< Бытие 17 >

1 Бысть же Авраму лет девятьдесят девять: и явися Господь Авраму и рече ему: Аз есмь Бог твой, благоугождай предо Мною и буди непорочен:
Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye: « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
2 и положу завет Мой между Мною и между тобою: и умножу тя зело.
Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. »
3 И паде Аврам на лицы своем, и рече ему Бог, глаголя:
Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu:
4 и Аз се, завет Мой с тобою, и будеши отец множества языков:
« Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo: ‹ Okozala tata ya bikolo ebele.
5 и не наречется ктому имя твое Аврам, но будет имя твое Авраам: яко отца многих языков положих тя:
Bakobenga yo lisusu Abrami te; kombo na yo ekokoma Abrayami, pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele.
6 и возращу тя зело зело, и положу тя в народы, и царие из тебе изыдут:
Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo.
7 и поставлю завет Мой между Мною и между тобою, и между семенем твоим по тебе в роды их, в завет вечен, да буду тебе Бог и семени твоему по тебе:
Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.
8 и дам тебе и семени твоему по тебе землю, в нейже обитаеши, всю землю Ханааню во одержание вечное, и буду им Бог.
Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
9 И рече Бог ко Аврааму: ты же завет Мой соблюдеши, ты и семя твое по тебе в роды их.
Nzambe alobaki lisusu na Abrayami: « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima.
10 И сей завет, егоже соблюдеши между Мною и вами, и между семенем твоим по тебе в роды их: обрежется от вас всяк мужеск пол,
Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela: Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.
11 и обрежете плоть крайнюю вашу, и будет в знамение завета между Мною и вами.
Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai.
12 И младенец осми дний обрежется вам, всяк мужеский пол в родех ваших: и домочадец, и купленый от всякаго сына чуждаго, иже несть от семене твоего: обрезанием обрежется домочадец дому твоего и купленый.
Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga: ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.
13 И будет завет Мой на плоти вашей в завет вечен.
Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.
14 Необрезаный же мужеский пол, иже не обрежет плоти крайния своея в день осмый, погубится душа та от рода своего: яко завет Мой разори.
Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »
15 И рече Бог Аврааму: Сара жена твоя не наречется имя ея Сара, но Сарра будет имя ей:
Nzambe alobaki lisusu na Abrayami: « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara.
16 благословлю же ю и дам тебе от нея чадо: и благословлю е, и будет в языки, и царие языков из него будут.
Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
17 И паде Авраам на лице свое, и посмеяся, и рече в мысли своей, глаголя: еда столетному (мужу) родится сын? Еда и Сарра девятидесяти лет (сущи) родит?
Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki: « Eh! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi! »
18 Рече же Авраам к Богу: Исмаил сей да живет пред Тобою.
Boye Abrayami alobaki na Nzambe: — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo!
19 Рече же Бог ко Аврааму: воистинну, се, Сарра жена твоя родит тебе сына, и наречеши имя ему Исаак: и поставлю завет Мой с ним в завет вечен, да буду ему в Бога и семени его по нем.
Nzambe alobaki: — Te! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
20 О Исмаиле же се послушах тебе: и се благослових его, и возращу его, и умножу его зело: дванадесять языки родит: и дам его в язык велий.
Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.
21 Завет же Мой поставлю со Исааком, егоже родит тебе Сарра, во время сие, в лето второе.
Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.
22 Сконча же (Бог) глаголя к нему, и взыде Бог от Авраама.
Tango Nzambe asilisaki kosolola na Abrayami, akendeki.
23 И поя Авраам Исмаила сына своего, и вся домочадцы своя и вся купленыя, и весь мужеск пол мужей, иже в дому Авраамли, и обреза плоть крайнюю их во время дне того, якоже глагола ему Бог.
Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
24 Авраам же девятидесяти девяти лет бяше, егда обреза плоть крайнюю свою.
Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga;
25 Исмаил же сын его бяше лет трехнадесяти, егда обреза плоть крайнюю свою.
mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga.
26 Во время (же) дне онаго обрезася Авраам и Исмаил сын его,
Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko.
27 и вси мужие дому его, и домочадцы (его) и куплении от инородных языков, и обреза я.
Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.

< Бытие 17 >