< Послание к Римлянам 13 >

1 Всяка душа властем предержащым да повинуется: несть бо власть аще не от Бога, сущыя же власти от Бога учинены суть.
Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.
2 Темже противляяйся власти, Божию повелению противляется: противляющиися же себе грех приемлют.
Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, mpe bato oyo basalaka bongo bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko.
3 Князи бо не суть боязнь добрым делом, но злым. Хощеши же ли не боятися власти? Благое твори, и имети будеши похвалу от него:
Bato oyo batambolaka malamu babangaka basambisi te, kaka bato oyo basalaka mabe nde babangaka basambisi. Oboyi kobanga mokonzi? Sala makambo oyo ezali sembo, mpe mokonzi akondima yo.
4 Божий бо слуга есть, тебе во благое. Аще ли злое твориши, бойся, не бо без ума мечь носит: Божий бо слуга есть, отмститель в гнев злое творящему.
Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.
5 Темже потреба повиноватися не токмо за гнев, но и за совесть.
Yango wana ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi-mingi mpo na kosala makambo oyo mitema na biso ezali kosenga biso.
6 Сего бо ради и дани даете: служители бо Божии суть, во истое сие пребывающе.
Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesaka tango na bango nyonso mpo na kokamba.
7 Воздадите убо всем должная: емуже (убо) урок, урок: (а) емуже дань, дань: (а) емуже страх, страх: (и) емуже честь, честь.
Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso: mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.
8 Ни единому же ничимже должни бывайте, точию еже любити друг друга: любяй бо друга, закон исполни.
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.
9 Еже бо: не прелюбы сотвориши, не убиеши, не украдеши, не лжесвидетелствуеши, не похощеши, и аще кая ина заповедь, в сем словеси совершается, во еже: возлюбиши искренняго твоего, якоже сам себе.
Mibeko lokola: « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
10 Любы искреннему зла не творит. Исполнение убо закона любы есть.
Moto oyo azali na bolingo asalaka moninga na ye mabe te. Boye, kolinga moninga, yango nde kokokisa Mobeko nyonso.
11 И сие, ведяще время, яко час уже нам от сна востати. Ныне бо ближайшее нам спасение, нежели егда веровахом.
Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.
12 Нощь убо прейде, а день приближися: отложим убо дела темная, и облечемся во оружие света.
Butu ekomi pene ya kosila mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole.
13 Яко во дни, благообразно да ходим, не козлогласовании и пиянствы, не любодеянии и студодеянии, не рвением и завистию:
Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi: na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te.
14 но облецытеся Господем нашим Иисус Христом, и плоти угодия не творите в похоти.
Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.

< Послание к Римлянам 13 >