< Псалми 92 >

1 Лепо је хвалити Господа, и певати имену Твом, Вишњи,
Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo!
2 Јављати јутром милост Твоју, и истину Твоју ноћу,
Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,
3 Уз десет жица и уз псалтир, и уз јасне гусле!
na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze!
4 Јер си ме развеселио, Господе, делима својим, с дела руку Твојих радујем се.
Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.
5 Како су велика дела Твоја, Господе! Веома су дубоке помисли Твоје.
Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo!
6 Безумник не зна, и незналица не разуме то.
Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
7 Кад безбожници ничу као трава и цветају сви који чине безакоње, то бива зато да би се истребили довека.
Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
8 А Ти си, Господе, висок увек.
Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.
9 Јер ево непријатељи Твоји, Господе, јер ево непријатељи Твоји гину, и расипају се сви који чине безакоње;
Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
10 А мој рог Ти узвишујеш као рог у једнорога, ја сам помазан новим уљем.
Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
11 И око моје види непријатеље моје, и о безаконицима, који устају на мене, слушају уши моје.
Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.
12 Праведник се зелени као Финик, као кедар на Ливану узвишује се.
Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
13 Који су засађени у дому Господњем, зелене се у дворовима Бога нашег;
Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.
14 Родни су и у старости, једри и зелени,
Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
15 Јављајући да је праведан Господ, бранич мој, и да нема у Њему неправде.
basakolaka: « Yawe azali alima, azali Libanga na biso; kati na Ye, mabe ezali te! »

< Псалми 92 >