaele, azwaki lisusu na mosala ya soda, na motuya ya bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, basoda ya mpiko nkoto nkama moko.
7 Pero un varón de ʼElohim fue a él y le dijo: Oh rey, no vaya el ejército de Israel contigo, porque Yavé no está con Israel ni con los hijos de Efraín.
Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki: — Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi.
8 Pero si vas, vé. Sé fuerte en la batalla. Sin embargo, ʼElohim te derribará delante del enemigo, porque ʼElohim tiene el poder para ayudar y para derribar.
Ata soki okeyi kobunda na mpiko nyonso, Nzambe akokweyisa yo liboso ya monguna, pamba te azali na makoki ya kosunga mpe ya kokweyisa.
9 Amasías preguntó al varón de ʼElohim: ¿Qué haremos en cuanto a las 3,3 toneladas de plata que pagué al ejército de Israel? Y el varón de ʼElohim le respondió: Yavé puede darte mucho más que eso.
Amatsia atunaki moto na Nzambe: — Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini? Moto na Nzambe azongisaki: — Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana.
10 Entonces Amasías apartó las tropas de Efraín que le llegaron, para que fueran a sus casas. Por tanto, ellos se enojaron muchísimo contra Judá y regresaron a sus casas enfurecidos.
Boye, Amatsia azongisaki na bandako na bango, basoda oyo bayaki epai na ye wuta na Efrayimi. Kasi basoda yango basilikelaki Yuda mpe bazongaki na bandako na bango na kanda makasi.
11 Pero Amasías se esforzó y guió a su pueblo. Fue al valle de la Sal y mató a 10.000 de los hijos de Seír.
Amatsia azwaki mpiko mpe akambaki mampinga na ye kino na Lubwaku ya mungwa epai wapi abomaki bato ya Seiri nkoto zomi.
12 Los hijos de Judá capturaron vivos a otros 10.000, y los llevaron a la cumbre de un peñasco. Allí los despeñaron, y todos se volvieron pedazos.
Bato ya Yuda bakangaki lisusu bato ya bomoi nkoto zomi, bamemaki bango na songe ya ngomba mpe batindikaki bango wuta na songe ya ngomba; mpe bango nyonso bakweyaki na se, banzoto na epanzanaki na biteni.
13 Pero las tropas que Amasías despidió para que no fueran con él a la batalla, saquearon las ciudades de Judá, desde Samaria hasta Bet-horón. Mataron a 3.000 de ellos y tomaron un gran despojo.
Na tango wana, basoda oyo Amatsia azongisaki mpe apekisaki kokende na bitumba bakotaki na makasi kati na bingumba ya Yuda longwa na Samari kino na Beti-Oroni. Babomaki bato nkoto misato mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba.
14 Aconteció que, cuando Amasías regresó de la matanza de los edomitas, se llevó consigo los ʼelohim de los hijos de Seír. Los puso para que fueran sus ʼelohim, se postró ante ellos y les quemó incienso.
Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi.
15 Entonces la ira de Yavé se encendió contra Amasías, y le envió a un profeta quien le dijo: ¿Por qué fuiste tras los ʼelohim de un pueblo que no pudo ser librado de tu mano?
Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia: — Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo?
16 Cuando [el profeta] le hablaba estas cosas, él respondió: ¿Te designamos a ti como consejero del rey? Déjate de eso. ¿Por qué quieres que te maten? Entonces el profeta desistió, pero agregó: Yo sé que ʼElohim determinó destruirte, porque hiciste esto y no atendiste mi consejo.
Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye: — Kata! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo! Mosakoli abendaki nzoto; kasi, liboso ya kokende, alobaki: — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.
17 Después de tomar consejo Amasías, rey de Judá, envió a decir a Joás, hijo de Joacaz, hijo de Jehú, rey de Israel: ¡Ven, enfrentémonos el uno al otro!
Sima na Amatsia, mokonzi ya Yuda, kotuna toli epai ya bapesi toli na ye, abetaki mondenge na Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele; alobaki: — Yaka tobunda!
18 Joás, rey de Israel, envió a decir a Amasías, rey de Judá: El cardo del Líbano envió a decir al cedro del Líbano: Da tu hija como esposa a mi hijo. Y pasó una fiera del Líbano y pisoteó el cardo.
Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda: — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani: « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba ya Libani elekaki mpe enyataki nzete ya sende.
19 Tú dices: Ciertamente derroté a Edom, y con eso tu corazón se enaltece para ufanarte. Quédate ahora en tu casa. ¿Por qué provocas un mal en el cual puedes caer tú y Judá contigo?
Solo, ozali komilobela ete olongi Edomi, mpe motema ezali kosepela mpe komikumisa. Tala, ekoleka malamu ete ovanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda?
20 Pero Amasías no escuchó, porque esto estaba determinado por ʼElohim, Quien los quería entregar en su mano por haber ido tras los ʼelohim de Edom.
Kasi Amatsia ayokaki ye te, pamba te Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokaba bango na maboko ya Joasi, mpo ete basambelaki banzambe ya Edomi.
21 Joás, rey de Israel, subió y se enfrentó a Amasías, rey de Judá, en Bet-semes, que pertenece a Judá.
Boye Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.
22 Judá fue derrotado por Israel, y huyeron cada uno a sus tiendas.
Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye.
23 Joás, rey de Israel, capturó a Amasías, rey de Judá, hijo de Joás, hijo de Joacaz, en Bet-semes, y lo llevó a Jerusalén. Abrió una brecha de 180 metros en el muro de Jerusalén, desde la puerta de Efraín hasta la puerta de la Esquina.
Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Yoakazi, na Beti-Shemeshi. Amemaki ye na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.
24 Tomó todo el oro, la plata y todos los utensilios que fueron hallados en la Casa de ʼElohim a cargo de Obed-edom, y también los tesoros del palacio real. Tomó rehenes y volvió a Samaria.
Joasi akamataki palata nyonso, wolo nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe oyo Obedi-Edomi azalaki kobatela, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
25 Amasías, hijo de Joás, rey de Judá, vivió 15 años después de la muerte de Joás, hijo de Joacaz, rey de Israel.
Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.
26 Los demás hechos de Amasías, primeros y últimos, ciertamente ¿no están escritos en el rollo de los Reyes de Judá y de Israel?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
27 Desde el tiempo cuando Amasías se apartó de Yavé, tramaron una conjura contra él en Jerusalén. Él huyó a Laquis, pero enviaron tras él a Laquis, y allá lo mataron.
Kobanda na tango oyo Amatsia apesaki Yawe mokongo, basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye; mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.
28 Lo llevaron sobre caballos y lo sepultaron con sus antepasados en la ciudad de Judá.
Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Yuda.

< 2 Crónicas 25 >